Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 32 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When the people saw Moses delayed coming down the mountain, they gathered around Aaron and said to him, "Get up, make us gods to go before us. This Moses, the man who brought us up from the land of Egypt—we don't know what's happened to him." Tango bato bamonaki ete Moyize azali kowumela mpo na kokita na ngomba, basanganaki zingazinga ya Aron mpe balobaki : — Yaka mpe salela biso nzambe oyo akotambola liboso na biso. Pamba te Moyize, moto oyo abimisaki biso na Ejipito, toyebi te makambo nini ekomeli ye.
2 Aaron told them, "Take off the gold earrings on the ears of your wives, sons, and daughters, and bring them to me." Aron azongiselaki bango : — Bolongola biloko ya matoyi oyo ezali na matoyi ya basi na bino, ya bana na bino ya basi mpe ya mibali, mpe bomemela ngai yango.
3 All the people removed the gold rings from their ears and brought them to Aaron. Bato nyonso balongolaki biloko ya matoyi mpe bamemaki yango epai ya Aron.
4 He took the gold from their hands, shaped it with an engraving tool, and cast it into a calf. Then they said, "These are your gods, Israel, who brought you up from the land of Egypt!" Aron azwaki biloko oyo bapesaki ye, anyangwisaki yango na moto, mpe sima, asalaki ekeko ya mwana ngombe. Bongo balobaki : — Tala nzambe na yo, oh Isalaele, oyo abimisaki yo na Ejipito.
5 Seeing this, Aaron built an altar before it and announced, "Tomorrow is a festival to our Father." Tango Aron amonaki yango, atongaki etumbelo liboso ya mwana ngombe mpe alobaki : — Feti ekozala lobi mpo na Yawe.
6 They rose early next day, offered burnt offerings, and brought peace offerings. The people sat to eat and drink, then got up to revel. Mokolo oyo elandaki, bato balamukaki na tongo makasi, babonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Sima na yango, bavandaki mpo na kolia mpe mpo na komela ; mpe batelemaki mpo na kosakana.
7 Then our Father said to Moses, "Go down, because your people, whom you brought up from the land of Egypt, have corrupted themselves. Yawe alobaki na Moyize : — Kita, pamba te bato na yo, oyo obimisaki na Ejipito babungi nzela,
8 They have quickly turned from the way I commanded them, made themselves a cast calf, bowed to it, sacrificed to it, and said, 'Israel, these are your gods who brought you up from the land of Egypt.'" bapesi mokongo noki na makambo oyo natindaki bango mpe bamisaleli ekeko ya mwana ngombe. Bagumbameli yango, babonzeli yango makabo mpe balobi : « Tala nzambe na yo, Oh Isalaele, oyo abimisaki yo na Ejipito. »
9 Our Father said to Moses, "I have seen this people, and they are a stubborn people. Yawe alobaki lisusu na Moyize : — Namoni ete bato oyo bazali batomboki.
10 Now leave me alone, that my anger may burn against them and I may consume them, and I will make you a great nation." Sik’oyo, tika Ngai moko nasala mpo ete kanda na Ngai ekweyela bango mpe naboma bango. Kasi nakokomisa yo libota monene.
11 Moses pleaded with our Father: "Why, our Father, does your anger burn against your people, whom you brought out of the land of Egypt with great power and a mighty hand? Moyize abondelaki Yawe, Nzambe na ye, mpe alobaki : — Eh Yawe ! Mpo na nini kanda na Yo ekweyela bato na Yo, oyo obimisaki na Ejipito, na nguya monene mpe na loboko ya makasi ?
12 Why should the Egyptians say, 'He brought them out with evil intent, to kill them in the mountains and wipe them off the face of the earth'? Turn from your burning anger; relent from this disaster against your people. Mpo na nini bato ya Ejipito baloba : « Nzambe na bango azalaki na makanisi mabe tango abimisaki bango na Ejipito. Ezali nde mpo na koboma bango na mokili ya bangomba mpe kosilisa bango na mokili. » Lembisa kanda na Yo ya makasi mpe kosala lisusu mabe te na bato na Yo.
13 Remember Abraham, Isaac, and Israel, your servants, to whom you swore by yourself and told them: 'I will multiply your offspring like the stars of heaven, and I will give your offspring all this land I have promised, and they will inherit it forever.'" Kanisa Abrayami, Izaki mpe Isalaele, basali na Yo, oyo Yo moko olapelaki ndayi mpe olobaki : « Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto na likolo, nakopesa bango mokili oyo nyonso ndenge kaka nalobaki na bango ; mpe yango ekozala libula na bango mpo na libela. »
14 So our Father relented from the disaster he had spoken of bringing on his people. Mpe Yawe asalaki lisusu te mabe oyo akanaki kosala bato na Ye.
15 Moses turned and went down from the mountain, the two tablets of the testimony in his hand, tablets written on both sides, front and back. Moyize abalukaki mpe akitaki wuta na ngomba, elongo na bitando mibale ya mabanga ya boyokani na maboko na ye ; mabanga yango ekomama na bangambo mibale, na liboso mpe na sima.
16 The tablets were the work of our Father; the writing was the writing of our Father, engraved on the tablets. Bitando yango ya mabanga ezalaki mosala ya Nzambe, mpe makomi oyo ezalaki ya kokomama na bitando yango ya mabanga ezalaki ya Nzambe.
17 When Joshua heard the sound of the people shouting, he told Moses, "That's the sound of war in the camp." Tango Jozue ayokaki makelele ya bato oyo bazalaki koganga, alobaki na Moyize : — Ezali na makelele ya bitumba kati na molako !
