Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 34 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Our Father told Moses, "Carve two stone tablets for yourself, like the first. I will write on them the words that were on the first tablets, which you broke. Yawe alobaki na Moyize : — Bongisa bitando mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso ; nakokoma na bitando yango maloba oyo ezalaki na likolo ya bitando ya liboso oyo obukaki.
2 Be ready in the morning. Come up Mount Sinai then, and present yourself to me there on the mountaintop. Omilengela mpo na lobi na tongo. Na tongo-tongo, okomata na ngomba Sinai mpe okotelema liboso na Ngai, kuna na songe ya ngomba.
3 No one may come up with you, or be seen anywhere on the mountain; not even flocks or herds may graze facing that mountain." Moto moko te asengeli komata elongo na yo ; na ngomba mobimba, moto moko te amonana ; bameme, bantaba to bangombe esengeli mpe te kolia na ebandeli ya ngomba.
4 Moses cut two stone tablets like the first, rose early, went up Mount Sinai as our Father had commanded him, carrying the two stone tablets in his hand. Moyize abongisaki bitando mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso. Bongo na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, amataki ngomba Sinai ndenge kaka Yawe atindaki ye ; amemaki bitando mibale ya mabanga, na maboko na ye.
5 Then our Father came down in the cloud and stood with him there, and proclaimed the name of our Father. Yawe akitaki kati na lipata, atelemaki wana pene na ye, mpe Moyize abelelaki Kombo ya Yawe.
6 Our Father passed before him, proclaiming, "your Father—compassionate and gracious, slow to anger, and overflowing with covenant love and faithfulness, Yawe alekaki liboso ya Moyize, mpe Moyize atatolaki : — Yawe, Yawe, Nzambe na mawa mpe na ngolu, Nzambe oyo asilikaka noki te, atondi na bolingo mpe na boboto,
7 keeping covenant love for thousands, forgiving guilt, rebellion, and sin; yet he will not clear the guilty, bringing the guilt of parents on children and grandchildren, to the third and fourth generation." atalisaka bolingo na Ye kino na milongo nkoto, alimbisaka mabe, botomboki mpe masumu, kasi azangaka te kopesa etumbu na moto oyo asali mabe, Nzambe oyo apesaka bakitani etumbu mpo na mabe ya batata na bango kino na molongo ya misato mpe ya minei !
8 Moses quickly bowed to the ground and worshiped. Mbala moko, Moyize afukamaki mpe agumbamelaki Yawe ;
9 He said, "If I have found favor in your eyes, Sovereign Father, let the Sovereign Father go among us, even though this is a stubborn people. Forgive our guilt and our sin, and take us as your inheritance." alobaki : — Eh Nkolo, soki penza nazwi ngolu na miso na Yo, nabondeli Yo : tambola kati na biso. Atako bato oyo bazali batomboki, kasi limbisa mabe mpe masumu na biso, mpe zwa biso lokola bato na Yo !
10 He said, "I am making a covenant. Before all your people I will do wonders never created in any nation or on all earth. All the people among whom you live will see your Father's work, for what I am doing with you is awesome. Yawe azongisaki : — Nalingi kosala boyokani elongo na bino. Liboso ya bato na yo nyonso, nakosala makambo ya kokamwa oyo etikala nanu kosalema te na mokili mobimba to na ekolo moko. Boye bato nyonso oyo bazali zingazinga na yo bakomona misala ya somo oyo Ngai Yawe nakosala na nzela na yo.
11 Keep what I command you today. I am driving out before you the Amorites, Canaanites, Hittites, Perizzites, Hivites, and Jebusites. Botosa makambo oyo nazali kotinda bino lelo. Nakobengana liboso na bino : bato ya Amori, ya Kanana, ya Iti, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.
12 Be careful: don't make a covenant with those living in the land you're entering, or they'll become a trap among you. Bokeba ! Bosala boyokani te elongo na bavandi ya mokili oyo bozali kokende, noki te bakokoma motambo kati na bino !
13 Instead, tear down their altars, smash their pillars, and cut down their Asherah poles. Bokweyisa bitumbelo na bango, bopanza bikeko na bango mpe bobuka makonzi oyo bapika mpo na nzambe mwasi Ashera.
14 Don't bow to any other god—your Father's name is Jealous; he is a jealous Father." Bogumbamela nzambe mosusu te, pamba te Yawe andimaka bombanda te ; Kombo na Ye ezali Nzambe ya zuwa.
15 "Make no covenant with the land's residents, for when they prostitute themselves to their gods and sacrifice to them, they will invite you, and you will eat from their sacrifice; Bokeba ! Bosala boyokani te elongo na bavandi ya mokili yango ; noki te tango bakosambela banzambe na bango mpe bakobonzela yango mbeka, babenga bino mpo ete bolia mbeka na bango elongo ;
16 and you take their daughters for your sons, and their daughters prostitute themselves to their gods, drawing your sons to do the same." mpe soki bozwi na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali, wana bana na bango ya basi bakokoba kosambela banzambe na bango ya bikeko, bakotindika bana na bino ya mibali na kosambela banzambe na bango.
17 "You must not make cast-metal gods for yourselves." Bokosala nzambe ya ekeko te.
