Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 29 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "To dedicate them as priests serving me, do this: take one young bull and two rams without defect, Tala ndenge okosala mpo na kobulisa Aron elongo na bana na ye ya mibali, na mosala ya bonganga-Nzambe mpo ete basalela Ngai. Okozwa mwana ngombe ya mobali mpe bameme mibale ya mibali, ezanga mbeba ;
2 and bread without yeast, unleavened cakes mixed with oil, and unleavened wafers spread with oil, all made of fine wheat flour. okosala mapa mpe bagato ezanga levire, oyo farine na yango basangisa na mafuta ; okosala mpe mikate ezanga levire, kasi bapakola yango mafuta ; okosala yango na farine oyo batuta mpe bayungola malamu.
3 Put them in one basket and present them in it, with the bull and the two rams. Okotia yango nyonso na kitunga moko mpe okomema yango na ekuke ya Mongombo, elongo na mwana ngombe ya mobali mpe bameme mibale ya mibali.
4 Then bring Aaron and his sons to the tent of meeting entrance and wash them with water. Okomema Aron mpe bana na ye ya mibali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe okosukola bango na mayi.
5 Take the garments and dress Aaron in the tunic, the robe of the ephod, the ephod, and the breastpiece, and fasten the ephod's woven band on him. Okozwa bilamba ya bule mpe okolatisa Aron nzambala, kazaka, efode mpe elamba ya tolo ; mpe okokanga ye mokaba ya efode.
6 Set the turban on his head and put the holy crown on the turban. Okokanga ye kitendi na moto mpe okobakisa na likolo ya kitendi yango elembo ya libulisi.
7 Then take the anointing oil, pour it on his head, and anoint him. Okozwa mafuta ya epakolami, okosopa yango na moto na ye mpe okopakola ye yango.
8 Bring his sons forward and dress them in tunics. Okomema bana na ye ya mibali mpe okolatisa bango banzambala.
9 Wrap sashes around Aaron and his sons and fasten their caps. The priesthood is theirs by lasting decree. So you will ordain Aaron and his sons. Okolatisa Aron mpe bana na ye ya mibali mikaba na loketo na bango mpe okolatisa bango bikoti. Na bongo, okobulisa bango na mosala ya bonganga-Nzambe oyo ekozala ya bango kolanda mobeko ya libela na libela.
10 "Bring the bull before the tent of meeting; Aaron and his sons lay their hands on its head. Okomema ngombe ya mobali liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani ; Aron mpe bana na ye ya mibali bakotia maboko na bango na moto na yango.
11 Slaughter the bull before me at the entrance of the tent of meeting. Okokata ngombe yango kingo liboso na Ngai Yawe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
12 Take some of the bull's blood and with your finger put it on the horns of the altar; pour out the rest at the base of the altar. Okozwa ndambo ya makila ya ngombe yango, mpe okosalela mosapi na yo mpo na kotia makila yango na maseke ya etumbelo ; okosopa na makolo ya etumbelo makila oyo ekotikala.
13 Take all the fat covering the organs, the lobe of the liver, and the two kidneys with their fat, and burn them on the altar. Okozwa mafuta nyonso oyo ezalaka pembeni-pembeni ya biloko ya kati, mafuta oyo ezipaka bafwa mpe bambuma nyonso mibale oyo ezalaka kati na loketo elongo na mafuta na yango ; mpe okotumba yango na etumbelo.
14 Burn the bull's flesh, hide, and waste outside the camp. It is a sin offering. Kasi okotumba na libanda ya molako misuni ya ngombe yango, poso na yango mpe nyei na yango. Ezali mbeka mpo na masumu.
15 "Take one ram; Aaron and his sons are to lay their hands on its head. Okozwa lisusu meme moko ya mobali ; Aron mpe bana na ye ya mibali bakotia maboko na bango na moto na yango.
16 Slaughter the ram, take its blood, and throw it against the sides of the altar. Okokata meme yango kingo, okozwa makila na yango mpe okosopa yango na bapembeni nyonso ya etumbelo.
17 Cut the ram into pieces, wash its inner organs and legs, and place them with its pieces and head. Okokata-kata meme yango na biteni, okosukola biloko na yango ya kati elongo na makolo na yango mpe okotia yango likolo ya biteni mosusu mpe likolo ya moto.
