Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 23 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "Don't spread a false report or join hands with the wicked as a malicious witness. Okopanza sango ya lokuta te ; okosangana te na moto mabe mpo na koloba litatoli ya lokuta.
2 "Do not follow a majority to do wrong, or testify in a dispute siding with a majority to pervert justice, Okolanda ebele ya bato te mpo na kosala mabe. Tango okoloba litatoli liboso ya basambisi, okotatola te kolanda mokano ya bato ebele mpo na kokweyisa bosembo.
3 and do not show favoritism to a poor person in his lawsuit. Okokotela mobola te na tango azali kosamba liboso ya basambisi.
4 "If you find your enemy's ox or his donkey straying, surely return it to him. Soki okutani na ngombe to ane ya monguna na yo, oyo ebungi, osengeli kozongisela ye yango.
5 If you see your enemy's donkey collapsed under its load, don't leave it—help him free it. Soki omoni ane ya moto oyo ayinaka yo ekweyi na se ya mokumba oyo yango ememi, okotika yango wana te ; osengeli kosalisa yango.
6 "Do not deny justice to your poor in their lawsuits. Okokweyisa bosembo ya mobola te tango azali kosamba liboso ya basambisi.
7 Keep far from false charges; do not kill the innocent and righteous, for I won't acquit the guilty. Okozala mosika ya makambo ya lokuta. Okoboma te ezala moto oyo ayebi likambo te to moto ya sembo ; pamba te nalongisaka te moto mabe.
8 "Take no bribe—it blinds the clear-sighted and twists the words of the righteous. Okondimaka kanyaka te, pamba te kanyaka ezipaka miso ya bato oyo bamonaka malamu mpe ebebisaka maloba ya moto ya sembo.
9 "Do not oppress a foreigner—you know a foreigner's heart, since you were foreigners in the land of Egypt. Okonyokola mopaya te, pamba te oyebi yo moko ndenge ezalaka soki ozali mopaya ; bino mpe bozalaki bapaya na Ejipito.
10 "For six years you are to sow your land and gather its produce, Mibu motoba, okolona bilanga na yo mpe okobuka mbuma.
11 but the seventh year, release it and leave it unplowed, so the poor of your people may eat; what remains, wild animals may eat. Do the same for your vineyard and olive grove. Kasi na mobu ya sambo, okopemisa mabele. Boye babola kati na bato na yo bakozwa bilei ya kolia kati na yango mpe nyama ya zamba ekolia bilei oyo bato bakotika. Okosala ndenge moko mpo na elanga na yo ya vino mpe mpo na nzete na yo ya olive.
12 "Work six days; rest the seventh, so your ox and donkey may rest, and your slave woman's son and the foreigner may catch their breath. Mikolo motoba, okosala mosala na yo ; kasi na mokolo ya sambo, okosala mosala moko te mpo ete ngombe na yo elongo na ane na yo ekoka kopema, mpe mpo ete mwana mobali ya mwasi mowumbu na yo mpe mopaya bazwa lisusu makasi.
13 "Be on guard for all I have said to you. Do not mention other gods' names; let them not be heard on your lips. Bokosala keba na makambo nyonso oyo nayebisi bino. Bokobelela kombo ya banzambe mosusu te ; bokomeka kutu te kotanga yango na bibebu na bino.
14 "Three times a year you are to hold a festival to me. Mbala misato na mobu, bokosala bafeti misato mpo na Ngai.
15 Keep the Festival of Unleavened Bread: eat unleavened bread seven days, as I commanded, at the set time in the month of Abib—for then you left Egypt. No one may appear before me empty-handed. Bokosala feti ya Mapa ezanga levire. Na mikolo sambo kolanda ndenge napesaki bino mitindo, bokolia mapa ezanga levire na tango oyo ekatama, na sanza ya Abibi, mpo ete ezali na sanza yango nde bobimaki na Ejipito.
16 Keep the Harvest Festival—firstfruits of your produce sown in the field—and the Ingathering Festival at the year's end, when you gather your produce from the field. Okosala feti ya kobuka bambuma, okosala mpe feti ya bambuma ya liboso ya bilanga na yo, oyo olonaki. Na suka ya mobu, okosala feti ya kobuka bambuma tango okobuka mbuma ya elanga.
17 Three times a year all your males are to appear before the Sovereign Father. Mbala misato na mobu, bato nyonso bakoya liboso ya Nkolo Yawe.