18 "Keep the Festival of Unleavened Bread: eat unleavened bread seven days, as I commanded you, at the set time in the month of Abib—for in the month of Abib you came out of Egypt." Bokosala feti ya Mapa ezanga levire. Mikolo sambo, bokolia mapa ezanga levire ndenge natindaki yo. Bokosala yango na tango ekatama, na sanza ya Abibi, pamba te ezali na sanza yango nde bobimaki na Ejipito.
19 "Every firstborn opening the womb is mine—every male of your livestock, the firstborn of ox and sheep." Mwana mobali nyonso ya liboso azali ya Ngai ; ekozala mpe bongo mpo na mwana mobali nyonso ya liboso kati na bibwele na bino : ezala mwana ngombe, mwana ntaba to mwana meme.
20 "Redeem a donkey's firstborn with a lamb; if you don't redeem it, break its neck. Redeem all your sons' firstborn. No one may appear before me empty-handed." Nzokande, mpo na mwana liboso ya ane, bokosikola yango na mwana meme. Soki bosikoli yango te, bokobuka yango kingo. Bokosikola bana na bino nyonso ya liboso ya mibali. Moto moko te akoya kotelema liboso na Ngai maboko pamba.
21 "Six days you work; the seventh day you rest—even during plowing and harvest, rest." Bokosala mosala mikolo motoba, kasi na mokolo ya sambo, bosengeli kopema : ezala na tango ya kolona to na tango ya kobuka.
22 "Keep the Feast of Weeks with the wheat harvest's firstfruits, and the Feast of Ingathering at the year's turn." Bokosala feti ya Baposo mpo na kosepela na tina na bambuma ya liboso ya ble oyo ekomeli, mpe feti ya kobuka bambuma na suka ya mobu.
23 "Three times a year all your males are to appear before the Sovereign Father of Israel. Mbala misato na mobu, mibali nyonso basengeli koya liboso ya Nkolo Yawe, Nzambe ya Isalaele.
24 For I will drive out nations before you and enlarge your borders; no one will crave your land when you go up to appear before your Father three times a year." Mpo na bolamu na yo, nakobengana bikolo liboso na yo mpe nakoyeisa mokili na yo monene. Moto moko te akoluka kobotola mokili na yo tango okobanda komata mbala misato na mobu, mpo na kokutana na Yawe, Nzambe na yo.
25 "Do not offer the blood of my sacrifice with anything containing yeast, and do not let the sacrifice of the Passover feast remain until morning." Okobonzela Ngai te makila ya nyama elongo na mapa batia levire ; okobomba te kino lobi na tongo mbeka oyo babonzi mpo na Pasika.
26 "Bring the best firstfruits of your soil to your Father's house. Do not boil a young goat in its mother's milk." Okomema na Ndako ya Yawe, Nzambe na yo, bambuma ya liboso ya mabele na yo. Okolamba te mwana ntaba oyo ezali nanu komela mabele ya mama na yango.
27 Then our Father said to Moses, "Write these words, for according to these words I made a covenant with you and with Israel." Yawe alobaki lisusu na Moyize : — Koma maloba oyo, pamba te ezali na nzela na yango nde nasalaki boyokani elongo na yo mpe Isalaele.
28 Moses stayed there with our Father forty days and forty nights, eating no bread, drinking no water. He wrote the covenant's words—the Ten Words—on the tablets. Moyize asalaki kuna elongo na Yawe mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei ; aliaki ata eloko moko te mpe amelaki mayi te. Bongo Moyize akomaki na bitando ya mabanga maloba ya Boyokani oyo babengi mibeko zomi.
29 As Moses came down Mount Sinai with the two tablets of the testimony in his hand, he didn't know his face shone from speaking with our Father. Nzokande, tango Moyize akitaki wuta na ngomba Sinai, na bitando ya mabanga mibale ya mibeko na maboko na ye, ayebaki te ete elongi na ye ezalaki kongenga, mpo ete asololaki na Yawe.
30 Aaron and all the Israelites saw Moses' face shone, and they feared to approach him. Tango Aron mpe bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete elongi ya Moyize ezali kongenga, babangaki kopusana pembeni na ye.
31 Moses called them; Aaron and all leaders of the assembly returned, and Moses spoke to them. Moyize abengaki bango ; bongo Aron mpe bakambi nyonso ya lisanga ya Isalaele bapusanaki pembeni ya Moyize, mpe ye Moyize asololaki na bango.
32 Afterward all the Israelites approached, and he commanded them all our Father had told him on Mount Sinai. Sima na yango, bana nyonso ya Isalaele bapusanaki pembeni ya Moyize mpe ayebisaki bango mibeko nyonso oyo Yawe apesaki ye na ngomba Sinai.
33 When Moses had finished speaking with them, he put a veil over his face. Tango Moyize asilisaki kosolola na bango, azipaki elongi na ye na vwale.
34 But whenever Moses went in before our Father to speak with him, he would remove the veil until he came out; then he would come out and tell the Israelites what he was commanded. Kasi tango nyonso Moyize azalaki kokota liboso ya Yawe mpo na kosolola na Ye, azalaki kolongola vwale kino tango akobima. Mpe soki abimi, azalaki koyebisa na bana ya Isalaele mibeko nyonso oyo azalaki kozwa epai na Yawe.
35 The Israelites would see that Moses' face was radiant, and Moses would put the veil back over his face until he went in to speak with our Father again. Mpe bana ya Isalaele bazalaki komona elongi ya Moyize kongenga. Bongo azalaki kozongisa vwale na elongi na ye kino tango azalaki kozonga mpo na kosolola na Yawe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]