18 Then burn the whole ram on the altar. It is a burnt offering to me, a pleasing aroma, a food offering presented to me. Okotumba meme mobimba ya mobali na etumbelo ; ezali mbeka ya kotumba mpo na Yawe, likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, likabo oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.
19 "Take the other ram, and Aaron and his sons are to lay their hands on its head. Okozwa meme mosusu ya mobali ; Aron elongo na bana na ye ya mibali bakotia maboko na bango na moto na yango.
20 Slaughter the ram, take some of its blood, and put it on Aaron's right earlobe, on his sons' right earlobes, on their right thumbs and right big toes, and throw the rest of the blood against the sides of the altar. Okokata meme yango kingo, okozwa ndambo ya makila na yango mpe okotia yango na songe ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali. Okotia yango lisusu na mosapi ya monene ya loboko na bango ya ngambo ya mobali mpe na mosapi ya monene ya lokolo na bango ya ngambo ya loboko ya mobali.
21 Take some of the blood on the altar and some of the anointing oil, and sprinkle them on Aaron and his garments, and on his sons and their garments with him. Then he and his garments will be holy, with his sons and their garments. Okozwa makila oyo ekozala na etumbelo mpe mafuta ya epakolami, okosopela yango Aron mpe bilamba na ye, bana na ye mpe bilamba na bango. Na bongo, ye mpe bana na ye elongo na bilamba na bango bakobulisama.
22 Take the fat from the ram: the fat tail, the fat covering the internal organs, the liver's long lobe, the two kidneys with their fat, and the right thigh—for it is a ram of ordination. Tala biteni ya mafuta ya meme ya mobali oyo okozwa : mokila, mafuta nyonso oyo ezalaka pembeni-pembeni ya biloko ya kati, mafuta oyo ezipi bafwa, bambuma mibale oyo ezalaka kati na loketo elongo na mafuta na yango mpe mopende ya ngambo ya mobali, pamba te meme yango ya mobali ezali ya libulisi.
23 Take one loaf, one oil cake, and one wafer from the basket of bread without yeast before me. Tala biloko oyo okozwa kati na kitunga ya mapa ezanga levire, oyo ezali liboso ya Yawe : lipa moko, gato moko balamba na mafuta mpe galeti moko.
24 Put all these in the hands of Aaron and his sons, and wave them as a wave offering before me. Okotia biloko oyo nyonso na maboko ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali ; okoyebisa bango ete batombola yango liboso ya Yawe lokola likabo ya kotombola.
25 Take them from their hands and burn them on the altar over the burnt offering, a pleasing aroma before me. It is a food offering to me. Okozwa yango lisusu na maboko na bango mpe okotumba yango na etumbelo, na likolo ya mbeka ya kotumba ; ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, likabo oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.
26 "Take the breast of Aaron's ordination ram and wave it before me as a wave offering; it is your portion. Okozwa tolo ya meme ya mobali mpo na kobulisa Aron, okotombola yango liboso ya Yawe lokola mbeka ya kotombola ; ekozala eteni na yo.
27 Set apart the wave-offering breast and the raised thigh from the ordination ram—the portions for Aaron and his sons. Okobulisa biteni ya libulisi mpo na Aron mpe bana na ye ya mibali : tolo mpe mopende ya meme oyo batombolaki mpo na kobonzela Yawe.
28 It belongs to Aaron and his sons as a permanent share from the people of Israel, for it is a contribution—the contribution from the people of Israel's peace offerings, their contribution to me. Biteni yango ekozala ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali lokola mobeko ya libela na libela. Pamba te ezali makabo ya bana ya Isalaele mpo na Yawe, makabo oyo ekowuta na mbeka na bango ya boyokani.
29 "Aaron's holy garments pass to his sons after him, to be anointed and ordained in them. Bilamba ya bule ya Aron ekotikala sima na ye epai ya bana na ye. Bakolata yango tango bakopakola bango mafuta mpe bakobulisa bango.
30 The son who succeeds him as priest and enters the tent of meeting to serve in the Holy Place is to wear them seven days. Mikolo sambo, moko kati na bana na ye ya mibali oyo akokitana na ye lokola Nganga-Nzambe, akolata yango mpe akokota na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kosala mosala ya bonganga-Nzambe kati na Esika ya bule.
31 "Take the ram of ordination and boil its flesh in a holy place. Okokamata meme ya mobali ya libulisi mpe okolamba mosuni na yango na esika moko ya bule.
