Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Ezra 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When Judah and Benjamin's enemies heard the returned exiles were building our Father a temple, Tango banguna ya Yuda mpe ya Benjame bayokaki ete bato oyo bawutaki na bowumbu bazali kotonga Tempelo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele,
2 they came to Zerubbabel and the family heads and said, "Let us build with you—we seek your God as you do, and have sacrificed to him since the days of Esarhaddon king of Assyria, who brought us up here." bayaki epai ya Zorobabeli mpe bakambi ya mabota ; balobaki na bango : — Botika ete tosunga bino na mosala ya kotonga Tempelo oyo, pamba te biso mpe tolukaka Nzambe na bino mpe tobonzelaka Ye mbeka wuta na tango ya Esari-Adoni, mokonzi ya Asiri, oyo amemaki biso awa.
3 But Zerubbabel, Jeshua, and Israel's other family heads said to them, "You have no part with us in building a house for our Father. We alone will build for our Father, as King Cyrus of Persia commanded us." Kasi Zorobabeli, Jozue mpe bakambi mosusu ya mabota ya Isalaele bazongisaki : — Bokotonga te elongo na biso Tempelo ya Yawe, Nzambe na biso ; tokotonga yango biso moko mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, kolanda mitindo ya Sirisi, mokonzi ya Persi.
4 Then the land's people weakened Judah's people's hands, terrifying them from building. Bato ya bikolo oyo ezalaki elongo na bango kati na mboka balembisaki bato ya Yuda nzoto mpe babangisaki bango mpo ete bakoba lisusu te kotonga ;
5 They paid off advisers to work against them and undercut their plan, all through Cyrus king of Persia's reign to Darius king of Persia's reign. bapesaki bapesi toli kanyaka mpo ete batelemela mpe babebisa mabongisi na bango na nzela ya batoli ya mabe, na mikolo nyonso ya Sirisi kino na oyo ya Dariusi, bango mibale bakonzi ya Persi.
6 Early in Xerxes's reign, they wrote an accusation against the residents of Judah and Jerusalem. Kaka na ebandeli ya bokonzi ya Kizerisesi, batindelaki ye mokanda mpo na kofunda bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi.
7 In Artaxerxes' reign, Bishlam, Mithredath, Tabeel, and their colleagues wrote to Artaxerxes king of Persia; the letter was written in Aramaic script and translated into the Aramaic language. Bongo na mikolo ya Aritakizerisesi lokola mokonzi ya Persi, Bishilami, Mitredati, Tabeyeli mpe baninga na bango ya mosala bakomelaki Aritakizerisesi mokanda. Bakomaki yango na makomi mpe na lokota ya Arami.
8 Rehum the commander and Shimshai the scribe wrote a letter against Jerusalem to King Artaxerxes: Moyangeli Rewumi mpe Shimishayi, mokomi mikanda na ye, bakomelaki mokonzi Aritakizerisesi mokanda oyo na tina na Yelusalemi :
9 Rehum the commander, Shimshai the scribe, and the rest of their colleagues—the judges, officials, and administrators over the people of Erech, the Babylonians, and the people of Susa (that is, the Elamites), « Moyangeli Rewumi mpe Shimishayi, mokomi mikanda, elongo na baninga na bango, basambisi mpe bakambi ya bato ya Dini, ya Arifarisataki, ya Taripeli, ya Afarasi, ya Ereki, ya Babiloni, ya Size, ya Deya, ya Elami,
10 and the other nations that great, noble Osnappar deported and settled in the city of Samaria and the rest of the province Beyond the River. mpe bato ya bikolo mosusu oyo Asuribanipali, mokonzi monene mpe mokonzi ya lokumu, amemaki na bowumbu mpo na kotia bango kati na engumba Samari mpe kati na bituka nyonso ya ngambo ya weste ya ebale Efrate. »
11 Copy of the letter sent to him: To King Artaxerxes, from your servants, the people of the province Beyond the River. And now, Tala maloba oyo batindelaki ye na mokanda : « Epai ya mokonzi Aritakizerisesi. Maloba kowuta na biso basali na yo, bato ya ngambo ya weste ya ebale Efrate.
12 let the king know: the Jews who came up from you to us have reached Jerusalem. They're rebuilding that rebellious, wicked city, finishing the walls and repairing the foundations. Tika ete mokonzi ayeba ete Bayuda oyo bawutaki epai na yo bakomi kati na biso, na Yelusalemi ; bazali kotonga engumba ya batomboki mpe ya bato ya mobulu, bazali kotonga bamir mpe kobongisa lisusu miboko.
