Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 24 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 He said to Moses, "Come up to me—you and Aaron, Nadab and Abihu, and seventy elders of Israel—and bow in worship from a distance. Yawe alobaki na Moyize : — Mata epai na Yawe, yo elongo na Aron, Nadabi, Abiyu mpe bakambi tuku sambo ya Isalaele ; bokogumbama na mosika.
2 Only Moses may approach me; the others must not approach, and the people must not go up with him." Moyize kaka nde asengeli kopusana pene ya Yawe ; kasi bato mosusu te. Lisanga mobimba ya Isalaele mpe ekomata te elongo na ye.
3 Moses came and told the people all our Father's words and all the rules. All the people answered as one, "Everything our Father has said, we will do." Tango Moyize akendeki koyebisa bato makambo mpe mibeko nyonso ya Yawe, bato bazongisaki elongo : — Tokosala makambo nyonso oyo Yawe alobi.
4 Moses wrote down all the words of our Father, then rose early in the morning and built an altar at the mountain's foot, with twelve pillars for the twelve tribes of Israel. Moyize akomaki maloba nyonso oyo Yawe ayebisaki ye. Mokolo oyo elandaki, alamukaki na tongo makasi mpe atongaki etumbelo na ebandeli ya ngomba. Bongo, atelemisaki mabanga zomi na mibale oyo ezali kotalisa mabota zomi na mibale ya Isalaele.
5 He sent young Israelite men who offered burnt offerings and sacrificed bulls as peace offerings to our Father. Atindaki bilenge mibali ya Isalaele ete babonzela Yawe mbeka ya kotumba ya bangombe ya mibali lokola mbeka ya boyokani.
6 Moses took half the blood, put it in basins; the other half he splashed on the altar. Moyize azwaki ndambo ya makila, atiaki yango na sani ; bongo ndambo mosusu, abwakaki-bwakaki yango na likolo ya etumbelo.
7 Then he took the Book of the Covenant and read it aloud to the people. They said, "Everything our Father has spoken, we will do and obey." Azwaki lisusu buku ya Boyokani mpe atangaki yango liboso ya bana ya Isalaele. Boye bango bazongisaki : — Tokosala makambo nyonso oyo Yawe alobi mpe tokotosa yango.
8 Moses took the blood, sprinkled it on the people, and said, "Look, the blood of the covenant our Father made with you, based on all these words." Moyize azwaki makila, abwakelaki-bwakelaki yango bato mpe alobaki : — Oyo ezali makila ya boyokani oyo Yawe asali elongo na bino kolanda maloba oyo nyonso.
9 Then Moses and Aaron, Nadab and Abihu, and seventy of the elders of Israel went up. Sima na yango, Moyize elongo na Aron, Nadabi, Abiyu mpe bakambi tuku sambo ya Isalaele, bamataki likolo ya ngomba
10 They saw the Father of Israel; under his feet, something like a pavement of sapphire, clear as the sky itself. epai wapi bamonaki Nzambe ya Isalaele ; se ya matambe na Ye ezalaki lokola mabanga ya talo ya safiri mpe ezalaki na langi ya ble ya kitoko lokola ble ya likolo.
11 He did not lay a hand on Israel's leaders; they saw our Father, ate, and drank. Kasi Nzambe asembolaki loboko na Ye te mpo na kobeta bakambi ya Isalaele ; bamonaki Nzambe, baliaki mpe bamelaki.
12 Our Father told Moses, "Come up the mountain to me and stay there; I will give you stone tablets with the law and commandment I wrote to teach them." Yawe alobaki na Moyize : « Yaka pene na Ngai na likolo ya ngomba mpe telema wana. Ngai nakopesa yo bitando ya mabanga ya papala oyo na likolo na yango nakomi Mobeko mpe mitindo mpo na kopesa bana ya Isalaele malako. »
13 Moses set out with Joshua his assistant, and Moses went up the mountain of our Father. Boye Moyize atelemaki elongo na mosungi na ye Jozue mpe amataki na ngomba ya Nzambe.
14 He told the elders, "Wait here for us until we return to you. Aaron and Hur are with you—whoever has a dispute may go to them." Moyize alobaki na bakambi : « Bozela biso awa kino tokozonga. Aron mpe Wuri bazali elongo na bino. Tika ete soki moto azali na likambo, ayebisa bango yango. »
15 When Moses went up on the mountain, the cloud covered it, Tango Moyize amataki likolo ya ngomba, mapata ezipaki ye
16 the glory of our Father settled on Mount Sinai, and the cloud covered it six days, and on the seventh day he called to Moses from within the cloud. mpe nkembo ya Yawe ewumelaki na likolo ya ngomba Sinai. Mikolo motoba, mapata ezipaki ngomba. Bongo na mokolo ya sambo, Yawe abengaki Moyize kati na mapata.
17 To the Israelites, our Father's glory looked like a consuming fire on the mountaintop. Na miso ya bana ya Isalaele, Nkembo ya Yawe emonanaki na likolo ya ngomba lokola moto oyo etumbaka.
18 Moses entered the cloud and climbed the mountain; Moses stayed on the mountain forty days and forty nights. Tango Moyize amataki likolo ya ngomba, akotaki kati na mapata. Awumelaki kuna mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]