Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 25 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then our Father spoke to Moses, saying: Yawe alobaki na Moyize :
2 "Tell Israel's people to collect an offering for me. Take my offering from everyone whose heart prompts them. — Yebisa bana ya Isalaele ete bamemela Ngai makabo. Okozwa yango na maboko ya moto nyonso oyo akopesa na motema malamu.
3 And this is the contribution that you are to receive from them: gold, silver, and bronze, Tala makabo oyo okozwa na maboko na bango : wolo, palata mpe bronze,
4 blue, purple, and scarlet yarn, fine linen, goats' hair, bilamba ya langi ya ble, ya motane, ya motane makasi, lino ya kitoko, bapwale ya ntaba,
5 tanned rams' skins, fine leather, and acacia wood, baposo ya bameme batia langi ya motane mpe baposo ya banyama ya ebale, banzete ya akasia,
6 oil for the light, spices for the anointing oil and for the fragrant incense, mafuta ya olive mpo na kopelisela mwinda, biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpo na kosala mafuta ya epakolami mpe malasi ya solo kitoko ;
7 onyx stones, and stones for setting in the ephod and the breastpiece. mabanga ya onikisi mpe mabanga mosusu ya talo mpo na kotia yango na efode mpe na elamba ya tolo oyo Nganga-Nzambe akobanda kolata.
8 And let them make me a sanctuary, so that I may live among them. Bakosalela Ngai Ndako ya bule, mpe nakovanda kati na bango.
9 Make the tabernacle and all its furnishings exactly according to the pattern I show you. Bokosala yango kolanda lolenge ya Mongombo mpe bisalelo oyo nakolakisa yo.
10 "They are to make an ark of acacia wood: forty-five inches long, twenty-seven wide, and twenty-seven high. Bokosala sanduku na nzete ya akasia. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano ; mokuse na yango, basantimetele tuku sambo na mitano mpe bosanda na yango, basantimetele tuku sambo na mitano.
11 Overlay it with pure gold, inside and out overlay it, and make a gold molding around it. Okobamba yango wolo ya peto, na kati mpe na libanda. Okolatisa mpe songe na yango na wolo.
12 Cast four gold rings for it and put them on its four feet: two rings on one side, two rings on the other. Okosalela yango bapete minei ya wolo mpe okotia yango na basonge minei : mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu.
13 You are to make poles of acacia wood and overlay them with gold. Okosala mabaya mibale na nzete ya akasia mpe okobamba yango wolo.
14 Insert the poles into the rings on the ark's sides to carry the ark by them. Okokotisa mabaya yango na bapete oyo ezali na songe ya sanduku, mpo na komemela yango.
15 The poles are to remain in the rings of the ark; they are not to be taken from it. Mabaya yango ekotikala libela kati na bapete ya sanduku : bakolongola yango te.
16 And you are to put into the ark the testimony that I will give you. Okotia kati na sanduku bitando ya mabanga ya mibeko, oyo nakopesa yo.
17 "Make a cover of atonement from pure gold—forty-five inches long and twenty-seven inches wide. Okosala mofinuku na wolo ya peto. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano ; mpe mokuse na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano.
18 Make two cherubim of hammered gold at the two ends of the mercy seat. Okosala bikeko mibale ya basheribe oyo okotia na suka mibale ya mofinuku ; okosala yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto.
19 Make one cherub on one end and one cherub on the other end, of one piece with the mercy seat, on its two ends. Okotia ekeko moko ya sheribe na suka moko, mpe mosusu, na suka mosusu. Okokangisa bikeko ya basheribe na mofinuku, na suka nyonso mibale.
20 The cherubim are to spread their wings upward, covering the mercy seat with their wings, faces toward each other, toward the mercy seat. Mapapu ya basheribe ekozala ya kofungwama na likolo mpo na kobatela mofinuku ; bakozala ngambo na ngambo, mpe miso na bango ekotala mofinuku.
21 Put the mercy seat on top of the ark, and in the ark put the testimony I will give you. Okotia kati na sanduku, bitando ya mabanga ya mibeko oyo nakopesa yo mpe okotia mofinuku na likolo ya sanduku.
