Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 35 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Moses gathered the whole community of Israel's people and told them, "These are the things our Father commanded you to do. Moyize asangisaki lisanga mobimba ya bana ya Isalaele mpe alobaki na bango : « Boyoka makambo oyo Yawe atindi bino kosala :
2 Work six days; the seventh is holy to you, a Sabbath of complete rest to our Father. Anyone who works on it must be put to death. — Mikolo motoba, bokosala mosala na bino, kasi mokolo ya sambo ekozala mokolo ya bule, mokolo ya Saba mpo na Yawe, mokolo na bino ya kopema. Moto nyonso oyo akosala mosala na mokolo yango, bakoboma ye.
3 You shall not light a fire in any of your homes on the Sabbath day." Na mokolo yango ya Saba, bokopelisa ata moto te na bandako na bino. »
4 Moses told all Israel's assembly, "This is what our Father commanded: Moyize alobaki na lisanga mobimba ya bana ya Isalaele : « Boyoka makambo oyo Yawe atindi bino kosala :
5 Take from among you a gift for our Father. Let each willing heart bring our Father's gift: gold, silver, and bronze. — Kati na biloko oyo bozali na yango, botia pembeni ndambo oyo bokobonza epai na Yawe lokola makabo. Moto nyonso oyo azali na motema malamu akomemela Yawe makabo : wolo, palata mpe bronze,
6 Blue, purple, and scarlet yarns, fine linen, goats' hair, langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi, lino ya kitoko, bapwale ya ntaba,
7 tanned rams' skins, fine leather, and acacia wood, baposo ya bameme batia langi ya motane mpe baposo ya banyama ya ebale ; banzete ya akasia,
8 oil for the light, spices for the anointing oil and for the fragrant incense, mafuta ya olive mpo na kopelisela mwinda, biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpo na kosala mafuta ya epakolami mpe malasi ya solo kitoko,
9 and onyx stones and stones for setting, for the ephod and for the breastpiece. mabanga ya onikisi mpe mabanga mosusu ya talo mpo na kotia yango na efode mpe na elamba ya tolo oyo Nganga-Nzambe akobanda kolata.
10 "Let every skillful person among you come and make all that our Father has commanded: Tika ete bato nyonso oyo kati na bino bayebi misala, baya kosala misala nyonso oyo Yawe atindi :
11 the tabernacle: its tent, cover, clasps, frames, bars, posts, and bases, Mongombo, ndako na yango ya kapo, ezipelo na yango, bibende na yango oyo ezali lokola ndobo, bikangelo na yango, mabaya na yango, makonzi na yango mpe bivandelo na yango ;
12 the ark with its poles, the mercy seat, and the veil that screens it; Sanduku elongo na mabaya ya komemela yango, mofinuku na yango, barido,
13 the table with its poles and all its utensils, and the bread of the Presence; mesa, mabaya na yango, bisalelo na yango nyonso mpe mapa oyo esengeli kozala liboso ya Yawe,
14 the lampstand for the light, with its utensils and its lamps, and the oil for the light; etelemiselo ya minda, bisalelo na yango, minda na yango mpe mafuta mpo na kopelisa minda,
15 the incense altar and its poles; anointing oil and fragrant incense; and the screen for the tabernacle entrance; etumbelo ya malasi, mabaya ya komemela yango, mafuta ya epakolami mpe malasi ya solo kitoko, rido ya ekotelo ya ndako ya kapo epai wapi Mongombo ezali,
16 the burnt-offering altar with its bronze grate, poles, and all its utensils; the basin and its stand, etumbelo ya bambeka ya kotumba, motalaka na yango ya bronze, mabaya ya komemela yango mpe bisalelo na yango nyonso, sani ya bronze mpe evandelo na yango,
17 the courtyard's curtains, its pillars and bases, and the screen for its gate, batapi ya lopango, makonzi na yango, makolo na yango mpe rido mpo na ekotelo ya lopango,
18 the pegs of the tabernacle and the pegs of the courtyard, with their cords; bapike ya Mongombo, bapike ya lopango mpe basinga na yango,
19 the finely woven garments for serving in the Holy Place, the holy garments for Aaron the priest, and the garments for his sons to serve as priests." bilamba ya mosala ya bonganga-Nzambe mpo na kosala kati na Mongombo, bilamba ya bule mpo na Nganga-Nzambe Aron mpe bilamba ya bonganga-Nzambe mpo na bana na ye ya mibali. »
20 Then all the congregation of the people of Israel left Moses. Lisanga mobimba ya bana ya Isalaele batikaki Moyize.
21 Everyone whose heart stirred him, everyone whose spirit moved him, brought our Father's contribution for the tent of meeting's work, all its service, and the holy garments. Bongo bato nyonso oyo bazalaki na motema malamu mpe na bolingo ya kopesa, babonzelaki Yawe makabo mpo na mosala ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpo na misala nyonso mpe kotonga bilamba ya bule.
