Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 26 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "Make the tabernacle from ten curtains: finely twisted linen with blue, purple, and scarlet yarn, woven with cherubim by a skilled artisan. Okotonga Mongombo elongo na batapi zomi ya lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, elongo na basheribe ; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.
2 Each curtain: about forty-two feet long and six feet wide—all the same size. Tapi moko na moko ekozala na bametele pene zomi na minei na molayi ; mpe bametele pene mibale, na mokuse. Batapi nyonso ekozala ndenge moko na mokuse mpe na molayi.
3 Five curtains join to each other; the other five join to each other. Okokangisa batapi mitano, moko na mosusu, mpe okosala ndenge moko mpo na batapi mitano mosusu.
4 Make blue loops on the outer curtain's edge in the first set, and the same in the second set. Okotia basinga ya langi ya ble na pembeni ya tapi ya suka ya lisanga ya batapi mitano ya liboso, mpe na pembeni ya tapi ya suka ya lisanga ya batapi mitano ya mibale.
5 Make fifty loops on the first curtain, fifty on the second set's curtain edge, matching each other. Okotia basinga tuku mitano na suka ya lisanga ya batapi mitano ya liboso, mpe na suka ya lisanga ya batapi mitano ya mibale ; basinga yango ekotalana.
6 Make fifty gold clasps and join the curtains together with them, so the tabernacle becomes one. Okosala na wolo bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo ; mpe okokangisa na bibende oyo ezali lokola ndobo lisanga ya batapi mitano ya liboso mpe lisanga ya batapi mitano ya mibale. Na boye, Mongombo ekobima eloko moko.
7 "Make curtains of goats' hair for a tent over the tabernacle—eleven of them. Okosala batapi zomi na moko na bapwale ya ntaba mpo na kotia yango na likolo ya Mongombo.
8 All eleven curtains: forty-five feet long, six feet wide, one size. Molayi ya tapi moko na moko ekozala na bametele pene zomi na mitano, mpe mokuse na yango ekozala na bametele pene mibale. Batapi nyonso zomi na moko ekozala ndenge moko na mokuse mpe na molayi.
9 Join five curtains separately, and six separately; fold the sixth curtain double at the tent's front. Okokangisa batapi mitano na ngambo moko, mpe batapi motoba na ngambo mosusu ; mpe okogumba tapi ya motoba na liboso ya Mongombo.
10 Make fifty loops on the edge of the first set's outer curtain, and fifty on the edge of the second set's curtain. Okotia basinga tuku mitano na suka ya liboke ya batapi ya liboso, mpe basinga tuku mitano na suka ya liboke ya batapi ya mibale.
11 Make fifty bronze clasps, put them through the loops, and join the tent into one. Okosala na bronze bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo ; okokotisa yango na basinga mpo na kokangisa Mongombo mpo ete ekoma eloko moko.
12 The extra half-curtain from the tent is to hang down over the back of the tabernacle. Batapi oyo ekozala na likolo ya Mongombo ekoleka molayi mpe ndambo na yango ekokita na sima ya Mongombo.
13 The extra eighteen inches of curtain hangs down each side of the tabernacle, covering it on both sides. Mpe na molayi ya batapi oyo ezali na likolo ya Mongombo, basantimetele pene tuku mitano ekolekana na bangambo mibale ya Mongombo mpo na kozipa yango.
14 Make the tent's covering: rams' skins dyed red, and above, a covering of fine leather. Okosalela baposo ya bameme oyo bapakola langi ya motane mpo na kozipa Mongombo, mpe okobakisa na likolo na yango baposo ya banyama ya ebale.
15 "Make upright frames of acacia wood for the tabernacle. Okosala bizingelo ya Mongombo na banzete ya akasia mpe okotelemisa yango.
16 Each frame is to be about fifteen feet long and about twenty-seven inches wide. Ezingelo moko na moko ekozala na bametele mitano na molayi, mpe basantimetele tuku sambo na mitano na mokuse.
17 Give each frame two tenons, matching each other; make all the tabernacle's frames this way. Okobeta banzete mibale-mibale na ezingelo ; okosala bongo mpo na bizingelo nyonso ya Mongombo.
