Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 22 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
21:37 "Whoever steals an ox or sheep, then kills or sells it, repays five cattle for the ox, four sheep for the sheep. Soki moto ayibi ngombe moko to meme moko, bongo abomi yango to ateki yango ; asengeli kofuta bangombe mitano mpo na ngombe moko oyo ayibaki to bameme minei mpo na meme moko oyo ayibaki.
1 If a thief is caught breaking in and beaten to death, no bloodguilt for it. Soki bakangi moto azali koyiba, bongo babeti ye mpe akufi ; mobomi akozwa etumbu te mpo na makila oyo esopani.
2 If sunrise finds him, bloodguilt is his. He must repay; if he has nothing, he's sold for his theft. Kasi soki makambo yango esalemi na moyi, moto oyo akoboma ye akozwa etumbu mpo na makila oyo esopani. Moyibi nyonso asengeli kozongisa biloko oyo ayibi. Soki azali na eloko te, bakoteka ye mpo na kofuta eloko oyo ayibaki.
3 If the stolen animal is found alive in his possession—ox, donkey, or sheep—he must repay double. Soki ayibaki nyama, ezala ngombe, ane to meme, bongo bakuti nyama yango ya bomoi na maboko na ye, akofuta banyama mibale.
4 "If someone lets livestock loose and it grazes in another's field or vineyard, he repays with the best of his field and the best of his vineyard. Soki moto azali koleisa bibwele na ye matiti na elanga na ye to na elanga na ye ya vino, bongo atiki bibwele yango koyengayenga mpe ekeyi kolia matiti na elanga to na elanga ya vino ya moto mosusu, nkolo bibwele asengeli kofuta mbuma oyo eleki kitoko kati na elanga na ye to kati na elanga na ye ya vino.
5 "If fire spreads and catches thornbushes, burning stacked grain, standing grain, or the field, whoever started it must repay in full. Soki moto apelisi moto, bongo moto yango ekutani na banzete ya sende, epanzani mpe ezikisi ble oyo basili kotia na maboke to ble oyo babuki nanu te, moto oyo apelisaki moto asengeli kofuta biloko nyonso oyo eziki.
6 "If someone entrusts a neighbor with silver or goods, and it's stolen from his house, the thief—if caught—pays back double. Soki moto abombisi palata to biloko na ye ya motuya epai ya moninga na ye, bongo bayibi yango kati na ndako ya moninga wana ; soki bakangi moyibi ya biloko yango, akozongisa mbala mibale biloko oyo ayibaki.
7 If the thief isn't found, the householder must come before our Father to see if he took his neighbor's property. Kasi soki moyibi amonani te, nkolo ndako asengeli kosamba liboso ya basambisi mpo na koyeba soki ayibaki biloko ya moninga na ye to te.
8 For any disputed ox, donkey, sheep, garment, or lost item claimed as his, both come before our Father; whoever our Father condemns pays double to his neighbor. Na likambo nyonso ya moyibi, soki bato mibale bazali kowela ngombe, ane, meme, elamba to eloko nyonso oyo ebungaki, bongo moto na moto azali koloba : ‹ Ezali ya ngai ! › bango mibale bakomema likambo na bango liboso ya basambisi ; bongo moto oyo basambisi bakokweyisa akozongisa yango mbala mibale epai ya moninga na ye.
9 "If someone gives his neighbor a donkey, ox, sheep, or any animal to guard, and it dies, is hurt, or is taken unseen, Soki moto apesi moninga na ye ngombe to ane to meme to nyama mosusu mpo ete abokola, bongo nyama yango ekufi to ebukani to bayibi yango mpe ata moto moko te amoni mpo na kotatola ndenge nini likambo yango esalemaki,
10 an oath before me settles the matter between them: the keeper did not lay a hand on his neighbor's property. The owner accepts it; no repayment is due. kaka ndayi oyo balapi na Kombo na Yawe nde ekokabola bango : Moto oyo andimaki kobokola akolapa ndayi liboso ya Yawe mpo na kotalisa ete ayebi likambo te. Bongo nkolo nyama asengeli kondima maloba ya moninga na ye mpe ye akofuta nyama yango te.
11 But if the animal was in fact stolen from him, he must make restitution to its owner. Kasi soki bayibi nyama yango na maboko ya moto oyo andimaki kobokola yango, akofuta nyama yango epai ya nkolo na yango.