32 At the entrance of the tent of meeting, Aaron and his sons will eat the ram's meat and the bread in the basket. Aron mpe bana na ye ya mibali bakolia mosuni ya meme mpe lipa oyo ezali kati na kitunga, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
33 They are to eat what made atonement at their ordination and dedication, but no outsider is to eat it, because it is holy. Kaka bango nde bakolia makabo oyo na nzela na yango mosala ya bolimbisi masumu esalemaki tango babulisaki bango mpo na mosala ya bonganga-Nzambe ; kasi moto oyo abulisama te akoki kolia yango te, pamba te ezali bule.
34 If any ordination meat or bread remains till morning, burn the rest with fire. It must not be eaten, because it is holy. Soki mosuni ya mbeka ya libulisi mpe lipa ekomi kino na tongo, okotumba yango na moto. Bakoki kolia yango lisusu te, pamba te ezali bule.
35 "Do this for Aaron and his sons, following all I commanded you. Take seven days to ordain them. Sala mpo na Aron mpe mpo na bana na ye ya mibali makambo nyonso oyo natindi yo. Okosala mikolo sambo mpo na kobulisa bango na mosala ya bonganga-Nzambe.
36 Each day offer a bull as a sin offering for atonement. Purify the altar by making atonement for it, and anoint it to dedicate it. Mokolo na mokolo, okobonza mbeka ya ngombe ya mobali lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu. Okopetola etumbelo na nzela ya mosala ya bolimbisi masumu, oyo okosala mpo na etumbelo yango mpe okosopela yango mafuta ya epakolami mpo na kobulisa yango.
37 For seven days make atonement for the altar and dedicate it. Then it will be most holy, and whatever touches it becomes holy. Mikolo sambo, okosala mosala ya bolimbisi masumu na etumbelo mpo na kobulisa yango. Boye etumbelo ekokoma bule koleka mpe nyonso oyo ekotutana na yango ekokoma bule.
38 "This is what you are to offer on the altar: two year-old lambs each day, without fail. Tala mbeka oyo okopesela mitindo ete batumbaka mokolo na mokolo na etumbelo mpo na libela : bana meme mibale ya mobu moko.
39 Offer one lamb in the morning and the other at twilight. Okotumba mwana meme moko na tongo, mpe mosusu, na pokwa.
40 With the first lamb offer about two quarts of fine flour mixed with about a quart of pressed oil, and about a quart of wine as a drink offering. Mpo na mwana meme ya liboso, okopesa bakilo misato ya farine basangisa na litele moko na kati-kati ya litele ya mafuta, mpe okosopa litele moko na kati-kati ya litele ya vino lokola mbeka ya masanga.
41 Offer the second lamb at twilight with the same grain and drink offering as in the morning, a pleasing aroma, a food offering to me. Mpo na mwana meme ya mibale, okobonza yango na pokwa elongo na lolenge moko ya makabo oyo obonzaki na tongo : farine, mafuta mpe mbeka ya masanga ya vino ; okobonza yango lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.
42 A continual burnt offering for your generations at the tent of meeting's entrance before me, where I will meet with you to speak with you. Ezali mbeka ya kotumba ya tango nyonso, kati na bikeke nyonso : bokobanda kotumba yango na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani liboso ya Yawe ; ezali na esika wana nde nakobanda kokutana mpe kolobana na bino.
43 There I will meet with the Israelites, and my glory will make the place holy. Ezali na esika yango nde nakobanda kokutana na bana ya Isalaele ; bongo nkembo na Ngai ekobulisa esika yango.
44 I will dedicate the tent of meeting and the altar, and dedicate Aaron and his sons to serve me as priests. Nakobulisa Ndako ya kapo ya Bokutani mpe etumbelo ; nakobulisa lisusu Aron mpe bana na ye ya mibali mpo ete basalela Ngai lokola Banganga-Nzambe.
45 "I will dwell among the people of Israel and will be their Father. Boye nakovanda kati na bana ya Isalaele mpe nakozala Nzambe na bango.
46 They will know I am their Father, who brought them out of Egypt so I could live among them. I am their Father." Bakoyeba solo ete Ngai nazali Yawe, Nzambe na bango, Nzambe oyo abimisaki bango wuta na Ejipito mpo na kovanda kati na bango. Nazali Yawe, Nzambe na bango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]