22 I will meet you there and speak with you above the mercy seat, between the two cherubim on the ark of the testimony—all I command for Israel's people. Ezali wana, na likolo ya mofinuku nde Ngai nakomimonisa epai na yo, na kati-kati ya basheribe mibale oyo bakozala na likolo ya Sanduku ya Litatoli ; mpe nakopesa yo mitindo na Ngai nyonso mpo na bana ya Isalaele.
23 "Make a table of acacia wood: three feet long, eighteen inches wide, twenty-seven inches high. Okosala mesa moko na mabaya ya akasia. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko ; mokuse na yango, basantimetele pene tuku mitano mpe bosanda na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano.
24 You are to overlay it with pure gold and make a molding of gold around it. Okobamba yango wolo ya peto mpe okotia lisusu wolo na pembeni na yango.
25 Make a rim around it, three inches wide, and a gold molding around the rim. Okozingela mesa yango na libaya oyo ekozala na basantimetele pene mwambe na monene, mpe okotia wolo na pembeni ya libaya yango.
26 Make four gold rings for it, and put them on the four corners at its four legs. Okosala bapete minei ya wolo mpe okotia yango na songe minei ya mesa epai wapi makolo na yango ezali.
27 The rings are to be close to the rim, to hold the poles used to carry the table. Bapete ekozala pene ya libaya oyo ekozingela mesa, mpe bakokotisa kati na bapete yango mabaya ya komemela sanduku.
28 Make the poles of acacia wood and overlay them with gold; the table will be carried by them. Okosala na nzete ya akasia mabaya ya komemela mesa mpe okobamba yango wolo.
29 Make its plates, incense pans, jars, and bowls for pouring drink offerings—all of pure gold. Okosala na wolo ya peto basani, bakopo, bambilika mpe bambeki, mpo na makabo ya masanga.
30 And you are to set the bread of the Presence on the table before me always. Okotia tango nyonso mapa na likolo ya mesa liboso na Ngai.
31 "Make a lampstand of pure gold, hammered out—its base, shaft, cups, buds, and blossoms one piece with it. Okosala na wolo ya peto etelemiselo ya minda ; okosala yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto. Evandelo na yango, likonzi na yango, bakeni na yango, bambuma mpe bafololo na yango, nyonso ekozala ekangana lokola eloko moko.
32 Six branches will extend from its sides—three lampstand branches from one side, three lampstand branches from the other. Mipanzi ya likonzi ya etelemiselo ya minda esengeli kozala na bitape motoba : misato na ngambo moko, mpe misato na ngambo mosusu.
33 Three almond-shaped cups, each with bud and flower, on one branch, and three more, each with bud and flower, on the other—so for the six branches extending from the lampstand. Na likolo ya etape moko na moko ya etelemiselo ya minda, okotia bakeni misato oyo ezali na lolenge ya fololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo.
34 On the lampstand itself: four almond-blossom cups, with their buds and flowers, Na moto ya likonzi ya etelemiselo ya minda, esengeli kozala na bakeni minei oyo ezali na lolenge ya bafololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo.
35 and a bud of one piece from it under each pair of the six branches extending from the lampstand. Na se ya bitape mibale-mibale ya etelemiselo ya minda, ekozala na mbuma moko ; mpe ekozala bongo mpo na bitape nyonso motoba ya etelemiselo ya minda.
36 Its buds and branches are to be one piece with it, all of it one hammered piece of pure gold. Bambuma mpe bitape ekozala ekangana na etelemiselo ya minda ; mpe nyonso ekosalema na wolo ya peto, wolo oyo batuti na nzela ya marto.
37 Make seven lamps for it, and light them to shine in front of it. Okosala minda sambo oyo okotia na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete epesa pole na etando oyo ezali na liboso ya etelemiselo.
38 Its tongs and their trays are to be of pure gold. Okosala na wolo ya peto bibende oyo bazwelaka makala ya moto mpe basani ya putulu.
39 It is to be made, with all these utensils, out of about seventy-five pounds of pure gold. Okosalela bakilo tuku misato na minei ya wolo ya peto mpo na kosala etelemiselo ya minda mpe bisalelo na yango nyonso.
40 Make sure you make everything according to the pattern being shown to you on the mountain." Tala malamu mpe sala mosala nyonso kolanda ndakisa oyo natalisi yo na likolo ya ngomba.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]