Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 27 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "Make the altar of acacia wood: seven and a half feet long, seven and a half feet wide, square, and four and a half feet high. Okosala na mabaya ya nzete ya akasia etumbelo : ekozala ndenge moko na molayi mpe na mokuse, bametele mibale na basantimetele tuku mitano ; bongo bosanda na yango ekozala ya metele moko na basantimetele tuku mitano.
2 Make horns on its four corners, horns of one piece with it; overlay it with bronze. Okosala maseke minei na basonge nyonso minei ya etumbelo, mpo ete maseke mpe etumbelo esala eloko moko ; mpe okobamba bronze na etumbelo.
3 Make pots to clear its ashes, shovels, basins, forks, and firepans; make all its utensils bronze. Okosala na bronze banzungu ya mike mpo na kolongola putulu ya moto, bapawu, basani ya minene, bakanya mpe basani mpo na komema makala ya moto.
4 Make for it a grating, a bronze net; on the net make four bronze rings at its four corners. Okosala motalaka ya bronze mpo na etumbelo ; okokangisa bapete minei ya bronze, na basonge nyonso minei ya motalaka.
5 Set it under the ledge of the altar, so that the net reaches halfway up the altar. Okotia motalaka na se ya etumbelo, na bandelo na yango, mpo ete ekoma na kati-kati ya etumbelo.
6 Make poles for the altar, poles of acacia wood, and overlay them with bronze. Okosala na nzete ya akasia, mabaya mpo na etumbelo mpe okobamba yango bronze.
7 Put the poles through the rings, on the two sides of the altar, to carry it. Boye, mpo na komema etumbelo, bakokotisa mabaya yango na bapete oyo ezali na basonge mibale ya etumbelo.
8 Make it hollow, with boards, as shown to you on the mountain—so they are to make it. Okosala etumbelo na mabaya ; ekozala polele kati na yango. Okosala yango ndenge kaka balakisaki yo na ngomba.
9 "Make the tabernacle's courtyard: curtains of finely twisted linen on the south side, about 150 feet long for that side. Tala ndenge okotonga lopango ya Mongombo : ngambo ya sude oyo ekozala ya bametele pene tuku mitano na molayi, ekozipama na rido ya lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango.
10 Twenty posts with twenty bronze bases; the posts' hooks and bands, silver. Makonzi na yango tuku mibale elongo na makolo na yango tuku mibale ekosalema na bronze ; bongo bibende ya makonzi elongo na biloko na yango ya kosimbela ekozala ya palata.
11 On the north side too, curtains 150 feet long, with twenty posts, twenty bronze bases, and silver hooks and bands for the posts. Ngambo ya nor ekozala na bametele pene tuku mitano na molayi. Ekozala mpe na barido, na makonzi tuku mibale mpe na makolo tuku mibale, oyo esalema na bronze. Makonzi yango ekozala na bibende ya palata egumbama lokola ndobo elongo na biloko na yango ya kosimbela, oyo ekozala ya palata.
12 For the courtyard's west width: curtains seventy-five feet long, ten posts, ten bases. Ngambo ya weste ya lopango ya Mongombo ekozala na bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse. Ekozala mpe na barido, makonzi zomi mpe makolo zomi.
13 The width of the courtyard on the east side, toward the sunrise, is about seventy-five feet. Ngambo ya este ya lopango ya Mongombo, epai wapi moyi ebimelaka, ekozala na bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse.
14 Curtains for one side of the gate: about twenty-two and a half feet, with three posts and three bases. Ngambo moko ya ekuke ekozala na barido ya bametele sambo na basantimetele tuku mitano elongo na makonzi misato mpe makolo misato.
15 On the other side, curtains twenty-two and a half feet, three posts, three bases. Ngambo mosusu ya ekuke ekozala mpe na barido ya bametele sambo na basantimetele tuku mitano, elongo na makonzi misato mpe makolo misato.
16 The courtyard gate's screen: thirty feet, blue, purple, and scarlet yarn with finely twisted linen, embroidered, with four posts and four bases. Mpo na ekuke ya lopango ya Mongombo, bongisa rido ya bametele pene zomi na molayi, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi ; mpe ekosalema na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, elongo na makonzi minei mpe makolo minei ; ekozala mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba.
17 All posts around the courtyard: banded with silver, hooks silver, bases bronze. Makonzi nyonso oyo ekozala zingazinga ya lopango esengeli kozala na biloko na yango ya kosimbela, bibende na yango egumbama lokola ndobo, ya palata ; mpe makolo na yango ya bronze.
18 The courtyard: about 150 feet long, seventy-five feet wide throughout, seven and a half feet high—fine twisted linen, bronze bases. Lopango ya Mongombo ekozala ya bametele tuku mitano na molayi, bametele tuku mibale na mitano na mokuse na ngambo moko na moko, bametele mibale na basantimetele tuku mitano na bosanda. Barido na yango ekozala ya lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, mpe makolo na yango ekozala ya bronze.
19 All the tabernacle's equipment, whatever its use, all its pegs, and the courtyard's pegs—all of bronze. Biloko nyonso oyo bakosalela misala ya Mongombo, bapike nyonso ya Mongombo mpe ya lopango ekozala ya bronze.
20 "Command the Israelites to bring you pure, pressed olive oil for the light, to keep a lamp burning continually. Okopesa mitindo na bana ya Isalaele ete bamemela yo mafuta ya olive ya peto mpo na minda, mpo ete minda ekoka kopela tango nyonso.
21 In the tent of meeting, outside the curtain before the testimony, Aaron and his sons are to tend it from evening to morning before our Father—a lasting statute for their generations, on behalf of the Israelites." Ezali kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, libanda ya rido oyo ezali liboso ya Sanduku ya Litatoli, nde Aron mpe bana na ye ya mibali bakobanda kopelisa minda tango nyonso liboso ya Yawe, kobanda na pokwa kino na tongo. Ezali mobeko ya libela mpo na milongo nyonso ya bana ya Isalaele.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]