Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 36 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Bezalel, Oholiab, and every skilled person our Father gave skill and understanding to build the sanctuary must do all the work exactly as our Father commanded. Betisaleyeli, Oliabi mpe bato nyonso epai ya banani Yawe apesaki makoki mpe mayele ya kosala misala ya lolenge nyonso mpo na kotonga Mongombo, basalaki yango ndenge kaka Yawe atindaki.
2 Then Moses called Bezalel, Oholiab, and every skilled person in whose heart our Father put skill, everyone whose heart moved them to come and do the work. Bongo Moyize abengisaki Betisaleyeli, Oliabi mpe bato nyonso epai ya banani Yawe apesaki makoki mpe mayele elongo na bato oyo bamibongisaki mpo na kosala misala yango.
3 They took from Moses all the offering the Israelites had brought for building the sanctuary. Still the people kept bringing him voluntary offerings morning after morning. Bazwaki na maboko ya Moyize makabo nyonso oyo bana ya Isalaele bamemaki mpo na kosala misala ya botongi Mongombo. Tongo nyonso, bana ya Isalaele bakobaki komema epai ya Moyize makabo oyo bango moko bakataki kopesa wuta na mokano ya mitema na bango.
4 So all the skilled workers doing all the sanctuary's work came, each from the task he was doing. Boye bato oyo bazalaki kosala misala ya kotonga Mongombo batikaki misala na bango
5 They told Moses, "The people are bringing much more than enough for the work our Father commanded us to do." mpe bayaki koloba na Moyize : — Makabo oyo bana ya Isalaele bazali kopesa eleki mingi mpo na kosala mosala oyo Yawe atindaki.
6 So Moses gave an order, and they sent word throughout the camp: "No man or woman is to make any more contributions for the sanctuary." And the people stopped bringing, Bongo Moyize atindaki maloba oyo epai ya bana ya Isalaele : — Tika ete moto moko te, azala mwasi to mobali, apesa lisusu makabo mpo na Mongombo ! Boye bato batikaki komema makabo,
7 for what they already had was enough to do all the work, and more than enough. pamba te biloko nyonso ezalaki ya kokoka mpo na misala nyonso oyo esengelaki kosalema : ezalaki kutu ya koleka.
8 The skilled workers made the tabernacle: ten curtains of finely twisted linen, blue, purple, and scarlet yarn, with cherubim, the work of a skilled designer. Bato oyo balekaki mayele kati na basali batongaki Mongombo elongo na batapi zomi ya lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango, ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, elongo na bililingi ya basheribe ; ezalaki mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.
9 Each curtain was about forty-two feet long, six feet wide—one size for all curtains. Tapi moko na moko ezalaki na bametele pene zomi na minei na molayi ; mpe bametele pene mibale, na mokuse. Batapi nyonso ezalaki ndenge moko na mokuse mpe na molayi.
10 He joined five curtains to each other, and the other five to each other. Bakangisaki batapi mitano, moko na mosusu, mpe basalaki ndenge moko mpo na batapi mitano mosusu.
11 He put blue loops on the edge of the outer curtain in the first set, and the same on the edge of the outer curtain in the second set. Batiaki basinga ya langi ya ble, na pembeni ya tapi ya suka ya lisanga ya batapi mitano ya liboso, mpe na pembeni ya tapi ya suka ya lisanga ya batapi mitano ya mibale.
12 He made fifty loops on the first curtain, and fifty on the edge of the curtain in the second set, loops opposite one another. Batiaki basinga tuku mitano na suka ya lisanga ya batapi mitano ya liboso, mpe na suka ya lisanga ya batapi mitano ya mibale ; basinga yango etalanaki.
13 He made fifty gold clasps and joined the curtains with them, so the tabernacle became one. Basalaki na wolo bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo ; mpe bakangisaki na bibende oyo ezali lokola ndobo lisanga ya batapi mitano ya liboso mpe lisanga ya batapi mitano ya mibale. Boye, Mongombo ebimaki eloko moko.
14 He made curtains of goat hair for the tent over the dwelling—eleven curtains. Basalaki batapi zomi na moko, na bapwale ya ntaba mpo na kotia yango na likolo ya Mongombo.
15 Each curtain was about forty-five feet long, six feet wide; all eleven curtains matched in size. Molayi ya tapi moko na moko ezalaki na bametele pene zomi na mitano mpe mokuse na yango ezalaki na bametele pene mibale. Batapi nyonso zomi na moko ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse.
16 He joined five of the curtains together, and the other six together. Bakangisaki batapi mitano na ngambo moko, mpe batapi motoba na ngambo mosusu.
17 He made fifty loops on the outermost curtain's edge in the first set, and fifty loops on the curtain's edge in the second set. Batiaki basinga tuku mitano na suka ya liboke ya batapi ya liboso, mpe basinga tuku mitano na suka ya liboke ya batapi ya mibale.