18 Make twenty frames for the south side of the tabernacle. Okotia bizingelo tuku mibale na ngambo ya Negevi, na sude ;
19 Make forty silver bases under the twenty frames—two per frame, one per peg. mpe makolo tuku minei ya palata na se ya bizingelo tuku mibale : makolo mibale na se ya ezingelo moko na moko oyo babeta banzete mibale ;
20 For the second side of the tabernacle, the north side, make twenty frames, bizingelo tuku mibale na ngambo mosusu ya Mongombo, na nor,
21 and forty silver bases, two under each frame. elongo na makolo na yango tuku minei ya palata : makolo mibale mpo na ezingelo moko na moko ;
22 For the rear of the tabernacle, on the west, make six frames, bizingelo motoba na suka ya Mongombo, na ngambo ya weste,
23 and make two frames for the corners at the rear. mpe bizingelo mibale na suka mpo na kolendisa Mongombo.
24 They must be doubled from the bottom, joined together to the top at one ring—same for both, for the two corners. Bizingelo yango ekozala ya kofungwama na se, kasi ekosala songe na likolo mpe ekokota na lopete ya liboso : nyonso mibale ekozala ndenge moko mpe ekolendisa Mongombo.
25 So there will be eight frames and their silver bases—sixteen bases, two under each frame. Boye, bizingelo ekozala mwambe elongo na makolo na yango zomi na motoba ya palata : makolo mibale-mibale na se ya ezingelo moko na moko.
26 "Make crossbars of acacia wood: five for the frames on one side of the tabernacle, Sima, okosala, na nzete ya akasia, mabaya mitano mpo na bizingelo ya ngambo moko ya Mongombo,
27 five for the frames on the other side, and five for the frames at the rear, westward. mabaya mitano mpo na bizingelo ya ngambo mosusu ya Mongombo, mabaya mitano mpo na bizingelo oyo ekozala na suka ya Mongombo, na ngambo ya weste.
28 The center bar is to run through the middle of the frames from end to end. Libaya ya kati ekoleka na kati-kati ya bizingelo, ekoleka ngambo na ngambo.
29 Overlay the frames with gold, make gold rings to hold the bars, and overlay the bars with gold. Okobamba wolo na bizingelo, okosala bapete na yango na wolo mpo na kolekisa mabaya ; mpe okobamba mabaya wolo.
30 Set up the tabernacle according to the plan you were shown on the mountain. Okotonga Mongombo ndenge kaka balakisaki yo yango na likolo ya ngomba.
31 "Make a veil: blue, purple, scarlet yarn, finely twisted linen, skillfully woven with cherubim. Okosala rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi, mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, elongo na basheribe ; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.
32 Hang it on four gold-plated acacia posts with gold hooks, set on four silver bases. Okotia yango na makonzi minei ya nzete ya akasia, oyo bapakola wolo ; okokangisa yango na bibende ya wolo oyo ezali lokola ndobo mpe okotelemisa yango na makolo minei ya palata.
33 Hang the curtain under the clasps. Bring the covenant chest in behind it—the curtain separates the holy place from the most holy. Okokangisa rido na bibende oyo ezali lokola ndobo mpe okotia Sanduku ya Litatoli na sima ya rido yango. Rido nde ekokabola Esika ya bule mpe Esika-Oyo-Eleki-Bule.
34 Put the mercy seat on the ark of the covenant law in the most holy place. Kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, okotia mofinuku na likolo ya Sanduku ya Litatoli.
35 Put the table outside the veil, the lampstand opposite it on the tabernacle's south side, the table on the north side. Okotia mesa na liboso ya rido, na ngambo ya nor ya Mongombo, mpe okotia etelemiselo ya minda na liboso ya mesa, na ngambo ya sude.
36 "Make a screen for the tent entrance: blue, purple, and scarlet yarn, and finely twisted linen, embroidered work. Mpo na ekotelo ya Ndako ya kapo, okosala rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango ; ekozala mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba.
37 Make five acacia posts for the screen, gold-covered, with gold hooks, and cast five bronze bases." Okosala na wolo, bibende mitano oyo ezali lokola ndobo mpo na kokangisela rido mpe banzete mitano ya akasia babamba wolo ; okosala makolo mitano ya bronze mpo na kotelemisela banzete yango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]