Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 31 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Our Father spoke to Moses: Yawe alobaki na Moyize :
2 "Look, I have called by name Bezalel son of Uri, son of Hur, of Judah's tribe, — Yoka, naponi Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Wuri, moto ya libota ya Yuda ;
3 and I have filled him with my Spirit, with wisdom, with understanding, with knowledge, and with all craftsmanship, natondisi ye na Molimo ya Nzambe, na bwanya, na mayele mpe na boyebi mpo na kosala misala ya lolenge nyonso ;
4 to devise artistic designs, to work in gold, in silver, and in bronze, mpo na kokanisa mpe kosala misala ya wolo, ya palata mpe ya bronze ;
5 in cutting stones for setting and in carving wood, to work in every kind of craft. mpo na kokata mabanga ya talo, kobamba yango, kosala bililingi na banzete mpe mpo na kosala misala ya lolenge nyonso.
6 I myself have appointed Oholiab son of Ahisamach, of the tribe of Dan, to work alongside him. I have put wisdom in every skilled craftsman's heart, so they can make all I have commanded you. Tala, napesi ye lokola mosungi Oliabi, mwana mobali ya Ayisamaki, moto ya libota ya Dani. Mpe napesi bwanya epai ya bato nyonso ya misala ya maboko mpo ete basala misala nyonso oyo natindi yo :
7 The tent of meeting, the ark of the testimony, the atonement cover over it, and all the tent's furnishings, Ndako ya kapo ya Bokutani, Sanduku ya Litatoli, esika ya bolimbisi masumu oyo ezali likolo ya Sanduku, mpe bisalelo nyonso ya Ndako ya kapo ;
8 the table and its utensils, the pure lampstand with all its utensils, and the altar of incense; mesa elongo na biloko na yango ; etelemiselo ya minda, basala na wolo oyo basangisa na eloko mosusu te, elongo na biloko na yango nyonso ; etumbelo ya malasi,
9 the altar of burnt offering with all its utensils, and the basin with its stand; etumbelo ya bambeka ya kotumba elongo na bisalelo na yango nyonso ; sani mpo na komipetola elongo na evandelo na yango ;
10 the woven garments, the holy garments for Aaron the priest, and his sons' garments for priestly service, bilamba ya mosala, bilamba nyonso ya bule ya Nganga-Nzambe Aron, bilamba oyo bana na ye ya mibali bakolata tango bakosala mosala na bango ya bonganga-Nzambe,
11 and the anointing oil, and fragrant incense for the holy place—they must make them exactly as I commanded you." mafuta ya epakolami mpe ansa ya solo kitoko mpo na Esika ya bule. Basengeli kosala yango ndenge kaka natindaki yo.
12 Then our Father said to Moses: Yawe alobaki na Moyize :
13 "You yourself speak to the Israelites: Above all, keep my Sabbaths—a sign between me and you, generation after generation, so you know that I, your Father, make you holy. — Loba na bana ya Isalaele : « Bosengeli kobatela mikolo na Ngai ya Saba ; ekozala elembo ya libela na libela kati na Ngai mpe bino, mpo ete boyeba ete ezali Ngai Yawe nde nabulisi bino.
14 Keep the Sabbath—it is holy to you. Whoever desecrates it must surely be put to death; whoever does work on it will be cut off from among his people. Lisusu, bokobatela mokolo ya Saba, pamba te ekozala mpo na bino mokolo ya bule. Moto nyonso oyo akobuka mobeko yango, basengeli koboma ye ; mpe moto nyonso oyo akosala mosala ata ya lolenge nini na mokolo yango, basengeli kolongola ye kati na bato na ye.
15 Six days work may be done, but the seventh day is a Sabbath of complete rest, holy to me. Anyone who works on the Sabbath day must surely be put to death. Bokosala mosala mikolo motoba, mpe mokolo ya sambo ezali mokolo ya Saba, mokolo ya kopema, mokolo oyo ebulisami mpo na Yawe. Moto nyonso oyo akosala mosala na mokolo ya Saba, basengeli koboma ye.
16 The Israelites must keep the Sabbath, observing the Sabbath in every generation as a lasting covenant. Bana ya Isalaele bakobatela mokolo ya Saba ; bango mpe bakitani na bango bakotosa yango lokola boyokani ya libela na libela.
17 It's a sign between me and the Israelites forever: in six days I made heaven and earth; on the seventh day I rested and was refreshed." Ekozala elembo kati na Ngai mpe bana ya Isalaele mpo na libela na libela, pamba te na mikolo motoba, Yawe asalaki likolo mpe mokili ; bongo na mokolo ya sambo, akataki mosala mpe apemaki. »
18 When he finished speaking with Moses on Mount Sinai, he gave him the two testimony tablets, stone tablets, written by the finger of our Father. Tango Yawe asilisaki kosolola na Moyize, na ngomba Sinai, Yawe apesaki ye bitando mibale ya mabanga ya litatoli oyo Nzambe akomaki na mosapi na Ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]