Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 30 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "Make an altar for burning incense; make it of acacia wood. Okosala lisusu etumbelo ya malasi na nzete ya akasia.
2 Square: about eighteen inches long, eighteen inches wide, and about three feet high, its horns of one piece with it. Molayi mpe mokuse na yango ekozala ndenge moko, basantimetele pene tuku mitano ; mpe bosanda na yango ekozala na metele moko. Maseke na yango ekokangana na etumbelo.
3 Cover it in pure gold—its top, sides all around, and horns—then add a gold rim around it. Okobamba wolo ya peto na likolo ya etumbelo, na mipanzi na yango mpe na maseke ; mpe okozingela pembeni na yango na libende ya wolo.
4 Make two gold rings below its molding, on two opposite sides, to hold the carrying poles. Okosala mpo na etumbelo bapete ya wolo na se ya ebende ya wolo oyo ezingeli yango : mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu ; mpo na kokotisa mabaya ya komemela etumbelo.
5 Make the poles of acacia wood and overlay them with gold. Okosala mabaya yango na nzete ya akasia mpe okobamba yango wolo.
6 Set it before the curtain that is by the ark of the testimony, before the cover over the testimony, where I will meet you. Okotia etumbelo liboso ya rido oyo ezali liboso ya Sanduku ya Litatoli, liboso ya esika ya bolimbisi masumu oyo ezali na likolo ya Sanduku ya Litatoli. Ezali na esika yango nde nakobanda kokutana na yo.
7 Every morning when he tends the lamps, Aaron is to burn fragrant incense on it. Tongo nyonso, Aron akotumba ansa na etumbelo yango tango akobongisa minda ; mpe pokwa nyonso, tango akopelisa yango.
8 When Aaron sets up the lamps at dusk, he is to burn it—a continual incense before me, through your generations. Aron asengeli kotumba lisusu ansa tango akopelisa minda na pokwa mpo ete ansa epelaka tango nyonso liboso ya Yawe mpo na libela.
9 Do not offer unauthorized incense, burnt offering, or grain offering on it; do not pour a drink offering on it. Kobonza te na etumbelo : ansa oyo elongobani te, mbeka ya kotumba to makabo ya bambuma. Mpe kosopa te likolo na yango makabo ya masanga ya vino.
10 Once a year Aaron is to atone on its horns; once a year, with the blood of the sin offering of atonement, he is to atone for it throughout your generations. It is most holy to me." Mbala moko na mobu, Aron asengeli kosala mosala ya bolimbisi masumu, na maseke ya etumbelo ; akosala yango na makila ya mbeka ya masumu mpo na milongo oyo ekoya. Etumbelo ekozala bule koleka mpo na Yawe.
11 Our Father said to Moses, Yawe alobaki na Moyize :
12 "When you take a census of the Israelites to count them, each must give me a ransom for his life at that counting, so no plague comes on them as they are counted. — Tango okotanga bana ya Isalaele, moko na moko kati na bango akofuta mpo na Yawe, mpako mpo na kosikola bomoi na ye tango bakotanga ye. Boye etumbu moko te ekokweyela bango tango bakotangama.
13 Everyone counted must give about a fifth of an ounce of silver, by the sanctuary standard, as an offering to me. Moto nyonso oyo batangi asengeli kofuta motuya oyo mpo na Yawe lokola mpako, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo : bagrame motoba ya palata.
14 Everyone who is counted, twenty years old and upward, is to give this offering to me. Moto nyonso oyo batangi, kobanda mibu tuku mibale to koleka, akofuta mpako mpo na Yawe.
15 The rich must not give more, nor the poor less, than this fifth of an ounce, when you offer it to me to atone for your lives. Na tango ya kofuta mpako mpo na Yawe, mpo na kosikola bomoi na bino, mozwi akofuta te motuya koleka bagrame motoba ya palata, mpe mobola akofuta te motuya oyo ezali na se ya bagrame motoba.
16 Take the atonement money from the Israelites; give it for the tent of meeting's service. It will be a memorial for the Israelites before me, to atone for your lives." Okozwa epai ya bana ya Isalaele mpako mpo na kosikola bomoi na bango mpe okosalela yango mpo na mosala ya kobongisa Ndako ya kapo ya Bokutani. Ekozala mpo na bana ya Isalaele ekaniseli liboso ya Yawe mpo na lisiko ya bomoi na bango.
17 Our Father said to Moses, Yawe alobaki na Moyize :
18 "Make a bronze basin with its bronze stand, for washing. Set it between the tent of meeting and the altar; put water in it, — Okosala na bronze sani moko monene mpo na komipetola mpe evandelo na yango ; okotia yango na kati-kati ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe etumbelo, mpe okotia mayi kati na yango.
19 so that Aaron and his sons can use it to wash their hands and feet. Aron mpe bana na ye ya mibali bakobanda kosukola maboko mpe makolo na bango na mayi ya sani yango.
