Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Ezra 6 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then King Darius issued a decree, and a search was made in Babylon's archive house, where the treasures were stored. Mokonzi Dariusi apesaki mitindo, mpe balukaki kati na babuku ya kala oyo ezalaki na Babiloni, kati na ebombelo bomengo ya mokonzi.
2 A scroll was found at Ecbatana, in the fortress in Media's province, with this record written in it: Mpe bamonaki buku moko kati na Ekibatane, engumba mokonzi ya etuka ya Medi. Tala makomi oyo ezalaki kati na buku yango : « Ekaniseli :
3 In the first year of King Cyrus, King Cyrus issued a decree: the house of God in Jerusalem is to be rebuilt, a place for sacrifices, its foundations retained, ninety feet high and ninety feet wide, Na mobu ya liboso ya mokonzi Sirisi, mokonzi Sirisi azwaki mokano na tina na Tempelo ya Nzambe kati na Yelusalemi : Tempelo ya Nzambe esengeli kotongama lisusu mpo ete ezala esika ya kobonza mbeka ; boye esengeli kozongisa miboko na yango. Tempelo ekozala na bametele pene tuku misato na bosanda mpe bametele pene tuku misato na mokuse.
4 three layers of large stones and one of timber; pay the cost from the king's treasury. Ekozala na milongo misato ya mabanga bakata mpe molongo moko ya mabaya ya sika mpo na motondo. Mbongo ya kofuta mpo na misala yango ekowuta na bomengo ya mokonzi.
5 Also, return the gold and silver vessels of the house of God that Nebuchadnezzar took from the Jerusalem temple and brought to Babylon—bring them back to the Jerusalem temple, each to its place, and put them in the house of God. Lisusu, biloko basala na wolo mpe na palata ya Ndako ya Nzambe, oyo Nabukodonozori azwaki na Tempelo kati na Yelusalemi mpe amemaki na Babiloni, esengeli kozonga na bisika na yango kati na Tempelo, na Yelusalemi ; basengeli kotia yango kati na Ndako ya Nzambe.
6 Now then, Tattenai governor of the province Beyond the River, Shethar-bozenai, and your fellow officials there—stay far from that place. Sik’oyo, Tatinayi, moyangeli ya etuka oyo ezali na ngambo ya weste ya ebale Efrate, Shetari-Bozinayi mpe bino baninga na bango ya mosala, bakambi ya etuka, bozala mosika ya likambo oyo.
7 Leave the work on this house of God alone; let the governor of the Jews and elders of the Jews rebuild this house of God on its site. Botika ete misala ya kotonga lisusu Ndako oyo ya Nzambe ekoba. Tika ete moyangeli mpe bakambi ya Bayuda batonga yango lisusu na esika na yango ya kala.
8 I decree this for these Jewish elders rebuilding God's house: pay their full costs from the royal treasury, from the taxes of the province Beyond the River, so the work does not stop. Tala mitindo oyo ngai nazali kopesa bino na tina na oyo bosengeli kosala mpo na kosunga bakambi ya Bayuda mpe mpo na misala ya botongi Ndako oyo ya Nzambe : ‹ Bosengeli tango nyonso kozwaka mbongo ya misala na bomengo ya mokonzi, oyo ewutaka na mpako oyo etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate efutaka mpo na mokonzi, mpo na kofuta bato wana na ndenge ekoki mpe mpo ete misala etelema te.
9 Give the priests in Jerusalem whatever they need daily, without fail: young bulls, rams, lambs for burnt offerings to the God of heaven, and wheat, salt, wine, oil, Bosengeli mpe kopesaka mikolo nyonso epai ya Banganga-Nzambe ya Yelusalemi biloko nyonso oyo bakozala na yango na bosenga mpo na mbeka ya kotumba ya Nzambe ya Likolo : bana ngombe ya mibali, bameme ya mibali, bana meme, ble, mungwa, masanga ya vino mpe mafuta. Soki bakomi na bosenga ya biloko, bino bosengeli kopesa bango yango mikolo nyonso, mpe esengeli te kozanga,
10 to offer sacrifices pleasing to the God of heaven, and pray for the king and his sons' life. mpo ete bakoka kobonzaka mbeka ya solo kitoko epai ya Nzambe ya Likolo, mpe mpo ete basambelaka mpo na bomoi malamu ya mokonzi elongo na bana na ye ya mibali.
11 I also decree: whoever alters this edict, a beam is torn from his house, he is raised up and impaled on it, and his house is turned into a rubble heap for it. Bongo tala mokano oyo nasili kozwa mpo na moto nyonso oyo akobongola to akotosa te mitindo oyo : bakolongola libaya moko kati na ndako na ye, bakotelemisa yango, bakodiembika ye na libaya yango mpe bakokomisa ndako na ye mopiku ya biloko ya mbindo.
