Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 39 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 From the blue, purple, and scarlet yarn they made finely woven garments for serving in the holy place; they made the holy garments for Aaron, as our Father commanded Moses. Batongaki na langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi bilamba ya mosala ya bonganga-Nzambe kati na Mongombo ; batongaki mpe bilamba ya bule mpo na Aron, ndenge kaka Yawe atindaki yango na Moyize.
2 He made the ephod of gold, of blue, purple, and scarlet yarn, and of finely woven linen. Betisaleyeli atongaki efode ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango ; asalaki yango kitoko penza.
3 They hammered gold into sheets, cut it into threads, and worked them into the blue, purple, and scarlet yarn and fine linen—the work of a skilled designer. Batandaki mabende mike-mike ya wolo, bakataki-kataki yango lokola basinga mpe bakotisaki kati na langi ya ble mpe ya motane ya pete, langi ya motane makasi mpe lino ya kitoko ; ezalaki mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.
4 They made shoulder pieces for it, joined together at its two edges. Atiaki bankamba mibale na basuka na yango mibale mpo na kolata efode yango ; bankamba elekaki likolo ya mapeka.
5 The ephod's woven band was one piece with it, made the same way: gold, blue, purple, and scarlet yarn, and finely twisted linen, as our Father commanded Moses. Mokaba ya efode esalemaki lolenge moko na efode : ezalaki ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
6 They made the onyx stones, mounted in gold filigree settings, engraved like seal engravings, with the names of Israel's sons. Abongisaki mabanga ya onikisi, mpe bakangaki yango na bikangelo ya wolo ; akomaki likolo na yango bakombo ya bana mibali ya Isalaele, ndenge basalaka bililingi na kashe.
7 He put them on the ephod's shoulder pieces as memorial stones for Israel's sons, as our Father had commanded Moses. Atiaki yango na bankamba ya efode lokola mabanga ya ekaniseli mpo na bana mibali ya Isalaele, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
8 He made the breastpiece—skilled work like the ephod's—of gold, blue, purple, scarlet yarn, and finely twisted linen. Betisaleyeli asalaki elamba ya tolo ; esalemaki kitoko penza. Atongaki yango ndenge moko na efode : ezalaki ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango.
9 Square and doubled, they made the breastpiece—about nine inches long and nine inches wide, doubled. Agumbaki yango na biteni mibale ; molayi mpe mokuse ezalaki ndenge moko, basantimetele pene tuku mibale na mitano.
10 They set in it four rows of stones. The first row was carnelian, topaz, and emerald; Atiaki milongo minei ya mabanga ya talo na likolo ya elamba ya tolo : na molongo ya liboso, libanga ya saridwane, ya topaze mpe ya emerode.
11 the second row, turquoise, sapphire, and emerald; Na molongo ya mibale, libanga ya ribisi, ya safiri mpe ya diama.
12 the third row, jacinth, agate, and amethyst; Na molongo ya misato, libanga ya opale, ya agate mpe ya ametisite ;
13 the fourth row, beryl, onyx, and jasper. They were enclosed in gold filigree settings. na molongo ya minei, libanga ya krizolite, ya onikisi mpe ya jasipe. Akangaki mabanga yango na bikangelo ya wolo.
14 Twelve stones, one per name of Israel's sons, each engraved like a seal with its own name, for the twelve tribes. Mabanga yango ezalaki zomi na mibale kolanda bakombo ya bana mibali ya Isalaele. Na likolo ya libanga moko na moko, bakomaki kombo ya moko kati na mabota zomi na mibale ; bakomaki yango ndenge basalaka bililingi na kashe.
15 For the breastpiece they made braided chains of pure gold, like cords. Basalaki basheneti ya wolo ya peto mpo na elamba ya tolo ; basalaki yango ndenge bakangaka suki ya maboko.
16 They made two gold filigree settings and two gold rings, fastening the two rings to the breastpiece's two ends. Basalaki bikangelo mibale ya wolo mpe bapete mibale ya wolo mpe bakangisaki yango na basonge mibale ya elamba ya tolo.
17 They fastened the two gold cords to the two rings at the ends of the breastpiece. Alekisaki basheneti mibale ya wolo kati na bapete mibale oyo atiaki na basonge mibale ya elamba ya tolo.
18 They put the two ends of the two cords on the two filigree settings, and put them on the ephod's shoulder pieces, at its front. Akangisaki basonge mibale mosusu ya basheneti oyo mibale na bikangelo mibale oyo atiaki na bankamba ya efode ; bankamba yango elekaki na liboso.
19 They made two gold rings and put them on the breastpiece's two ends, on its inner edge facing the ephod. Asalaki lisusu bapete mibale ya wolo mpe atiaki yango na basonge mibale ya se ya elamba ya tolo, na ngambo ya kati oyo etala efode.
20 They made two gold rings and put them on the two shoulder pieces of the ephod, low on the front, near the seam above its woven band. Asalaki bapete mosusu mibale ya wolo oyo atiaki na bankamba mibale ya efode, na se, na liboso mpe na pembeni ya mokaba ya efode.
