Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 28 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "Bring your brother Aaron near to you, with his sons, from the Israelites, to serve me as priests: Aaron, Nadab, Abihu, Eleazar, Ithamar. These are the sons of Aaron. Kamata kati na bana ya Isalaele Aron, ndeko na yo ya mobali, elongo na bana na ye ya mibali : Nadabi mpe Abiyu, Eleazari mpe Itamari ; mpo ete basala mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai.
2 Make holy garments for Aaron your brother, for glory and for beauty. Okotonga mpo na Aron, ndeko na yo ya mobali, bilamba ya bule lokola elembo ya nkembo mpe ya lokumu.
3 Speak to all who are skillful, whom I have filled with a spirit of wisdom, to make Aaron's garments to dedicate him, to serve me as priest. Bongo yo, okoloba na bato nyonso ya mayele oyo, kati na bango, natondisi molimo ya bwanya mpo ete batonga bilamba ya Aron mpo na kobulisa ye na mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai.
4 These are the garments they must make: a breastpiece, ephod, robe, woven tunic, turban, and sash. They are to make these holy garments for your brother Aaron and his sons, so they may serve me as priests. Tala bilamba oyo bakotonga : elamba ya tolo, efode, kazaka mpe nzambala oyo batia bililingi likolo na yango, kitendi ya kokanga na moto mpe mokaba. Bakotonga bilamba ya bule mpo na Aron, ndeko na yo ya mobali, mpe mpo na bana na ye ya mibali oyo bakosala mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai.
5 They are to use gold, and blue, purple, and scarlet yarn, and fine linen. Bakosalela wolo, langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe lino ya kitoko.
6 "Make the ephod of gold, blue, purple, and scarlet yarn, and finely twisted linen, worked by a skilled craftsman. Bakotonga na wolo efode ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango ; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.
7 It is to have two shoulder pieces, joined at its two edges, joined together. Ekozala na bankamba mibale na basuka na yango mibale mpo na kolata efode yango ; bankamba ekoleka likolo ya mapeka.
8 The waistband on it must match: gold, blue, purple, scarlet yarn, and finely twisted linen, worked in one piece. Mokaba ya efode ekosalema ndenge moko na efode : ekozala ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango.
9 Take two onyx stones and engrave on them the names of the sons of Israel. Okozwa mabanga mibale ya onikisi mpe okokoma na likolo na yango bakombo ya bana mibali ya Isalaele
10 Six names on one stone, the other six on the second stone, by their birth order. kolanda ndenge babotama : bakombo motoba na libanga ya liboso mpe bakombo motoba oyo etikali, na libanga ya mibale.
11 As a jeweler engraves a seal, engrave the two stones with the names of Israel's sons, then mount them in gold filigree. Okokoma bakombo ya bana mibali ya Isalaele na mabanga nyonso mibale ndenge bato basalaka bililingi na kashe na libanga ; mpe okozingela yango na wolo.
12 Put the two stones on the ephod's shoulder pieces as memorial stones for Israel's sons; Aaron will carry their names before me on his two shoulders as a memorial. Okotia mabanga yango na bankamba ya efode lokola mabanga ya ekaniseli mpo na bana mibali ya Isalaele. Aron akomema likolo ya mapeka na ye lokola ekaniseli liboso ya Yawe bakombo na bango.
13 Make settings of gold filigree, Okotia bikangelo ya wolo
14 and two chains of pure gold, twisted like cords; and attach the twisted chains to the settings. mpe okosala basheneti mibale ya wolo basangisa na eloko mosusu te ; okosala yango lokola suki ya maboko mpe okokangisa basheneti yango pembeni-pembeni ya mabanga.
15 "Make a breastpiece of judgment: skilled work, made like the ephod's work—gold, blue, and purple, and scarlet yarn, and finely twisted linen. Okosala elamba ya tolo mpo na koyeba mokano ya Nzambe ; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko. Okotonga yango lokola efode : ekozala ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango.
