Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Ezra 5 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then the prophets Haggai and Zechariah son of Iddo prophesied to the Jews in Judah and Jerusalem, in the name of our Father, the God of Israel, over them. Mosakoli Aje mpe mosakoli Zakari, mwana mobali ya Ido, basakolaki mpo na bato ya Yuda oyo bazalaki kati na mokili ya Yuda mpe na engumba Yelusalemi, na Kombo ya Nzambe ya Isalaele, oyo azalaki kati na bango.
2 Then Zerubbabel son of Shealtiel and Jeshua son of Jozadak rose and began rebuilding our Father's house in Jerusalem, the prophets of our Father with them, supporting them. Bongo, Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, mpe Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki, bazongelaki mosala ya kotonga lisusu Tempelo ya Nzambe kati na Yelusalemi. Mpe basakoli ya Nzambe bazalaki elongo na bango mpo na kosunga bango.
3 Then Tattenai, governor of Beyond-the-River, Shethar-bozenai, and their associates came and asked, "Who authorized you to build this house and finish this structure?" Mbala moko, Tatinayi, moyangeli ya etuka oyo ezalaki na ngambo ya weste ya ebale Efrate, mpe Shetari-Bozinayi elongo na baninga na bango ya mosala batunaki bango : — Nani apesi bino nzela ya kotonga lisusu Tempelo oyo mpe ya kotelemisa lisusu mir oyo ?
4 They also asked, "What are the names of the men who are constructing this building?" Batunaki lisusu : — Bato oyo bazali kotonga Ndako oyo, bakombo na bango banani ?
5 But their Father's eye watched over the Jewish elders, so no one stopped them until the matter reached Darius and a written answer returned. Kasi liso ya Nzambe na bango ezalaki kosenzela bakambi ya Bayuda. Boye bapekisaki bango te kosala misala na bango kino tango Dariusi azwaki mokanda na tina na yango mpe kino tango bazwaki mokanda ya eyano kowuta na Dariusi.
6 Copy of the letter Tattenai, governor of Beyond the River, and Shethar-bozenai with his fellow officials of Beyond the River, sent to King Darius. Tala mokanda oyo Tatinayi, moyangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, Shetari-Bozinayi elongo na baninga na bango ya mosala, bakambi ya bituka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, batindelaki mokonzi Dariusi.
7 They sent him a report reading: To King Darius, complete peace. Tala makambo oyo bakomaki kati na mokanda yango : « Epai ya mokonzi Dariusi. Tika ete bokonzi na yo ewumela na kimia !
8 Know, king: we went to Judah's province, to the great God's house. It's being built with huge stones, timber laid in the walls. The work proceeds diligently and thrives in their hands. Tika ete mokonzi ayeba ete tokendeki na etuka ya Yuda kino na Tempelo ya Nzambe Monene. Bato bazali kotonga yango na mabanga bakata mpe bazali kotia mabaya na likolo ya bamir. Mosala yango ezali kotambola malamu mpe kokende noki kati na maboko na bango.
9 So we asked the elders, "Who authorized you to build this house and finish this structure?" Totunaki bakambi na bango motuna oyo : ‹ Nani apesi bino nzela ya kotonga lisusu Tempelo oyo mpe ya kotelemisa lisusu bamir ? ›
10 We also asked their names, to inform you, and to record the leaders' names. Totunaki bango bakombo na bango mpo ete toyebisa yo yango mpe tokomela yo bakombo ya bakambi na bango.
11 They answered us, "We are servants of our Father, the God of heaven and earth, and we are rebuilding the house built and finished many years ago by a great king of Israel. Kasi tala eyano oyo bapesaki biso : ‹ Tozali basali ya Nzambe ya Likolo mpe ya se ; tozali kotonga lisusu Tempelo oyo etongamaki wuta mibu ebele na kala. Mokonzi moko monene ya Isalaele atongaki mpe asilisaki yango.
12 But because our ancestors angered our Father, the God of heaven, he handed them to Nebuchadnezzar the Babylonian, king of Babylon, who destroyed this house and exiled the people to Babylon. Kasi lokola batata na biso batumbolaki kanda ya Nzambe ya Likolo, akabaki bango na maboko ya Nabukodonozori, moto ya Chalide, mokonzi ya Babiloni. Ezali ye nde abukaki Tempelo oyo mpe amemaki bato na bowumbu, na Babiloni.
13 But in Cyrus king of Babylon's first year, Cyrus the king decreed this house of our Father be rebuilt. Nzokande, na mobu ya liboso ya bokonzi na ye lokola mokonzi ya Babiloni, Sirisi apesaki mitindo ya kotonga lisusu Ndako oyo ya Nzambe,
14 Cyrus the king also brought from the temple of Babylon the gold and silver vessels of the house of our Father that Nebuchadnezzar took from the temple in Jerusalem and carried to the temple of Babylon. He gave them to one named Sheshbazzar, whom he appointed governor, alongolaki kutu na tempelo ya Babiloni biloko basala na wolo mpe na palata, oyo Nabukodonozori azwaki na Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi mpe amemaki na tempelo ya Babiloni. Mokonzi Sirisi apesaki biloko yango epai ya Sheshibatsari oyo ye, Sirisi, atiaki lokola moyangeli.
15 saying to him, 'Take these vessels, go put them in Jerusalem's temple, and let the house of God be rebuilt on its site.' Alobaki na ye : ‘ Kamata biloko oyo mpe kende kotia yango kati na Tempelo ya Yelusalemi ; mpe tika ete Tempelo ya Nzambe etongama lisusu na esika na yango ya kala. ’
16 Then this Sheshbazzar came and laid the foundations of our Father's house in Jerusalem; from then until now it has been under construction, still unfinished." Ezali bongo nde Sheshibatsari ayaki awa na Yelusalemi mpo na kotonga miboko ya Ndako ya Nzambe. Wuta mokolo wana kino na mokolo ya lelo, Tempelo ezali kotongama, kasi misala esili nanu te. ›
17 So, if the king agrees, let a search be made in the royal records in Babylon, to see if King Cyrus ordered this house of God in Jerusalem rebuilt. Then let the king send us his decision on this matter. Sik’oyo, soki yango esepelisi mokonzi, tika ete baluka kati na babuku ya kala ya bakonzi ya Babiloni mpo na kotala soki mokonzi Sirisi apesaki solo mitindo ya kotonga lisusu Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi. Mpe tika ete mokonzi atindela biso mokano na ye na tina na likambo oyo. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]