21 They fastened the breastpiece's rings to the ephod's rings with a blue cord, so it would rest on the ephod's woven band and not come loose from the ephod, as our Father commanded Moses. Akangisaki na singa ya langi ya ble bapete ya wolo ya elamba ya tolo mpe bapete ya wolo ya efode, mpo ete elamba ya tolo ezala likolo ya efode mpe elongwa te na likolo na yango. Asalaki yango ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
22 Bezalel made the robe of the ephod entirely of blue, the work of a weaver. Basalaki nzambala oyo ezalaki na se ya efode : ezalaki ya langi ya ble na mobimba na yango, mpe ezalaki mosala ya bato oyo basalaka bilamba na maboko.
23 Its opening was in the center, like a collar's opening, with a woven binding around it so it wouldn't tear. Nzambala ezalaki na lidusu na kati-kati mpo na kokotisa moto ; batongaki pembeni-pembeni ya lidusu yango poso ya makasi mpo ete epasuka te.
24 They made pomegranates of blue, purple, and scarlet yarn and twisted linen on the robe's hem. Na se mpe zingazinga ya nzambala, batiaki bambuma ya grenade bakangisa na singa ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na singa ya lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango.
25 They made pure gold bells and set them between the pomegranates on the robe's hem, all around between the pomegranates. Basalaki na wolo ya peto bangonga ya mike-mike mpe batiaki yango kati na bagrenade, na se ya nzambala.
26 Bell and pomegranate, bell and pomegranate, around the robe's hem for serving, as our Father commanded Moses. Balandisaki yango boye : ngonga moko ya moke, grenade moko, mpe bongo na bongo, zingazinga ya basonge nyonso ya nzambala mpo na mosala, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
27 For Aaron and his sons they made the tunics of fine linen, the work of a weaver, Batongaki na lino ya kitoko, mpo na Aron mpe bana na ye ya mibali, banzambala,
28 the fine-linen turban, the beautiful fine-linen caps, and linen undergarments of finely twisted linen. bitendi ya lino ya kitoko mpo na moto, bikoti, bakaputula
29 The sash: finely woven linen, blue, purple, and scarlet yarn, embroidered work, as our Father commanded Moses. mpe mikaba oyo batonga bililingi na likolo na yango na basinga ya lino ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
30 They made the holy crown's plate from pure gold, engraved like a seal: "Holy to our Father." Basalaki na wolo ya peto medaye lokola elembo ya libulisi na ye epai na Yawe mpe bakomaki na likolo na yango ndenge basalaka bililingi na kashe : abulisama mpo na Yawe.
31 They tied a blue cord to it, fastening it on the turban above, as our Father commanded Moses. Batiaki yango singa ya ble mpo na kokangisa yango na likolo ya kitendi ya moto, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
32 All the work of the tabernacle, the tent of meeting, was finished. Israelites did everything our Father commanded Moses—so they did. Boye misala nyonso ya Mongombo, ya Ndako ya kapo ya Bokutani, esilaki. Bana ya Isalaele basalaki misala nyonso ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
33 They brought Moses the tabernacle: the tent, all its furnishings, clasps, frames, crossbars, posts, and bases; Bamemaki Mongombo epai ya Moyize, elongo na biloko na yango nyonso : ndako ya kapo mpe bibende na yango oyo ezali lokola ndobo, bikangelo na yango, mabaya na yango, makonzi mpe bivandelo na yango,
34 the covering of red-dyed ram skins, the covering of fine leather, and the screening curtain, ezipelo ya poso ya meme oyo bapakola langi ya motane, ezipelo ya poso ya nyama ya ebale mpe barido,
35 the ark of the testimony with its poles and the mercy seat; Sanduku ya Litatoli, mabaya ya komemela yango mpe mofinuku na yango,
36 the table with all its utensils and the bread of the Presence; mesa, bisalelo na yango nyonso mpe mapa oyo esengeli kozala liboso ya Yawe ;
37 the pure gold lampstand, its arranged lamps, all its utensils, and oil for the light; etelemiselo ya minda, oyo basala na wolo ya peto, minda na yango, bisalelo na yango nyonso mpe mafuta mpo na kopelisa minda yango,
38 the gold altar, anointing oil, fragrant incense, and the tent entrance screen; etumbelo oyo esalema na wolo, mafuta ya epakolami, malasi ya solo kitoko, rido ya ekotelo ya ndako ya kapo,
39 the bronze altar with its bronze grate, poles, and all its utensils, the basin and its stand; etumbelo esalema na bronze, motalaka na yango ya bronze, mabaya ya komemela yango mpe bisalelo na yango nyonso, sani ya bronze mpe evandelo na yango,
40 the courtyard's curtains, posts, and bases, the courtyard entrance screen, ropes, pegs, and all the equipment for the tabernacle's service, the tent of meeting; batapi ya lopango, makonzi na yango, makolo na yango, rido mpo na ekotelo ya lopango, basinga na yango, bapike na yango, bisalelo nyonso mpo na mosala ya Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani,
41 and the finely woven garments for serving in the holy place, the holy garments for Aaron the priest, and his sons' garments for priestly service. bilamba ya mosala ya bonganga-Nzambe mpo na kosala kati na Mongombo, bilamba ya bule mpo na Nganga-Nzambe Aron mpe bilamba ya mosala ya bonganga-Nzambe mpo na bana na ye ya mibali.
42 The people of Israel had done all the work just as our Father had commanded Moses. Bana ya Isalaele basalaki misala nyonso ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
43 Moses inspected all the work: they had done it as our Father commanded—so they had done it. Moses blessed them. Moyize atalaki malamu misala yango mpe amonaki ete basalaki yango ndenge kaka Yawe atindaki. Boye Moyize apambolaki bango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]