Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 38 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 He made the altar of burnt offering from acacia wood: about seven and a half feet long and wide—a square—and four and a half feet high. Betisaleyeli asalaki na mabaya ya nzete ya akasia etumbelo ya bambeka ya kotumba ; ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse, bametele mibale na basantimetele tuku mitano ; bongo bosanda na yango ezalaki ya metele moko na basantimetele tuku mitano.
2 He made horns on its four corners, one piece with it, and covered it with bronze. Asalaki maseke minei na basonge nyonso minei ya etumbelo, mpo ete maseke mpe etumbelo esala eloko moko ; mpe abambaki bronze na etumbelo.
3 He made all the altar's utensils: pots, shovels, basins, forks, and firepans—all its utensils of bronze. Asalaki na bronze banzungu ya mike mpo na kolongola putulu ya moto, bapawu, basani ya minene, bakanya mpe basani mpo na komema makala ya moto.
4 He made for the altar a bronze grating under its ledge, reaching halfway up. Asalaki motalaka ya bronze mpo na etumbelo ; akangisaki bapete minei ya bronze na basonge nyonso minei ya motalaka.
5 He cast four rings on the four corners of the bronze grating to hold the poles. Asalaki na bronze bapete minei oyo atiaki na basonge nyonso minei ya motalaka mpo na koyamba mabaya.
6 He made acacia-wood poles and covered them with bronze. Asalaki na nzete ya akasia, mabaya mpo na etumbelo mpe abambaki yango bronze.
7 He put the poles into the rings on the altar's sides, to carry it by them; he made it hollow, with boards. Boye, mpo na komema etumbelo, bakotisaki mabaya yango na bapete oyo ezali na basonge mibale ya etumbelo. Bongo etumbelo yango ezalaki polele kati na yango.
8 He made the bronze basin and its bronze stand from the mirrors of the women serving at the tent of meeting's entrance. Asalaki lisusu na bronze ya bitalatala ya basi oyo bazalaki kosangana na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani : sani monene mpo na komipetola mpe evandelo na yango.
9 He made the courtyard. Its curtains on the south side were finely twisted linen, about 150 feet long. Tala ndenge atongaki lopango ya Mongombo : ngambo ya sude oyo ezalaki ya bametele pene tuku mitano na molayi, ezipamaki na rido ya lino oyo basali bilamba basalaki.
10 Their twenty pillars and twenty bases: bronze. Pillars' hooks and bands: silver. Makonzi na yango tuku mibale mpe bivandelo tuku mibale esalemaki na bronze ; bongo bibende ya makonzi elongo na biloko na yango ya kosimbela ezalaki ya palata.
11 The north side: 150 feet of curtains, with twenty bronze pillars and twenty bronze bases; the pillars' hooks and bands were silver. Ngambo ya nor ezalaki na bametele pene tuku mitano na molayi, na makonzi tuku mibale mpe na makolo tuku mibale, oyo esalema na bronze. Makonzi yango ezalaki na bibende ya palata egumbama lokola ndobo elongo na biloko na yango ya kosimbela, oyo ezalaki ya palata.
12 On the west side: curtains about seventy-five feet, ten pillars, ten bases; the pillars' hooks and bands were silver. Ngambo ya weste ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse mpe barido elongo na makonzi zomi, makolo zomi, bibende ya palata egumbama lokola ndobo mpe biloko na yango ya kosimbela.
13 On the east side, toward the sunrise, the courtyard was about seventy-five feet wide. Ngambo ya este ya lopango ya Mongombo, epai wapi moyi ebimelaka, ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse.
14 Curtains twenty-two and a half feet long for one side of the gate, with three pillars and three bases. Ngambo moko ya ekuke ezalaki na barido ya bametele pene sambo na basantimetele tuku mitano, elongo na makonzi misato mpe makolo misato.
15 Same on the other side: curtains on both sides of the courtyard gate, about twenty-two and a half feet long, with three pillars and three bases each. Ngambo mosusu ya ekuke ezalaki mpe na barido ya bametele pene sambo na basantimetele tuku mitano, elongo na makonzi misato mpe makolo misato.
16 All the curtains around the courtyard were of finely twisted linen. Barido nyonso zingazinga ya lopango ezalaki ya lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango.
17 The courtyard pillars' bases were bronze; their hooks and bands were silver; their tops' overlay was silver; all courtyard pillars were banded with silver. Makolo ya makonzi ezalaki ya bronze ; bibende egumbama lokola ndobo mpe biloko na yango ya kosimbela ezalaki ya palata, mpe balatisaki basonge na yango palata. Makonzi nyonso ya lopango ezalaki na biloko ya palata ya kosimbela.