22 Men and women came together; all who were willing-hearted brought brooches, earrings, signet rings, and armlets—every kind of gold object—and everyone presented a wave offering of gold to our Father. Bato nyonso oyo bazalaki na motema malamu, ezala mobali to mwasi, bayaki na basheneti, biloko ya matoyi, bapete mpe biloko ya ndenge na ndenge oyo esalema na wolo. Bango nyonso bamemaki biloko na bango ya wolo liboso ya Yawe mpe babonzelaki Ye yango.
23 Everyone who had blue, purple, or scarlet yarn, fine linen, goat hair, tanned ram skins, or fine leather brought them. Bato nyonso oyo bazalaki na langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi to mpe ya motane ya kongenga, lino, bapwale ya ntaba, baposo ya bameme batia langi ya motane mpe baposo ya banyama ya ebale, bamemaki yango.
24 Everyone who could give a contribution of silver or bronze brought it as our Father's contribution; everyone with acacia wood for any task of the work brought it. Bato nyonso oyo batiaki pembeni makabo ya palata to ya bronze bamemaki yango mpe babonzelaki yango Yawe ; ndenge moko mpe na bato oyo bazalaki na banzete ya akasia mpo na misala nyonso.
25 Every skilled woman spun with her hands and brought her spun thread: blue, purple, scarlet, and fine linen. Basi nyonso oyo bayebaki kosala bilamba basalaki yango na maboko na bango mpe bamemaki bilamba ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe lino ya kitoko.
26 All the skilled women whose hearts were stirred spun the goat hair. Mpe basi nyonso oyo bazalaki na motema malamu mpe bayebaki kosala bilamba, basalaki yango na bapwale ya ntaba.
27 The leaders brought onyx stones and gems for mounting, for the ephod and for the breastpiece, Bakambi bamemaki mabanga ya talo ya onikisi mpe mabanga mosusu ya talo mpo na kotia yango na efode mpe na elamba ya tolo oyo Nganga-Nzambe akobanda kolata.
28 and spices, and the oil for the light, for the anointing oil, and for the fragrant incense. Bamemaki mpe biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpe mafuta mpo na etelemiselo ya minda, mafuta mpo na epakolami mpe malasi ya solo kitoko.
29 Every Israelite man and woman whose heart willed it brought a voluntary offering to our Father for all the work our Father commanded through Moses. Bato nyonso ya Isalaele, ezala basi to mibali, oyo mitema na bango esimbamaki mpo na komema eloko mpo na misala oyo Yawe atindaki na nzela ya Moyize, bamemaki epai na Yawe makabo oyo bango moko bakataki kopesa wuta na mokano ya mitema na bango.
30 Then Moses told the Israelites, "See, our Father has called by name Bezalel son of Uri, son of Hur, of Judah's tribe, Moyize alobaki na bana ya Isalaele : « Botala, Yawe aponi Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Wuri, moto ya libota ya Yuda ;
31 and filled him with the Spirit of our Father—skill, understanding, knowledge, and every kind of craftsmanship, atondisi ye na Molimo ya Nzambe, na bwanya, na mayele mpe na boyebi mpo na kosala misala ya lolenge nyonso :
32 to devise artistic designs, to work in gold, silver, and bronze, mpo na kokanisa mpe kosala misala ya wolo, ya palata mpe ya bronze,
33 in cutting stones for setting and in carving wood, to work in every kind of skilled craft. mpo na kokata mabanga ya talo, kobamba yango, kosala bililingi na banzete mpe mpo na kosala misala ya lolenge nyonso. »
34 Our Father has put in Bezalel's heart to teach—he and Oholiab son of Ahisamach, of the tribe of Dan. Yawe apesaki na Betisaleyeli mpe Oliabi, mwana mobali ya Ayisamaki, moto ya libota ya Dani, makoki ya koteya bato mosusu lolenge ya kosala.
35 He filled them with skill for every kind of work—engraving, designing, embroidering in blue, purple, and scarlet yarn and fine linen, and weaving—skilled in every craft, full of ideas." Apesaki bango lisusu makoki ya kosala misala ya lolenge nyonso : kosala bililingi, kosala bilamba na basinga ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe ya lino, kosala misala ya lolenge nyonso mpe kobongisa ndenge misala esengeli kosalema.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]