13 The king should know: if this city is rebuilt and its walls finished, they will pay no tribute, tax, or toll, and the royal treasury will suffer loss. Tika ete mokonzi ayeba lisusu ete, soki engumba oyo etongami lisusu mpe babongisi bamir na yango, bakofuta lisusu te mpako ya mokonzi, mpako ya mabele mpe mpako ya nzela ; na bongo, bomengo ya mokonzi ekokita.
14 Since we depend on the palace for our living, and it's not right for us to see the king disrespected, we send word to inform the king, Sik’oyo, lokola tozwi libaku ya kosala epai ya mokonzi mpe lokola ezali malamu te mpo na biso komona lokumu ya mokonzi kobebisama, totindi sango oyo mpo na kotalisa makambo oyo epai ya mokonzi
15 so that a search may be made in the records of your ancestors. In those records you will find this city rebellious, harmful to kings and provinces, stirring revolt since ancient times—destroyed for that reason. mpo ete baluka kati na babuku ya bakonzi oyo bazalaki liboso na yo mpo na kososola malamu. Okomona solo kati na babuku yango ete engumba oyo ezali engumba ya batomboki, etungisaka bakonzi mpe bituka. Mpe lisusu, wuta kala, ezali esika ya batomboki. Yango wana engumba oyo ebebisamaki.
16 We inform the king: if this city is rebuilt and its walls finished, you will have no portion in Beyond the River. Tozali koyebisa mokonzi ete soki batongi lisusu engumba oyo mpe babongisi bamir na yango, okotikala lisusu na eloko moko te na ngambo ya weste ya ebale Efrate. »
17 The king replied: To Rehum the commander, Shimshai the scribe, and their colleagues in Samaria and the rest of Beyond the River: Greetings. Now then, Mokonzi azongisaki eyano oyo : « Epai ya moyangeli Rewumi ; Shimishayi, mokomi mikanda na ye, mpe baninga na bango mosusu ya mosala oyo bavandaka na Samari mpe kati na bituka nyonso na ngambo ya weste ya ebale Efrate : Napesi bino mbote.
18 the letter you sent us has been read aloud and translated to me. Batangaki mpe babongolaki na miso na ngai mokanda oyo botindelaki biso.
19 I ordered a search, and found this city has long risen against kings, stirring rebellion and revolt. Napesaki mitindo mpo ete baluka koyeba mpe kososola bosolo. Boye emonani solo ete, wuta na kala, engumba oyo etombokelaka kaka bakonzi mpe etindaka bato na botomboki mpe na mobulu.
20 Powerful kings ruled Jerusalem, governed all Beyond the River, and received tribute, tax, and toll. Na Yelusalemi, ezalaki na bakonzi ya nguya oyo bazalaki kokonza etuka mobimba ya ngambo ya weste ya ebale Efrate mpe epai ya banani bazalaki kofuta mpako ya mokonzi, mpako ya mabele mpe mpako ya nzela.
21 Now order these men to stop, so this city is not rebuilt until I command it. Boye, bopesa sik’oyo mitindo epai ya bato wana ete bakoba lisusu te kotonga mpo ete engumba wana etongama lisusu te kino tango ngai moko nakopesa mitindo.
22 Don't neglect this matter. Why should this threat grow and harm the interests of the kings? Bosala keba ete bozwa likambo oyo na pete te. Mpo na nini kotika nzela ete mobulu oyo ekola mpe ekitisa bomengo ya mokonzi ? »
23 Once the copy of King Artaxerxes' letter was read to Rehum, Shimshai the scribe, and their associates, they rushed to the Jews in Jerusalem and stopped them by force and power. Tango kaka batangaki mokanda ya mokonzi Aritakizerisesi liboso ya Rewumi ; Shimishayi, mokomi mikanda na ye, mpe baninga na bango ya mosala bakendeki mbala moko na Yelusalemi epai ya Bayuda mpe bapekisaki bango na makasi ete bakoba lisusu te kotonga.
24 So work on the house of our Father in Jerusalem stopped and stayed stopped, until the second year of the reign of Darius king of Persia. Wuta tango wana, misala ya Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi etelemaki kino na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, mokonzi ya Persi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]