20 Entering the tent of meeting, they must wash with water so they won't die; or approaching the altar to serve, to burn a food offering to me. Basengeli kosukola na mayi yango mpo ete bakufa te tango bakokota na Ndako ya kapo ya Bokutani to tango bakopusana pembeni ya etumbelo mpo na kotumba makabo bazikisa na moto mpo na Yawe.
21 They must wash their hands and feet, or they will die. It is a lasting rule for Aaron and his descendants, generation after generation." Basengeli kosukola makolo mpe maboko na bango mpo ete bakufa te. Oyo ezali mobeko oyo ekobongwana te mpo na Aron mpe bakitani na ye mpo na libela.
22 Our Father said to Moses, Yawe alobaki na Moyize :
23 "Take the finest spices: 12½ pounds of liquid myrrh, half as much—6¼ pounds—of fragrant cinnamon, and 6¼ pounds of fragrant cane, — Zwa mafuta ya solo kitoko : bakilo motoba ya mire, kati-kati na yango to bakilo misato ya sinamoni, bakilo misato ya kaneli,
24 and twelve and a half pounds of cassia, measured by the sanctuary standard, and a gallon of olive oil. bakilo misato ya kasia, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, mpe balitele motoba ya mafuta ya olive.
25 Make it a holy anointing oil, a blended perfume, the work of a perfumer—a holy anointing oil. Na biloko oyo nyonso, okosala mafuta ya epakolami ya bule, ya solo kitoko, oyo esalemi na mosali malasi ; ekozala mafuta ya bule mpo na epakolami.
26 With it anoint the tent of meeting, the ark of the testimony, Okosalela mafuta yango mpo na kopakola Ndako ya kapo ya Bokutani, Sanduku ya Litatoli,
27 the table and all its utensils, the lampstand and its utensils, the altar of incense, mesa mpe bisalelo na yango nyonso, etelemiselo ya minda mpe biloko na yango nyonso, etumbelo ya malasi,
28 the altar of burnt offering with all its utensils, and the basin with its stand. etumbelo ya bambeka ya kotumba mpe bisalelo na yango nyonso elongo na sani mpo na komipetola mpe evandelo na yango.
29 Dedicate them so they are most holy; whatever touches them becomes holy. Okobulisa yango mpo ete ezala bule koleka. Nyonso oyo ekotutana na yango ekozala bule.
30 Anoint Aaron and his sons; dedicate them to serve me as priests. Okopakola Aron mpe bana na ye ya mibali mafuta mpe okobulisa bango mpo ete basalela Ngai lokola Banganga-Nzambe.
31 Say to the Israelites, 'This are to be my holy anointing oil throughout your generations. Sima, okoloba na bana ya Isalaele : « Mafuta oyo ya epakolami ebulisami libela na libela mpo na Yawe.
32 Don't pour it on anyone's body, and don't make anything like it by its formula. It is holy—it is to be holy to you. Bokopakola yango te na banzoto ya bato mpe bomekola te ndenge basalela yango, pamba te ezali bule mpe bosengeli komona yango bule.
33 Whoever blends anything like it, or puts it on an outsider, will be cut off from his people.'" Moto nyonso oyo akomekola mafuta yango mpe akosopa yango na nzoto ya moto oyo abulisami te, basengeli kolongola ye kati na bato na ye. »
34 Our Father said to Moses, "Take fragrant spices—stacte, onycha, and galbanum—these fragrant spices with pure frankincense, in equal parts, Yawe alobaki na Moyize : — Zwa biloko ya mike-mike ya solo kitoko : sitakite, onikisi, galibanumi mpe ansa oyo basangisa na eloko mosusu te ; biloko nyonso ezala kilo moko.
35 and make them into fragrant incense, the work of a perfumer, seasoned with salt, pure and holy. Okosala na yango ansa ya solo kitoko oyo esalemi na moto oyo asalaka malasi. Ekozala malasi oyo ezali na mungwa, ya peto mpe ya bule.
36 Grind some of it very fine and put some before the testimony in the tent of meeting, where I will meet you. It remains most holy to you. Okosala na ndambo na yango mosusu putulu oyo okotia liboso ya Sanduku ya Litatoli kati na Ndako ya kapo ya Bokutani epai wapi nakokutana na yo. Ekozala bule koleka mpo na bino.
37 Don't make incense to this formula for yourselves; it is holy to you, for it belongs to me. Bokomisalela te ansa mosusu ya lolenge wana. Okomona yango bule mpe ekozala kaka mpo na Yawe.
38 Whoever makes any like it to enjoy its fragrance is to be cut off from his people." Moto nyonso oyo akomekola yango mpo na kosepela na solo na yango ya kitoko, basengeli kolongola ye kati na bato na ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]