Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 37 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Bezalel made the ark of acacia wood—about forty-five inches long, twenty-seven inches wide, and twenty-seven inches high. Betisaleyeli asalaki Sanduku na nzete ya akasia. Molayi na yango ezalaki na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano ; mokuse na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano ; mpe bosanda na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano.
2 He covered it with pure gold inside and out, and made a gold molding around it. Abambaki yango wolo ya peto, na kati mpe na libanda. Alatisaki mpe songe na yango wolo.
3 He cast four gold rings for its four feet, two rings on one side and two on the other. Asalelaki yango bapete minei ya wolo mpe atiaki yango basonge minei : mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu.
4 He made acacia-wood poles and covered them with gold, Asalaki mabaya mibale na nzete ya akasia mpe abambaki yango wolo.
5 and he inserted the poles into the rings on the sides of the ark, to carry it. Akotisaki mabaya yango na bapete oyo ezali na songe ya Sanduku, mpo na komemela yango.
6 He made the atonement cover of pure gold—about forty-five inches long and twenty-seven inches wide. Asalaki mofinuku na wolo ya peto. Molayi na yango ezalaki na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano ; mpe mokuse na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano.
7 He made two cherubim of hammered gold at the two ends of the atonement cover, Asalaki bikeko mibale ya basheribe oyo atiaki na suka mibale ya mofinuku ; asalaki yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto.
8 one cherub at one end, one cherub at the other; he made the cherubim of one piece with the atonement cover at its two ends. Atiaki ekeko moko ya sheribe na suka moko, mpe ekeko mosusu, na suka mosusu. Akangisaki bikeko ya basheribe na mofinuku, na suka nyonso mibale.
9 The cherubim spread their wings upward, covering the atonement cover, their faces toward each other, turned toward the atonement cover. Mapapu ya basheribe ezalaki ya kofungwama na likolo mpo na kobatela mofinuku ; bazalaki ngambo na ngambo, mpe miso na bango etalaki mofinuku.
10 He made the table of acacia wood—about thirty-six inches long, eighteen inches wide, and twenty-seven inches high. Asalaki mesa moko na mabaya ya akasia. Molayi na yango ezalaki na basantimetele pene nkama moko ; mokuse na yango, basantimetele pene tuku mitano ; mpe bosanda na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano.
11 He covered it with pure gold and made a gold molding around it. Abambaki yango wolo ya peto mpe atiaki lisusu wolo na pembeni na yango.
12 He made a rim around it about three inches wide, with a gold molding for the rim. Azingelaki mesa yango na libaya oyo ezalaki na basantimetele pene mwambe na monene mpe atiaki wolo na pembeni ya libaya yango.
13 He cast four gold rings for it, fastening them at the four corners by its four legs. Asalaki bapete minei ya wolo mpe atiaki yango na songe minei ya mesa epai wapi makolo na yango ezalaki.
14 The rings were close to the rim, as holders for the poles to carry the table. Bapete ezalaki pene ya libaya oyo ezingelaki mesa, mpe bakotisaki kati na bapete yango mabaya ya komemela Sanduku.
15 He made the poles of acacia wood, plated with gold to carry the table. Asalaki na nzete ya akasia mabaya ya komemela mesa, mpe abambaki yango wolo.
16 He made the table's utensils of pure gold—its plates, dishes, bowls, and pitchers for pouring drink offerings. Asalaki na wolo ya peto basani, bakopo, bambilika mpe bambeki, mpo na makabo ya masanga.
17 He made the lampstand of hammered pure gold—base, shaft, cups, buds, and blossoms all one piece with it. Asalaki na wolo ya peto etelemiselo ya minda ; asalaki yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto. Evandelo na yango, likonzi na yango, bakeni na yango, bambuma mpe bafololo na yango, nyonso ezalaki ekangana lokola eloko moko.
18 Six branches extended from its sides—three branches on one side and three on the other. Mipanzi ya likonzi ya etelemiselo ya minda ezalaki na bitape motoba : misato na ngambo moko, mpe misato na ngambo mosusu.
19 One branch had three almond-blossom cups, each with bud and blossom, and the next branch three more—so for all six branches extending from the lampstand. Na likolo ya etape moko na moko ya etelemiselo ya minda, atiaki bakeni misato oyo ezali na lolenge ya fololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo.
20 On the lampstand itself were four cups shaped like almond blossoms, with their buds and blossoms. Na moto ya likonzi ya etelemiselo ya minda, ezalaki na bakeni minei oyo ezali na lolenge ya bafololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo.
21 A bud sat under the first pair of branches from it, one under the second pair, one under the third—for all six branches. Na se ya bitape mibale-mibale ya etelemiselo ya minda, ezalaki na mbuma moko ; mpe ezalaki bongo mpo na bitape nyonso motoba ya etelemiselo ya minda.
22 Its buds and branches were one piece with it—all one piece of pure, hammered gold. Bambuma mpe bitape ezalaki ekangana na etelemiselo ya minda ; mpe nyonso esalemaki na wolo ya peto, wolo oyo batuti na nzela ya marto.
23 He made its seven lamps, along with its wick trimmers and trays, of pure gold. Asalaki minda sambo ; mpe asalaki na wolo ya peto bisimbelo elongo na basani ya putulu.
24 He made the lampstand and all its utensils from seventy-five pounds of pure gold. Asalelaki bakilo tuku misato na minei ya wolo ya peto mpo na kosala etelemiselo ya minda mpe bisalelo na yango nyonso.
25 He made the incense altar of acacia wood—eighteen inches square, thirty-six high—its horns of one piece with it. Betisaleyeli asalaki etumbelo ya malasi na nzete ya akasia. Molayi mpe mokuse na yango ezalaki ndenge moko, basantimetele pene tuku mitano ; mpe bosanda na yango ezalaki na metele moko. Maseke na yango ekangamaki na etumbelo mpe esalaki kaka eloko moko.
26 He covered it with pure gold—its top, its sides all around, its horns—and made a gold molding around it. Abambaki wolo ya peto na likolo ya etumbelo, na mipanzi na yango mpe na maseke na yango ; mpe azingelaki pembeni na yango na libende ya wolo.
27 He made two gold rings for it below the molding on its two sides, holders for the poles to carry it. Asalaki mpo na etumbelo bapete ya wolo na se ya ebende ya wolo oyo ezingeli yango : mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu ; mpo na kokotisa mabaya ya komemela etumbelo.
28 He made the acacia-wood poles and covered them with gold. Asalaki mabaya yango na nzete ya akasia mpe abambaki yango wolo.
29 He also made the holy anointing oil and the pure, fragrant incense—the work of a perfumer. Asalaki mafuta ya epakolami ya bule, malasi ya solo kitoko mpe ya peto, oyo esalemi na mosali malasi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]