18 Moses replied, "Not the sound of victory's shout, nor the sound of defeat's cry—I hear the sound of singing." Moyize azongisaki : — Te, ezali makelele ya elonga te, makelele ya kokweyisama mpe te ! Oyo ngai nazali koyoka, ezali nde makelele ya banzembo.
19 As Moses neared the camp and saw the calf and the dancing, his anger flared; he threw the tablets from his hands, shattering them at the base of the mountain. Tango Moyize apusanaki pembeni ya molako, amonaki ekeko ya mwana ngombe mpe bato bazali kobina ; asilikaki makasi, abwakaki bitando ya mabanga wuta na maboko na ye mpe apanzaki yango na biteni, na ebandeli ya ngomba.
20 He took the calf they made, burned it in fire, ground it to powder, scattered it on the water, and made the Israelites drink it. Moyize azwaki ekeko ya mwana ngombe oyo basalaki, atumbaki yango na moto mpe anikaki yango malamu kino ekomaki putulu. Bongo apanzaki yango likolo ya mayi mpe amelisaki bana ya Isalaele mayi yango.
21 Moses said to Aaron, "What did this people do to you, that you brought such great sin on them?" Moyize atunaki Aron : — Likambo nini bato oyo basali yo mpo ete okamba bango kino kosala lisumu ya monene boye ?
22 Aaron said, "Don't be angry, my lord; you know the people are inclined to evil. Aron azongisaki : — Tika ete nkolo na ngai asilika te ! Oyebi bato, balingaka kaka kosala mabe.
23 They said to me, 'Make us gods to go ahead of us. This Moses, the man who brought us out of the land of Egypt—we can't say what became of him.' Balobaki na ngai : « Salela biso Nzambe oyo akotambola liboso na biso, pamba te toyebi te likambo nini ekweyeli Moyize oyo abimisaki biso na Ejipito. »
24 I told them, 'Whoever has gold, strip it off.' They gave it to me; I threw it into the fire, and out came this calf." Bongo nayebisaki bango : « Tika ete moto nyonso oyo azali na biloko ya matoyi ya wolo alongola yango. » Bapesaki ngai wolo, nanyangwisaki yango na moto mpe nasalaki na yango ekeko ya mwana ngombe oyo.
25 Moses saw that the people ran wild, for Aaron had let them run wild, to their enemies' mockery. Moyize amonaki ete bato bazalaki kati na mobulu, pamba te Aron akambaki bango mabe ; yango wana bakomaki eloko ya kotiola na miso ya banguna na bango.
26 Moses stood at the camp gate and said, "Whoever is for our Father, come to me!" All the Levites gathered around him. Moyize atelemaki na ekotelo ya molako mpe alobaki : — Tika ete moto nyonso oyo azali mpo na Yawe aya epai na ngai. Mpe Balevi nyonso basanganaki pene na ye.
27 He said to them, "This is what our Father says: Strap your sword to your side, each of you. Go back and forth through the camp, gate to gate, and kill your brother, your friend, your neighbor." Alobaki na bango : — Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tika ete moto nyonso atia mopanga na mopende na ye. Botambola kati na molako wuta na ndako ya kapo moko kino na ndako ya kapo mosusu ; mpe moko na moko na bino aboma ndeko na ye ya mobali, moninga na ye mpe mozalani na ye. »
28 The Levites did as Moses commanded, and that day about 3,000 of the people fell. Balevi basalaki ndenge Moyize atindaki ; mpe na mokolo wana, bato pene nkoto misato bakufaki.
29 Moses said, "Today you set yourselves apart for our Father, each at the cost of his son and brother, so he might bless you today." Moyize alobaki : — Na mokolo ya lelo, Yawe atie bino pembeni mpo ete bobomi bana na bino moko ya mibali mpe bandeko na bino ya mibali. Bongo mpo na yango, apamboli bino.
30 The next day Moses told the people, "You have sinned greatly. Now I will go up to our Father—perhaps I can atone for your sin." Mokolo elandaki, Moyize alobaki na bato : — Bosalaki lisumu monene. Kasi sik’oyo, nakomata epai na Yawe ; tango mosusu, nakozwa bolimbisi mpo na lisumu na bino.
31 Moses returned to our Father and said, "Oh, this people has sinned greatly, making themselves gods of gold. Moyize azongaki epai na Yawe mpe alobaki : — Ah ! Tala lisumu monene bato oyo basali. Bamisalelaki nzambe ya wolo.
32 Now, if you'll forgive their sin—if not, blot me, please, out of the book you wrote." Kasi sik’oyo, nabondeli Yo, limbisa lisumu na bango, soki te longola kombo na ngai na buku ya bomoi oyo okomaki.
33 But our Father told Moses, "I will blot out of my book whoever has sinned against me. Yawe azongiselaki Moyize : — Moto nyonso oyo asalaki lisumu liboso na Ngai, ye nde nakolongola na buku na Ngai.
34 Go, lead the people where I told you; my angel will go before you. But on the day I settle accounts, I will charge them with their sin." Sik’oyo, kende ! Kamba bato na esika oyo nalobaki na yo. Tala, anjelu na Ngai akozala liboso na yo. Atako bongo, tango mokolo ekokoka mpo ete napesa etumbu, nakopesa bango etumbu mpo na lisumu na bango.
35 Then our Father struck the people with plague because of what they did with the calf that Aaron made. Yawe apesaki bato etumbu likolo ya ekeko ya mwana ngombe oyo balobaki na Aron ete asala.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]