18 He made fifty bronze clasps to join the tent as one. Basalaki na bronze bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo ; bakotisaki yango na basinga mpo na kokangisa Mongombo mpo ete ekoma eloko moko.
19 He made a covering for the tent from red-dyed ram skins, and a fine-leather covering above it. Basalelaki baposo ya bameme oyo bapakola langi ya motane mpo na kozipa Mongombo, mpe babakisaki na likolo na yango baposo ya banyama ya ebale.
20 Then he made the upright frames for the tabernacle of acacia wood. Basalaki bizingelo ya Mongombo na banzete ya akasia mpe batelemisaki yango.
21 Each frame was about fifteen feet long and twenty-seven inches wide. Ezingelo moko na moko ezalaki na bametele mitano na molayi, mpe basantimetele tuku sambo na mitano na mokuse.
22 Each frame had two tenons, joined to one another; he made all the tabernacle's frames this way. Babetaki banzete mibale-mibale na ezingelo moko na moko ; basalaki bongo mpo na bizingelo nyonso ya Mongombo.
23 He made the frames for the tabernacle: twenty frames for the south side. Batiaki bizingelo tuku mibale na ngambo ya Negevi, na sude ya Mongombo,
24 He made forty silver bases under the twenty frames: two bases under one frame for its two tenons, two bases under the next for its two tenons. mpe makolo tuku minei ya palata, na se ya bizingelo tuku mibale : makolo mibale na se ya ezingelo moko na moko oyo babeta banzete mibale ;
25 For the second side of the tabernacle, the north side, he made twenty frames, bizingelo tuku mibale na ngambo mosusu ya Mongombo, na nor,
26 and their forty silver bases, two bases under one frame and two bases under the next frame. elongo na makolo na yango tuku minei ya palata : makolo mibale mpo na ezingelo moko na moko ;
27 For the rear of the tabernacle, on the west, he made six frames. bizingelo motoba na suka ya Mongombo, na ngambo ya weste,
28 He made two frames for the corners of the tabernacle at the rear. mpe bizingelo mibale na suka mpo na kolendisa Mongombo.
29 Both were doubled at the bottom and joined into a single ring at the top; he did this with both, at the two corners. Bizingelo yango ezalaki ya kofungwama na se, kasi esalaki songe na likolo mpe ekotaki na lopete ya liboso : nyonso mibale ezalaki ndenge moko mpe elendisaki Mongombo.
30 So there were eight frames with their silver bases—sixteen bases, two under each frame. Boye, bizingelo ezalaki mwambe elongo na makolo na yango ya palata zomi na motoba : makolo mibale-mibale na se ya ezingelo moko na moko.
31 He made bars of acacia wood: five for the frames on one side of the tabernacle. Sima, basalaki, na nzete ya akasia, mabaya mitano mpo na bizingelo ya ngambo moko ya Mongombo,
32 Five bars for the frames on the tabernacle's second side, and five bars for the frames at the rear, westward. mabaya mitano mpo na bizingelo ya ngambo mosusu ya Mongombo, mabaya mitano mpo na bizingelo oyo ezalaki na suka ya Mongombo, na ngambo ya weste.
33 He made the middle bar to run through the frames from end to end. Libaya ya kati elekaki na kati-kati ya bizingelo, elekaki ngambo na ngambo.
34 He overlaid the frames with gold, made gold rings to hold the bars, and overlaid the bars with gold. Babambaki wolo na bizingelo, basalaki bapete na yango na wolo mpo na kolekisa mabaya ; mpe babambaki mabaya wolo.
35 He wove the curtain of blue, purple, scarlet yarn, and finely twisted linen, cherubim skillfully worked in. Basalaki rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango. Mpe bato oyo basalaka bililingi batongaki basheribe ya kitoko na rido yango.
36 He made four acacia pillars for it, plated them with gold, gold hooks, and cast four silver bases for them. Batiaki yango na makonzi minei ya nzete ya akasia, oyo bapakola wolo ; bakangisaki yango na bibende ya wolo oyo ezali lokola ndobo mpe batelemisaki yango na makolo minei ya palata.
37 He made a screen for the tent's entrance, embroidered in blue, purple, and scarlet yarn and finely twisted linen, Mpo na ekotelo ya Ndako ya kapo, asalaki rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko ; ezalaki mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba.
38 and its five pillars with hooks; he covered their tops and connecting rods with gold, but their five bases were bronze. Basalaki na wolo bibende mitano oyo ezali lokola ndobo mpo na kokangisela rido, mpe banzete mitano ya akasia babamba wolo ; basalaki makolo mitano ya bronze mpo na kotelemisela banzete yango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]