Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 40 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then our Father spoke to Moses, saying: Yawe alobaki na Moyize :
2 "Set up the tabernacle, the tent of meeting, on day one of month one. — Na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, okotelemisa Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani ;
3 Place in it the ark of the testimony, and shield the ark with the veil. okotia kati na yango Sanduku ya Litatoli mpe okozipa yango na rido.
4 Bring in the table, arrange its setup, bring in the lampstand, and light its lamps. Okokotisa mesa mpe okotia biloko oyo esengeli kozala likolo na yango ; okokotisa etelemiselo ya minda mpe okopelisa minda na yango.
5 Put the gold incense altar before the ark of the testimony, and put the screen at the tabernacle's entrance. Okotia etumbelo ya malasi, oyo basala na wolo liboso ya Sanduku ya Litatoli mpe okotia rido, na ekotelo ya Mongombo.
6 Place the altar of burnt offering before the entrance to the tabernacle, the tent of meeting, Okotia etumbelo ya mbeka ya kotumba liboso ya ekotelo ya Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani,
7 and place the basin between the tent of meeting and the altar, and put water in it. mpe okotia sani mpo na komipetola na kati-kati ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe etumbelo, mpe okotia mayi kati na yango.
8 Set up the courtyard all around, and hang the screen at the gate of the courtyard. Okotonga lopango zingazinga na yango mpe okotia rido na ekotelo ya lopango.
9 "Take the anointing oil and anoint the tabernacle and everything in it; dedicate it and all its furnishings, and it will be holy. Okozwa mafuta ya epakolami, okopakola Mongombo mpe nyonso oyo ezali kati na yango, mpe okobulisa yango elongo na bisalelo na yango nyonso mpe yango ekozala bule.
10 Anoint the burnt offering altar and all its utensils; dedicate the altar, and the altar will be most holy. Okopakola mafuta na etumbelo ya mbeka ya kotumba mpe bisalelo na yango nyonso ; okobulisa etumbelo mpe yango ekozala bule koleka.
11 Anoint the basin and its stand, and dedicate it. Okopakola mafuta na sani mpo na komipetola mpe evandelo na yango, mpe okobulisa yango.
12 "Then bring Aaron and his sons to the tent of meeting's entrance and wash them with water. Okomema Aron mpe bana na ye ya mibali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe okosukola bango na mayi.
13 Clothe Aaron in holy garments, anoint and dedicate him, to serve me as priest. Sima na yango, okolatisa Aron bilamba ya bule, okopakola ye mafuta mpe okobulisa ye mpo ete asalela Ngai lokola Nganga-Nzambe.
14 Bring his sons; dress them in tunics. Okomema mpe bana na ye ya mibali mpe okolatisa bango banzambala.
15 Anoint them as you anointed their father, so they may serve me as priests. Their anointing gives them a lasting priesthood for all generations." Okopakola bango mafuta ndenge opakolaki tata na bango, mpo ete basalela Ngai lokola Banganga-Nzambe : epakolami na bango ekopesa bango nzela mpo na kosala mosala ya bonganga-Nzambe libela na libela kati na bakitani na bango.
16 Moses did everything just as our Father commanded him. Moyize asalaki nyonso oyo Yawe atindaki ye.
17 In the first month of the second year, on the first day of the month, the tabernacle was raised up. Boye, Mongombo etelemisamaki na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso na mobu ya mibale.
18 Moses raised the tabernacle: he put its bases, set its frames, put its bars, and raised its pillars. Tango Moyize atelemisaki Mongombo, atiaki bivandelo na esika na yango, atiaki bakadre, akotisaki mabaya mpe atelemisaki makonzi ;
19 He spread the tent over the tabernacle and put its covering over it, as our Father had commanded Moses. atandaki ndako ya kapo na likolo ya Mongombo mpe atiaki ezipelo na likolo ya ndako ya kapo, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
20 He took the testimony, put it in the ark, set poles on the ark, and put the mercy seat on top of the ark. Moyize azwaki bitando nyonso mibale ya mabanga ya Boyokani mpe atiaki yango kati na Sanduku, akangisaki mabaya na Sanduku mpe atiaki esika ya bolimbisi masumu na likolo na yango.
