Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Ezra 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In the seventh month, with Israel settled in their towns, the people gathered as one in Jerusalem. Na sanza ya sambo, bana ya Isalaele oyo bavandaki kati na bingumba na bango basanganaki na Yelusalemi lokola moto moko.
2 Then Jeshua son of Jozadak and his fellow priests, and Zerubbabel son of Shealtiel and his associates, set to work and built the altar of our Father, to offer burnt offerings on it, as it is written in the Law of Moses, the man of our Father. Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki, elongo na baninga na ye, Banganga-Nzambe, mpe Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, elongo na bandeko na ye, babandaki kotonga etumbelo ya Nzambe ya Isalaele mpo na kobonza kuna mbeka ya kotumba kolanda makomi kati na Mobeko ya Moyize, moto na Nzambe.
3 They set the altar on its foundations, fearing the peoples around them, and offered burnt offerings on it to our Father morning and evening. Atako bazalaki koyoka bato oyo bazalaki pembeni na bango somo, batongaki etumbelo na likolo ya miboko na yango ya kala mpe babonzaki wana mpo na Yawe mbeka ya kotumba ya tongo mpe ya pokwa.
4 They kept the Feast of Booths as written, the daily burnt offerings in the number each day required. Bongo kolanda makomi, basepelaki feti ya Bandako ya kapo, mpe babonzaki mikolo nyonso bambeka ya kotumba kolanda motango oyo ekatama mpo na mokolo na mokolo.
5 After that, they offered the regular burnt offerings, the new moon offerings, all our Father's sacred feasts, and gifts from anyone who brought a voluntary offering to our Father. Sima na yango, babonzaki mbeka ya kotumba ya tango nyonso, bambeka ya kotumba oyo ekatama mpo na feti ya ebandeli ya sanza mpe mpo na feti nyonso oyo ekatama mpo na Yawe, mpe bambeka ya kotumba mpo na bato nyonso oyo bazalaki bango moko kopesa makabo wuta na mokano ya mitema na bango.
6 From the first day of the seventh month, they began offering burnt offerings to our Father, though our Father's temple foundation was not yet laid. Bato babandaki kobonzela Yawe bambeka ya kotumba na mokolo ya liboso ya sanza ya sambo, atako bamitongelaki nanu te miboko ya Tempelo ya Yawe.
7 They paid masons and carpenters, and gave the Sidonians and Tyrians food, drink, and oil, to bring cedar logs from Lebanon by sea to Joppa, as Cyrus king of Persia had authorized them. Bapesaki mbongo epai ya batongi ndako mpe epai ya basharipantie ; bongo bapesaki lisusu bilei, masanga mpe mafuta epai ya bato ya Sidoni mpe ya Tiri mpo ete bamema, na nzela ya ebale monene, banzete ya sedele longwa na Libani kino na Jafa, na ndingisa ya Sirisi, mokonzi ya Persi.
8 In the second month of year two after they reached our Father's house in Jerusalem, Zerubbabel son of Shealtiel and Jeshua son of Jozadak began the work, with the rest of their people—the priests, the Levites, and all who'd returned to Jerusalem from captivity. They set Levites twenty and older over the work on our Father's house. Na sanza ya mibale ya mobu ya mibale sima na bango kokoma na Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi, Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli ; Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki, elongo na bandeko na bango mosusu, Banganga-Nzambe, Balevi mpe bato nyonso oyo bazongaki na Yelusalemi wuta na bowumbu, babandaki misala ya kotonga. Baponaki Balevi oyo bazalaki na mibu kobanda tuku mibale mpe komata mpo ete balandela misala ya kotonga Tempelo ya Yawe.
9 Then Jeshua, his sons and brothers, and Kadmiel with his sons, sons of Judah, joined together to oversee those working on our Father's house—along with Henadad's sons, their sons and brothers, the Levites. Jozue elongo na bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali, Kadimieli elongo na bana na ye ya mibali oyo bazalaki bakitani ya Yuda, bapesamelaki mokumba ya kolandela bato oyo bazalaki kotonga Ndako ya Nzambe. Mpe bakitani ya Enadadi elongo na bana na bango ya mibali mpe bandeko na bango, Balevi, bazalaki kosunga bango.
10 When the builders laid the foundation of our Father's temple, priests in robes stood with trumpets, and Levites, sons of Asaph, with cymbals, to praise our Father as David king of Israel had ordered. Tango batongi ndako basilisaki kotonga miboko ya Tempelo ya Yawe, Banganga-Nzambe kati na bilamba na bango ya mosala ya bonganga-Nzambe elongo na bakelelo na bango na maboko ; Balevi, bakitani ya Azafi, elongo na manzanza, batelemaki na bisika na bango mpo na kokumisa Yawe, kolanda mitindo ya Davidi, mokonzi ya Isalaele.
11 They sang responsively, praising and thanking our Father: "He is good; his faithful love for Israel lasts forever." All the people gave a great shout of praise, because the foundation of our Father's house was laid. Bazalaki koyemba banzembo mpo na kokumisa mpe kozongisela Yawe matondi : « Solo, azali malamu, bolingo na Ye mpo na Isalaele ewumelaka seko na seko ! » Bongo bato nyonso bazalaki kobeta milolo makasi mpo na kokumisa Yawe mpo ete bazalaki kotia miboko ya Tempelo ya Yawe.
12 Many older priests, Levites, and clan heads who had seen the first house wept loudly as this house's foundation was laid before their eyes, while many others shouted for joy. Nzokande, kati na Banganga-Nzambe oyo ya mikolo, kati na Balevi oyo ya mikolo mpe kati na bakambi ya mabota, oyo ya mikolo, ezalaki na ebele oyo bamonaki Tempelo ya liboso ; bongo bazalaki kolela na mongongo makasi wana bazalaki kotia miboko ya Tempelo ya sika na miso na bango. Mpe kaka na tango yango, ebele ya bato mosusu bazalaki kosepela na koganga makasi mpe na kobeta milolo nzela moko na maboko.
13 No one could distinguish the joyful shout from the weeping, since the people shouted so loudly it was heard far off. Boye bato bakokaki te kokesenisa makelele ya bato oyo bazali koganga mpo na esengo mpe makelele ya bato oyo bazali kolela, pamba te bato bazalaki koganga makasi mpe makelele na bango ezalaki koyokana kino na mosika.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]