16 It is to be square and doubled, about nine inches long and nine inches wide. Soki bagumbi yango na biteni mibale, molayi mpe mokuse esengeli kozala ndenge moko : basantimetele pene tuku mibale na mitano.
17 Set in it four rows of stones. The first row is to be carnelian, topaz, and beryl; Okotia na likolo na yango milongo minei ya mabanga ya talo. Na molongo ya liboso, okotia libanga ya saridwane, ya topaze mpe ya emerode ;
18 the second row turquoise, lapis lazuli, and emerald; na molongo ya mibale, okotia libanga ya ribisi, ya safiri mpe ya diama ;
19 the third row jacinth, agate, and amethyst; na molongo ya misato, okotia libanga ya opale, ya agate mpe ya ametisite ;
20 and the fourth row beryl, onyx, and jasper. They are to be set in gold filigree. mpe na molongo ya minei, okotia libanga ya krizolite, ya onikisi mpe ya jasipe. Okokanga mabanga yango na bikangelo ya wolo.
21 Twelve stones, one per name of Israel's sons—each engraved like a seal with its own name, for the twelve tribes. Mabanga yango ekozala zomi na mibale kolanda bakombo ya bana mibali ya Isalaele. Na likolo ya libanga moko na moko, bakokoma kombo ya moko kati na mabota zomi na mibale ; bakokoma yango ndenge basalaka bililingi na kashe.
22 For the breastpiece make chains of pure gold, twisted like cords. Okosala basheneti ya wolo ya peto mpo na elamba ya tolo ; okosala yango ndenge bakangaka suki ya maboko.
23 Make two gold rings for the breastpiece, and fasten the two rings to its two edges. Okosala bapete mibale ya wolo mpo na elamba ya tolo mpe okokangisa yango na basonge mibale ya elamba yango.
24 Then fasten the two gold cords to the two rings at the edges of the breastpiece. Okolekisa basheneti mibale ya wolo kati na bapete mibale oyo ezali na basonge ya elamba ya tolo,
25 Fasten the cords' remaining two ends to the two filigree settings, joining them to the ephod's shoulder pieces at the front. mpe okokangisa basonge mibale mosusu ya basheneti yango, na bikangelo nyonso mibale ; mpe okokangisa yango na bankamba ya efode ; bankamba yango ekoleka na liboso.
26 Make two gold rings; put them on the two ends of the breastpiece, on its inner edge next to the ephod. Okosala bapete mibale ya wolo oyo okotia na basonge mibale ya se ya elamba ya tolo, na ngambo ya kati oyo etala efode.
27 Make two more gold rings and fix them to the ephod's two shoulder pieces, low on the front, near its seam, above its woven band. Okosala bapete mosusu mibale ya wolo oyo okotia na bankamba mibale ya efode, na se, na liboso mpe na pembeni ya mokaba ya efode.
28 The breastpiece is to be bound by its rings to the ephod's rings with a blue cord, so it rests on the ephod's woven band and does not come loose from it. Okokangisa na singa ya langi ya ble bapete ya wolo ya elamba ya tolo mpe bapete ya wolo ya efode, mpo ete elamba ya tolo ezala likolo ya efode mpe elongwa te na likolo na yango.
29 Aaron will carry the names of Israel's sons over his heart on the breastpiece of judgment when he enters the Holy Place, as a continual reminder before me. Boye tango Aron akokota na Esika-Oyo-Eleki-Bule, akomema na motema na ye, na elamba ya tolo ya kokata makambo, bakombo ya bana mibali ya Isalaele lokola ekaniseli liboso ya Yawe mpo na libela.
30 Put the Urim and Thummim into the breastpiece of judgment, so they lie over Aaron's heart when he comes before me. Aaron will always carry the judgment of Israel's sons over his heart before me. Okotia lisusu Urimi mpe Tumimi kati na elamba ya tolo ya kokata makambo mpe yango ekozala likolo ya motema ya Aron tango akotelema liboso ya Yawe. Boye Aron akomema makambo ya bana ya Isalaele liboso ya Yawe mpo na libela.