18 "Don't offer my sacrifice's blood with anything leavened, or leave the fat of my festival offering till morning. Okobonzela Ngai te mbeka ya makila elongo na mapa batia levire. Mafuta ya nyama ya feti na Ngai ekoki kobombama te kino na tongo.
19 "Bring the best of your soil's firstfruits to your Father's house. Do not cook a young goat in its mother's milk. Okomema na Ndako ya Yawe, Nzambe na yo, bambuma ya liboso ya mabele na yo. Okolamba te mwana ntaba oyo ezali nanu komela mabele ya mama na yango.
20 "See, I send a messenger before you to guard you on the way and bring you to the place I have prepared. Nakotinda anjelu liboso na bino mpo ete abatela bino na nzela mpe amema bino na esika oyo nabongisaki mpo na bino.
21 Be on guard before him and obey his voice. Do not defy him—he won't forgive your rebellion, for my name is within him. Bosala keba na miso na ye mpe boyoka makambo oyo akoloba ; botombokela ye te mpo ete akolimbisa botomboki na bino te, pamba te Kombo na Ngai ezali kati na ye.
22 But if you truly listen to his voice and do all I say, I will be enemy to your enemies, adversary to your foes. Kasi soki boyoki na bokebi makambo oyo akoyebisa bino mpe soki bosaleli nyonso oyo nalobi, nakozala monguna ya banguna na bino mpe nakotelemela bato oyo bakotelemela bino.
23 My messenger will go ahead of you, bring you to the Amorites, Hittites, Perizzites, Canaanites, Hivites, and Jebusites, and I will wipe them out. Anjelu na Ngai akotambola liboso na bino mpe akokotisa bino na mokili ya bato ya Amori, ya bato ya Iti, ya bato ya Perizi, ya bato ya Kanana, ya bato ya Evi mpe ya bato ya Yebusi ; bongo Ngai nakosilisa bango.
24 Do not bow to their gods, serve them, or follow their practices. Tear them down completely and smash their sacred pillars to pieces. Bokogumbamela banzambe na bango te mpe bokosalela yango te to bokolanda te lolenge na bango ya kosalela. Bokokweyisa banzambe yango mpe bokobuka-buka bikeko na bango na biteni.
25 You are to serve your Father, and he will bless your bread and your water; I will remove sickness from among you. Soki bokosalela Yawe, Nzambe na bino, akopambola mapa mpe mayi na bino, mpe akolongola bokono kati na bino.
26 None will miscarry or be barren in your land; I will fill your days. Na mboka na bino, ekozala na mwasi moko te oyo akosopa zemi to akozanga kobota. Nakobakisela bino mikolo ebele na bomoi na bino.
27 I will send my terror ahead of you, confuse every nation you meet, and make all your enemies turn their backs to you. Nakotinda somo na Ngai liboso na bino mpe nakokotisa mobulu kati na bikolo nyonso oyo bokokota. Banguna na bino nyonso bakopesa bino mokongo mpe bakokima.
28 I will send the hornet ahead of you, driving out the Hivites, Canaanites, and Hittites before you. Nakotinda banzoyi ya minene liboso na bino mpo na kobengana bato ya Evi, ya Kanana mpe ya Iti na liboso na bino.
29 I won't drive them out before you in one year, or the land will become desolate and wild animals will multiply against you. Kasi nakobengana bango te na mbala moko mpo ete mboka ekoma te lokola ndako ezanga bato, mpe mpo ete banyama ya zamba ekoma mingi te mpo na kotungisa bino.
30 Little by little I will drive them out before you, until you multiply and possess the land. Nakobengana bango moke-moke liboso na bino kino bokokoma ebele mpo na kozwa mboka.
31 I will set your border from the Red Sea to the Philistine Sea, and from the wilderness to the River, for I will hand the land's people to you, and you will drive them out before you. Nakotia bandelo na bino kobanda na ebale monene ya barozo kino na ebale monene ya bato ya Filisitia mpe kobanda na esobe ya Sinai kino na ebale Efrate ; pamba te nakopesa bato ya mboka na maboko na bino, bongo bino bokobengana bango liboso na bino.
32 Do not make a covenant with them or with their gods. Bokosala boyokani te elongo na bango mpe elongo na banzambe na bango.
33 They must not live in your land, or they will make you sin against me—if you serve their gods, it will surely trap you." Botika bango te ete bawumela na mokili na bino, noki te bakotinda bino kosala masumu liboso na Ngai mpe kosalela banzambe na bango ; pamba te ekozala solo motambo mpo na bino. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]