Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 33 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Our Father said to Moses, "Leave here, you and the people you brought up out of Egypt, for the land I swore to Abraham, Isaac, and Jacob: I will give it to your offspring. Yawe alobaki na Moyize : — Kende, longwa na esika oyo elongo na bato oyo obimisaki na Ejipito ; kende na mokili oyo nalakaki na ndayi epai ya Abrayami, Izaki mpe Jakobi ete nakopesa yango epai na bana na yo.
2 I will send an angel before you and drive out the Canaanites, Amorites, Hittites, Perizzites, Hivites, and Jebusites. Nakotinda anjelu liboso na yo, nakobengana bato ya Kanana ya Amori, ya Iti, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.
3 Go up to a land flowing with milk and honey, but I won't go up among you, for you're a stubborn people, and I might destroy you on the way." Bokende na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. Mpo na Ngai, nakotambola elongo na bino te, pamba te bozali batomboki, noki te nakosilisa koboma bino na nzela.
4 When the people heard this distressing news, they mourned, and no one put on their jewelry. Tango bato bayokaki maloba oyo ya somo, balataki pili, mpe ata moto moko te alataki lisusu biloko ya monzele.
5 For our Father told Moses, "Say to Israel's people: You are a stubborn people. If I went among you for one moment, I would destroy you. Now remove your ornaments, so I can decide what to do with you." Bongo Yawe alobaki na Moyize : — Loba na bana ya Isalaele : « Bozali batomboki ; soki natamboli elongo na bino ata mpo na tango moke, nakosilisa koboma bino. Bolongola biloko na bino ya monzele, mpe nakoyebisa bino makambo oyo nakosala bino. »
6 So the people of Israel stripped off their jewelry from Mount Horeb onward. Bana ya Isalaele balongolaki biloko na bango ya monzele na ngomba Orebi.
7 Moses would take the tent and pitch it outside the camp, far from the camp, calling it the tent of meeting. Everyone seeking our Father would go out to the tent of meeting, outside the camp. Moyize azwaki ndako ya kapo mpe atelemisaki yango mwa mosika, na libanda ya molako, mpo na bolamu na bango ; mpe abengaki yango Ndako ya kapo ya Bokutani. Moto nyonso oyo alingaki kokutana na Yawe, asengelaki kokende na Ndako ya kapo ya Bokutani, na libanda ya molako.
8 Whenever Moses went out to the tent, all the people rose and stood, each at his tent's entrance, watching Moses until he entered. Mbala nyonso oyo Moyize azalaki kokende na Ndako ya kapo ya Bokutani, bato nyonso bazalaki kotelema : moko na moko azalaki kotelema na ekuke ya ndako na ye ya kapo mpo na kotala Moyize kino akokota na Ndako ya kapo ya Bokutani.
9 Whenever Moses entered the tent, the pillar of cloud descended, stood at the entrance, and our Father spoke with Moses. Soki Moyize akoti na kati, likonzi ya lipata ezalaki kokita mpe kotelema na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani ; bongo Yawe azalaki kosolola na Moyize.
10 When all the people saw the pillar of cloud standing at the tent entrance, they would rise and worship, each at his own tent entrance. Bato nyonso bazalaki komona likonzi ya lipata kotelema na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Boye bazalaki kotelema mpe kofukamela Yawe, moko na moko na ekuke ya ndako na ye ya kapo.
11 So our Father would speak to Moses face to face, as one speaks with a friend. Moses would return to camp, but his young servant Joshua son of Nun would not leave the tent. Yawe azalaki kosolola na Moyize ndenge moto asololaka na moninga na ye. Wana Moyize azalaki kozonga na molako ; Jozue, mwana mobali ya Nuni, elenge oyo azalaki kosunga ye, azalaki kotikala kati na ndako ya kapo.
12 Moses said to our Father, "Look, you tell me, 'Bring up this people,' but you haven't told me whom you'll send with me. Yet you said, 'I know you by name, and you have also found favor in my sight.' Moyize alobaki na Yawe : — Tala, ozali koloba na ngai ete nakamba bato oyo, kasi ozali koyebisa ngai te nani okotinda elongo na ngai. Nzokande Yo nde olobaki na ngai : « Nayebi yo na kombo na yo, » mpe lisusu : « Ozwi ngolu na miso na Ngai. »
13 Now, if I have found favor in your eyes, please show me your ways, so I may know you and keep finding favor in your eyes. Remember too—this nation is your people." Sik’oyo, soki penza nazwi ngolu na miso na Yo, teya ngai banzela na Yo mpo ete nayeba Yo mpe nazwa ngolu na miso na Yo. Mpe kanisa lisusu ete libota wana bazali bato na Yo.
14 And he said, "My presence will go with you, and I will give you rest." Yawe azongisaki : — Ngai moko nakotambola elongo na yo mpe nakopesa yo bopemi.
15 Moses said to him, "If your presence doesn't go with us, don't bring us up from here. Moyize azongisaki : — Soki Yo moko okotambola elongo na biso te, kolongola biso te na esika oyo.
16 How else will it be known that I have found favor with you, I and your people? Isn't it by your going with us, so we are set apart, I and your people, from every other people on the face of the earth?" Soki otamboli elongo na biso te, ndenge nini bato bakoyeba ete ngai mpe bato na Yo tozwi ngolu na miso na Yo ? Ezali nde tango okotambola elongo na biso nde ngai mpe bato na yo tokokesana na bikolo nyonso oyo ezali kati na mokili.
17 And our Father said to Moses, "This very thing you have asked I will do, for you have found favor in my sight, and I know you by name." Yawe alobaki na Moyize : — Nakosala makambo nyonso oyo osengi Ngai, pamba te ozwi ngolu na miso na Ngai mpe nayebi yo na kombo na yo.
18 Then Moses said, "Please show me your glory." Moyize azongisaki : — Monisa ngai nkembo na Yo.
19 He said, "I will make all my goodness pass before you and proclaim my name before you. I will be gracious to whom I will be gracious, and show compassion on whom I will show compassion." Yawe azongisaki : — Nakolekisa bolamu na Ngai nyonso liboso na yo mpe nakotatola nani oyo nazali liboso na yo ; natalisaka ngolu epai ya moto oyo Ngai nasepeli kosalela ngolu, mpe nayokelaka mawa moto oyo Ngai nasepeli koyokela mawa.
20 But he said, "You cannot see my face, for no one may see me and live." Kasi okokoka komona elongi na Ngai te, pamba te moto moko te akoki komona Ngai mpe azala na bomoi.
21 And our Father said, "There is a place beside me; you will stand on the rock, Yawe alobaki lisusu : — Ezali na esika moko awa, pembeni na Ngai, epai wapi okoki kotelema na likolo ya libanga.
22 while my glory passes by, I will put you in a rock crevice and cover you with my hand until I have passed by. Tango nkembo na Ngai ekoleka, nakotia yo kati na lidusu ya libanga mpe nakozipa yo na loboko na Ngai kino nakoleka.
23 Then I will remove my hand, and you will see my back; my face will not be seen." Bongo tango nakolongola loboko na Ngai, okomona Ngai kaka na mokongo ; kasi okokoka komona elongi na Ngai te.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]