31 "Make the robe of the ephod entirely of blue. Okosala mobimba ya nzambala oyo ekozala na se ya efode na langi ya ble.
32 An opening for the head in its center, with a woven rim around it like a tunic's collar, so it won't tear. Nzambala esengeli kozala na lidusu na kati-kati mpo na kokotisa moto ; bakotonga pembeni-pembeni ya lidusu yango poso ya makasi mpo ete epasuka te.
33 Make pomegranates of blue, purple, and scarlet yarn around its hem, with gold bells between them. Na se mpe zingazinga ya nzambala, okotia bambuma ya grenade bakangisa na singa ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi ; mpe okotia bangonga ya mike-mike kati na bambuma ya grenade.
34 Gold bell and pomegranate, gold bell and pomegranate, all around the robe's hem. Ekolandana boye : ngonga moko ya moke ya wolo, mbuma moko ya grenade, mpe bongo na bongo, zingazinga ya basonge nyonso ya nzambala.
35 Aaron must wear it while serving. Its sound will be heard entering and leaving the Holy Place before me, so he does not die. Aron asengeli kolata yango tango azali kosala mosala. Makelele ya bangonga ya mike-mike ekoyokana tango akotelema liboso ya Yawe na Esika-Oyo-Eleki-Bule mpe tango akobima ; wana ekolakisa ete akufi te.
36 "Make a pure gold plate; engrave on it like a seal engraving: 'Holy to the Father.' Okosala na wolo ya peto medaye mpe okokoma na likolo na yango ndenge basalaka bililingi na kashe : abulisama mpo na Yawe.
37 Attach it to the turban with a blue cord, on the turban's front. Okokangisa yango na singa ya ble, mpe ekozala na likolo ya kitendi ya kokanga na moto, na mbunzu.
38 It will be on Aaron's forehead; he will bear the guilt of the holy things Israel's people dedicate as their holy gifts. It stays on his forehead always, so they will be accepted before me. Linzanza yango ekozala na mbunzu ya Aron mpo ete akoka komema bambeba oyo bana ya Isalaele bakosala na tina na biloko ya bule oyo bakobonza mpe bakobulisa. Linzanza yango ekozala tango nyonso na mbunzu ya Aron mpo ete Ngai Yawe, nandima makabo yango.
39 Weave the fine linen tunic, make the fine linen turban, and make the sash, an embroiderer's work. Okotongela Aron nzambala ya lino mpe kitendi ya lino mpo na moto ; okosalela ye mpe mokaba oyo bato oyo batongaka bililingi na bilamba bakoyeba kotia bililingi.
40 For Aaron's sons make tunics, sashes, and caps, for glory and for beauty. Okosala lisusu mpo na bana ya Aron banzambala, mikaba mpe bikoti, lokola elembo ya lokumu mpe ya nkembo.
41 Dress Aaron your brother and his sons with him, anoint them, ordain them, dedicate them, so they may serve me as priests. Sima na kolatisa Aron, ndeko na yo ya mobali, elongo na bana na ye ya mibali, okopakola bango mafuta mpe okobulisa bango. Okokomisa bango Banganga-Nzambe mpo ete basalela Ngai.
42 Make linen undergarments for them to cover their naked flesh, reaching from the hips to the thighs. Okosalela bango bakaputula ya lino mpo na kozipa bolumbu na bango : bakaputula yango ekobanda na loketo kino na mipende.
43 Aaron and his sons must wear them whenever they enter the tent of meeting or approach the altar to serve in the Holy Place, so they don't bear guilt and die. This is a lasting statute for him and his descendants after him." Aron mpe bana na ye ya mibali bakolata yango tango nyonso bakobanda kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani to kopusana pembeni ya etumbelo mpo na kosala mosala kati na Esika ya bule, mpo ete bazala na ngambo te mpe bakufa te. Ezali mobeko ya libela mpo na Aron mpe bakitani na ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]