12 May the God who settled his name there overthrow any king or people who lifts a hand to change this order or destroy this house of God in Jerusalem. I, Darius, issue this order—let it be done promptly. Tika ete Nzambe oyo atiaki Kombo na Ye kuna akweyisa mokonzi nyonso to bato nyonso oyo bakomeka kotombola loboko mpo na koboya kotosa to kobongola mitindo na ngai na kobuka Tempelo oyo ya Nzambe kati na Yelusalemi. Ezali ngai, Dariusi, moto napesi mitindo yango. Tika ete botosa yango malamu mpe na lombangu. › »
13 Then Tattenai, governor of Beyond the River, Shethar-bozenai, and their colleagues did exactly as King Darius had ordered, promptly. Boye, Tatinayi, moyangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, mpe Shetari-Bozinayi elongo na baninga na bango ya mosala batosaki mitindo ya mokonzi Dariusi na lombangu mpe na ndenge ezaleli.
14 The elders of the Jews kept building and prospering through the prophecy of Haggai the prophet and Zechariah son of Iddo. They finished building by command of our Father, the God of Israel, and by decree of Cyrus, Darius, and Artaxerxes king of Persia. Boye bakambi ya Bayuda bakobaki misala ya kotonga, mpe balongaki wana balendisamaki na maloba ya basakoli Aje mpe Zakari, mokitani ya Ido. Basilisaki kotonga kolanda mitindo ya Nzambe ya Isalaele mpe ya Sirisi, Dariusi, mpe Aritakizerisesi, bakonzi ya Persi.
15 This house was finished on the third of Adar, in the sixth year of King Darius's reign. Basilisaki kotonga Ndako mobimba ya Nzambe, na mokolo ya misato ya sanza ya Adari, tango mokonzi Dariusi akokisaki mibu motoba na bokonzi.
16 Then Israel's people—priests, Levites, and the rest of the returned exiles—celebrated the dedication of this house of our Father with joy. Bato ya Isalaele, Banganga-Nzambe, Balevi mpe bato mosusu oyo bawutaki na bowumbu basalaki feti ya libulisi ya Ndako ya Nzambe.
17 For the dedication of this house of our Father they offered one hundred bulls, 200 rams, 400 lambs, and twelve male goats as a sin offering for all Israel, one per tribe. Babonzaki bangombe ya mibali nkama moko, bameme ya mibali nkama mibale, bana meme nkama minei mpo na libulisi ya Ndako ya Nzambe ; mpe bantaba ya mibali zomi na mibale, moko mpo na ekolo moko na moko ya Isalaele, lokola mbeka mpo na masumu ya Isalaele mobimba.
18 They installed the priests in their divisions and the Levites in their divisions for our Father's service in Jerusalem, as written in the book of Moses. Bakabolaki mpe Banganga-Nzambe kolanda milongo na bango, mpe Balevi kolanda masanga na bango mpo na mosala ya Nzambe kati na Yelusalemi, ndenge ekomama kati na buku ya Moyize.
19 The returned exiles kept the Passover on the fourteenth day of the first month. Na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso, bana ya Isalaele oyo bawutaki na bowumbu basepelaki feti ya Pasika.
20 Priests and Levites had purified themselves together, all clean. They killed the Passover lamb for all returned exiles, their brother priests, and themselves. Banganga-Nzambe mpe Balevi bamipetolaki kolanda mibeko mpe bakomaki peto. Boye Balevi bakataki kingo ya mpate lokola mbeka ya Pasika mpo na bato nyonso oyo bawutaki na bowumbu, mpo na bandeko na bango, Banganga-Nzambe, mpe mpo na bango moko.
21 Israelites returned from exile ate it, with all who had separated themselves from the impurity of the land's nations to seek our Father, the God of Israel. Bana ya Isalaele oyo bawutaki na bowumbu baliaki yango elongo na bato nyonso oyo bakabwanaki na misala ya mbindo ya bikolo ya mokili mpe basanganaki elongo na bango mpo na koluka Yawe, Nzambe ya Isalaele.
22 They kept the Feast of Unleavened Bread seven days with joy, for our Father had filled them with joy and turned the Assyrian king's heart toward them, to strengthen their hands in the work of the house of our Father, the God of Israel. Na mikolo sambo, basalaki na esengo feti ya Mapa ezanga levire, pamba te Yawe atondisaki bango na esengo ndenge abongolaki makanisi ya mokonzi ya Asiri mpo ete asunga bango na misala ya botongi Ndako ya Nzambe, ya Nzambe ya Isalaele.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]