21 He brought the ark into the tabernacle, hung the screening veil, and covered the ark of the testimony, as our Father commanded Moses. Moyize akotisaki Sanduku kati na Mongombo mpe atiaki rido mpo na kokabola Esika ya bule mpe Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpo ete bato bakoka komona Sanduku ya Litatoli te, ndenge kaka Yawe atindaki ye.
22 He set the table in the tent of meeting, on the tabernacle's north side, outside the veil, Moyize atiaki mesa kati na Ndako ya kapo ya Bokutani na ngambo ya nor ya Mongombo libanda ya rido ;
23 and arranged the bread on it before our Father, as our Father had commanded Moses. mpe atiaki mapa na molongo, liboso ya Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
24 He put the lampstand in the tent of meeting, opposite the table, on the tabernacle's south side, Atiaki etelemiselo ya minda kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, etalana na mesa, na ngambo ya sude ya Mongombo.
25 and set up the lamps before our Father, as our Father had commanded Moses. Apelisaki minda liboso ya Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
26 He placed the golden altar in the tent of meeting in front of the veil, Atiaki etumbelo ya wolo kati na Ndako ya kapo ya Bokutani liboso ya rido,
27 and burned fragrant incense on it, as our Father had commanded Moses. mpe atumbaki likolo na yango ansa ya solo kitoko, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
28 Then he put up the screen at the entrance to the tabernacle. Bongo atiaki rido na ekotelo ya Mongombo.
29 He placed the altar of burnt offering at the tabernacle's entrance, the tent of meeting, and offered on it the burnt offering and grain offering, as our Father commanded Moses. Atiaki etumbelo ya mbeka ya kotumba pembeni ya ekuke ya Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani, abonzaki likolo na yango bambeka ya kotumba mpe makabo ya mbuma, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
30 He set the basin between the tent of meeting and the altar, putting water in it for washing, Atiaki sani mpo na komipetola na kati-kati ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe etumbelo mpe atiaki kati na yango mayi ya kosukola.
31 and with it Moses, Aaron, and his sons washed their hands and feet. Moyize, Aron mpe bana mibali ya Aron basalelaki yango mpo na kosukola maboko mpe makolo na bango.
32 Whenever they entered the tent of meeting or neared the altar, they washed, as our Father commanded Moses. Bazalaki komisukola tango nyonso bazalaki kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani to kopusana pembeni ya etumbelo, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
33 He set up the courtyard around the tabernacle and altar, and put up the screen at the courtyard gate. So Moses finished the work. Moyize atelemisaki lopango pembeni-pembeni ya Mongombo mpe ya etumbelo, mpe atiaki rido na ekuke ya lopango. Ezali boye nde Moyize asilisaki mosala.
34 Then the cloud covered the tent of meeting, and the glory of our Father filled the tabernacle. Lipata ezipaki Ndako ya kapo ya Bokutani mpe nkembo na Yawe etondaki kati na Mongombo.
35 Moses could not enter the tent of meeting, for the cloud settled on it, and our Father's glory filled the tabernacle. Moyize akokaki lisusu te kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani, pamba te lipata evandaki likolo na yango mpe nkembo na Yawe etondaki kati na Mongombo.
36 Whenever the cloud lifted from over the tabernacle, the Israelites set out on each stage of their journey; Tango nyonso lipata ezalaki kolongwa na likolo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, bana ya Isalaele bazalaki kotelema mpo na kokende na mobembo na bango.
37 but if the cloud did not lift, they did not set out until the day it lifted. Kasi soki lipata elongwe te, bango mpe bazalaki kolongwa te, bazalaki kozela kino na mokolo oyo lipata ekolongwa.
38 For the cloud of our Father covered the tabernacle by day, with fire in it by night, visible to all the house of Israel throughout all their journeys. Na moyi, lipata ya Yawe ezalaki na likolo ya Mongombo ; bongo na butu, moto ezalaki kongala kati na lipata, mpe miso ya bana nyonso ya Isalaele ezalaki komona yango. Esalemaki bongo na mibembo na bango nyonso.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]