12 If it was torn apart, he must bring it as proof; he owes nothing for the torn animal. Soki ezali nyama ya zamba nde ebomaki nyama yango, moto oyo andimaki kobokola yango akomema lokola litatoli biteni oyo etikali ; bongo akofuta nyama yango te.
13 "If someone borrows an animal from a neighbor and it's injured or dies without the owner present, full repayment is required. Soki moto adefi nyama epai ya moninga na ye, bongo ebukani lokolo to ekufi na tango oyo nkolo na yango azali te, moto wana asengeli kofuta yango.
14 If its owner was with it, he owes nothing; if the animal was hired, the fee covers the loss. Nzokande soki nkolo na yango azalaki wana, moto oyo adefaki akofuta nyama yango te. Soki bayokanaki ete akofuta mbongo sima na kosalela yango, asengeli kofuta mbongo oyo bayokanaki.
15 "If a man entices an unengaged virgin and sleeps with her, he must pay bride price and marry her. Soki mobali alingi elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe azali na mobandami na libala te, bongo asangisi na ye nzoto, asengeli kofuta mbongo ya libala mpo ete akoma mwasi na ye.
16 If her father flatly refuses to give her to him, he must weigh silver equal to virgins' bride-price. Soki tata ya elenge mwasi aboyi kopesa mwana na ye na libala epai ya mobali wana, mobali yango akofuta mbongo ya libala na motuya oyo babalelaka elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te.
17 "You shall not allow a sorceress to live. Okotika te na bomoi mwasi oyo asalaka maji.
18 "Whoever has sexual relations with an animal must surely be put to death. Moto nyonso oyo akosangisa nzoto na nyama, asengeli kozwa etumbu ya kufa.
19 "Whoever sacrifices to any god other than me alone must be completely destroyed. Moto nyonso oyo akotumba mbeka mpo na nzambe mosusu, basengeli koboma ye ; mbeka ekotumbama kaka mpo na Yawe Ye moko.
20 "Do not wrong or oppress a foreigner, for you were foreigners in the land of Egypt. Okosalisa mopaya mosala na ndenge ya mabe te mpe okonyokola ye te, pamba te bino mpe bozalaki bapaya na Ejipito.
21 "You shall not mistreat any widow or orphan. Bokonyokola te mwasi oyo akufisa mobali to mwana etike.
22 If you do mistreat them, and they cry out to me, I will surely hear their cry. Soki bonyokoli bango, bongo bango bagangi epai na Ngai, solo nakoyoka koganga na bango.
23 My anger will flare; I will kill you by the sword—your wives widows, your children fatherless. Nakosilikela bino, nakoboma bino na mopanga ; bongo basi na bino mpe bakokoma basi bakufisa mibali mpe bana na bino, bana bitike.
24 "If you lend money to my people, the poor among you, don't be a creditor to him or charge him interest. Soki odefisi mbongo na moko kati na bato na Ngai, na mobola oyo azali kati na bino, okosala te ndenge modefisi mbongo asalaka ; okosenga ye mileki te.
25 If you take your neighbor's cloak as a pledge, you must return it to him by sunset, Soki moninga na yo asimbisi yo kazaka na ye lokola ndanga, okozongisela ye yango liboso ete butu eya ;
26 it's his only covering, his cloak for his skin. What will he sleep in? When he cries out to me, I'll hear, for I'm compassionate. pamba te azali kaka na kazaka wana mpo na kofinika nzoto na ye. Akofinika lisusu nini tango akolala ? Soki agangi epai na Ngai, nakoyoka ye mpo ete nazali Nzambe ya mawa.
27 "You shall not speak evil of our Father, nor curse a ruler of your people. Okofingaka Nzambe te mpe okolakelaka mokambi ya bato na yo mabe te.
28 "Do not delay giving the fullness of your harvest and your juice. Give me the firstborn of your sons. Okowumisa te kopesa Ngai mbuma ya liboso oyo ekomela mpe vino oyo okamoli. Okopesa Ngai mwana na yo ya liboso ya mobali.
29 Do the same with your ox and sheep: keep it with its mother seven days, then give it to me on the eighth day. Okosala mpe lolenge moko mpo na bana liboso ya bangombe, bameme mpe bantaba na yo : ekotikala mikolo sambo elongo na bamama na yango ; bongo na mokolo ya mwambe, okopesa Ngai yango.
30 "Be holy people to me. Do not eat meat torn by beasts in the field—throw it to the dogs." Bokozala bule mpo na Ngai : bokolia te mosuni ya nyama oyo babomi na nyama ya zamba ; bosengeli kopesa yango na bambwa.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]