18 The courtyard's gate curtain was embroidered in blue, purple, and scarlet yarn and finely twisted linen—about thirty feet long, seven and a half feet high, like the courtyard's curtains. Rido ya ekuke ya lopango ezalaki ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe ya lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango ; ezalaki mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba. Molayi na yango ezalaki na bametele pene zomi, mpe bosanda na yango, bametele pene mibale na basantimetele pene tuku mitano, ndenge barido nyonso ya lopango ezalaki.
19 Their four pillars and four bases were bronze; their hooks, silver; the overlay of their tops and bands, silver. Ezalaki mpe na makonzi minei mpe bivandelo minei ya bronze. Bibende na yango oyo egumbama lokola ndobo mpe biloko na yango ya kosimbela rido ezalaki ya palata, mpe balatisaki basonge na yango palata.
20 All the pegs for the tabernacle and around the courtyard were bronze. Bapike nyonso ya Mongombo mpe ya lopango ezalaki ya bronze.
21 These are the accounts of the tabernacle, the tabernacle of the testimony, recorded at Moses' command—the work of the Levites under Ithamar son of Aaron the priest. Tala motuya ya biloko oyo basalelaki Mongombo oyo, kati na yango, ezalaki na buku ya Boyokani, ndenge kaka Moyize atindaki. Balevi batongaki yango na bokambami ya Itamari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron.
22 Bezalel son of Uri, son of Hur, of Judah's tribe, made all our Father commanded Moses, Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Wuri, ya libota ya Yuda, asalaki nyonso oyo Yawe atindaki Moyize.
23 with him was Oholiab son of Ahisamach, of the tribe of Dan, an engraver, designer, and embroiderer in blue, purple, scarlet yarn, and fine linen. Asungamaki na Oliabi, mwana mobali ya Ayisamaki, moto ya libota ya Dani, mosali mpe motongi bililingi na maboko, oyo azalaki kobimisa makanisi mpe kotonga bililingi na bilamba ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko.
24 All the gold used for the work, in all the work of the sanctuary—the wave offering's gold—weighed about 2,193 pounds, by the sanctuary standard. Wolo nyonso oyo basalelaki mpo na kotonga mpe mpo na misala nyonso ya Mongombo, wolo oyo babonzelaki Yawe, ezalaki bakilo nkoto moko mpe bagrame nkama moko na tuku mibale, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo. Wolo nyonso wana ewutaki na makabo ya kotombola.
25 Silver from those counted in the community weighed about 7,545 pounds, by the sanctuary standard: Palata oyo bazwaki na maboko ya bato oyo batangamaki na lisanga, ezalaki bakilo nkoto misato mpe bagrame nkama minei na tuku minei, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo.
26 About a fifth of an ounce of silver per head, for each counted, twenty years old and up: 603,550 men. Elingi koloba ete moto nyonso oyo batangaki amemaki bagrame mitano na badesigrame sambo, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo. Bato nyonso oyo batangamaki, oyo bazalaki na mibu ya mbotama tuku mibale mpe koleka, bazalaki nkoto nkama motoba na misato na nkama mitano na tuku mitano.
27 About 7,500 pounds of silver cast the sanctuary's bases and the veil's bases—one hundred bases from that silver, about 75 pounds each. Basalelaki bakilo ya palata nkoto misato na nkama minei na tuku mibale mpo na kosala bivandelo nkama moko ya Mongombo mpe barido nkama moko : elingi koloba ete basalelaki bakilo pene tuku misato na minei mpe bagrame pene nkama mibale mpo na evandelo moko.
28 From the forty-five pounds of silver he made hooks for the pillars, overlaid their tops, and banded them. Shekeli nkoto moko na nkama sambo na tuku sambo na mitano oyo etikalaki, basalelaki yango bibende oyo egumbama lokola ndobo, biloko ya kosimbela rido mpe balatiselaki yango basonge ya makonzi.
29 The bronze of the wave offering weighed about 5,310 pounds. Bronze oyo ewutaki na makabo ya kotombola ezalaki bakilo pene nkoto mibale na nkama minei na tuku mibale na moko.
30 With it he made the tent of meeting's entrance bases, the bronze altar with its bronze grating, and all the altar's utensils. Bazwaki yango mpo na kosala bivandelo ya ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani, etumbelo ya bronze elongo na motalaka na yango mpe bisalelo na yango nyonso.
31 The bases around the courtyard, the bases of the courtyard's gate, all the tabernacle's pegs, and all the pegs around the courtyard. Basalelaki yango lisusu bivandelo nyonso oyo ezalaki pembeni-pembeni ya lopango ya Mongombo, bivandelo ya ekotelo na yango, bapike nyonso ya Mongombo mpe bapike oyo ezingelaki lopango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]