Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 21 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "Now these are the regulations you are to set before them: Yawe alobaki na Moyize : — Tala mibeko oyo okoyebisa bana ya Isalaele :
2 "When you buy a Hebrew servant, he serves six years; in the seventh he goes free, paying nothing. « Soki bosombi Mo-Ebre moko lokola mowumbu, akosalela bino mibu motoba ; na mobu ya sambo, akozwa bonsomi mpe akofuta eloko moko te.
3 "If he came in alone, he goes out alone; if married, his wife goes out with him. Soki azalaki monzemba tango ayaki, asengeli kokende ye moko ; kasi soki azalaki na mwasi tango ayaki, mwasi na ye asengeli kokende na ye elongo.
4 If his master gives him a wife and she bears him sons or daughters, the wife and children belong to her master, and he goes out alone. Soki nkolo na ye apesaki ye mwasi mpe mwasi yango abotelaki ye bana mibali to bana basi, mwasi mpe bana bakozala ya nkolo na ye ; mobali akokende ye moko.
5 But if the servant clearly says, 'I love my master, my wife, and my children; I will not go out free,' Kasi soki mowumbu alobi : ‹ Nalingaka nkolo na ngai, mwasi na ngai mpe bana na ngai, nalingi te kozwa bonsomi, ›
6 then his master brings him before our Father, then to the door or doorpost, and pierces his ear with an awl; he serves him for life. wana nkolo na ye asengeli komema ye liboso ya basambisi ; akomema ye na ezipelo ya ekuke to na mabaya oyo esimbaka ekuke mpe akotobola ye litoyi na motonga ; mpe mowumbu akosalela nkolo yango mpo na libela.
7 "When a man sells his daughter as a servant, she is not to go free as the male servants do. Soki moto ateki mwana na ye ya mwasi lokola mwasi mowumbu, mwana yango akozwa bonsomi te ndenge bawumbu bazwaka yango.
8 If she does not please her master who chose her for himself, he must let her be redeemed. He may not sell her to a foreign people, since he has broken faith with her. Soki mwana mwasi asepelisi te nkolo oyo aponaki ye mpo ete azala mowumbu na ye, nkolo yango akotika ete mwana mwasi asikolama ; azali na ndingisa te ya koteka ye epai ya bapaya. Kasi soki ateki ye, wana asambwisi ye.
9 If he designates her for his son, he is to treat her as a daughter. Soki aponaki mwana mwasi yango mpo ete azala mwasi ya mwana na ye ya mobali, asengeli kokokisa makambo oyo mibeko esengaka mpo na kobala mwasi.
10 If he takes another wife, he must not reduce her food, her clothing, or her marital rights. Soki abali mwasi mosusu, akolongola eloko te na oyo etali kolia, kolata mpe oyo basalelaka mwasi ya libala.
11 If he does not provide these three things, she goes free, without payment of money. Soki apimeli ye ata eloko moko kati na biloko oyo misato, wana mwasi oyo akoki kokende na bonsomi mpe akofuta eloko moko te.
12 "Whoever strikes a man so that he dies is to be put to death. Moto oyo akobeta moninga na ye kino koboma ye, basengeli koboma ye.
13 But if he did not lie in wait and I let it happen, I will appoint a place for you where he may flee. Nzokande, soki azalaki na likanisi ya koboma te, kasi Nzambe atiki ete yango esalema na nzela ya maboko na ye, moto wana akokima na esika oyo Ngai Yawe nakopona.
14 But if a man plots against his neighbor to kill him by treachery, take him from my altar to die. Kasi soki moto akaneli moninga na ye mpe aluki koboma ye na mayele mabe, okomema ye mosika ya etumbelo na Ngai mpo na koboma ye.
15 "Whoever strikes his father or his mother is to be put to death. Moto oyo akobeta tata to mama na ye, asengeli kozwa etumbu ya kufa.
16 "Whoever kidnaps a man and sells him, or is caught still holding him, must be put to death. Moto oyo akokanga moto mosusu na makasi mpo na kokima na ye, ezala soki ateki moto yango to bakangi ye na moto yango na maboko, asengeli kozwa etumbu ya kufa.
17 "Whoever curses his father or his mother is to be put to death. Moto oyo akolakela tata to mama na ye mabe, asengeli kozwa etumbu ya kufa.
18 "When men quarrel and one hits the other with a stone or fist, and the man does not die but is bedridden, Soki bato baswani, bongo moko abeti moninga likofi to libanga ; mpe moto oyo babeti likofi to libanga akufi te kasi abeli makasi ;
19 then if he gets up and walks outside with his staff, the one who struck him goes unpunished; he must only pay for lost time and for his full recovery. soki moto oyo babeti atelemi mpe atamboli na nzete kino na libanda, bakokatela moto oyo abetaki ye etumbu te, kasi akofuta kaka mikolo oyo moto yango azalaki kosala te mpe akosalisa ye kino akobika.
20 "When a man strikes his male or female servant with a rod and the servant dies, he must be avenged. Soki moto abeti mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye, bongo mowumbu yango akufi na mbala moko, moto wana asengeli kozwa etumbu.
21 But if he survives a day or two, no vengeance is taken, for the servant is his property. Kasi soki mowumbu yango awumeli lisusu na bomoi mokolo moko to mibale, wana nkolo na ye akozwa etumbu te, pamba te asombaki ye na mbongo.
22 "When men fight and strike a pregnant woman so that her child is born, but there is no further harm, the offender must be fined whatever the woman's husband demands, and pay as the judges decide. Soki mibali, wana bazali kobunda, batutani na mwasi ya zemi, bongo mwasi yango aboti mwana matsombe mpe likama mosusu emonani te, wana basengeli kofuta lomande ndenge mobali ya mwasi yango akokata kolanda mokano ya basambisi.
23 But if there is further harm, then you are to give life for life, Kasi soki likama ezali, okofuta bomoi mpo na bomoi :
24 eye for eye, tooth for tooth, hand for hand, foot for foot, liso mpo na liso, linu mpo na linu, loboko mpo na loboko, lokolo mpo na lokolo,
25 burn for burn, wound for wound, bruise for bruise. kozika mpo na kozika, pota mpo na pota, litutu mpo na litutu.
26 "If a man strikes the eye of his male or female servant and destroys it, he must free the servant to compensate for the eye. Soki moto abeti mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye na liso, mpe liso yango ekufi, moto yango akopesa bonsomi na mowumbu mpo na liso na ye.
27 If he knocks out his male or female servant's tooth, he must let them go free to compensate for the tooth. Soki abuki linu ya mowumbu na ye ya mobali to ya mwasi mowumbu na ye, akopesa ye bonsomi mpo na linu na ye.
28 "If an ox gores a man or woman to death, it must be stoned and its meat not eaten, but its owner is not liable. Soki ngombe ebomi moto na maseke, basengeli koboma ngombe yango na mabanga, mpe bakolia mosuni na yango te ; nzokande nkolo na yango akozwa etumbu te.
29 But if the ox was in the habit of goring and its owner was warned but did not pen it, and it kills a man or woman, the ox is stoned and its owner also is put to death. Soki ngombe ezali na momesano ya kobeta bato maseke, bongo bakebisi makasi nkolo na yango, kasi ye abateli kaka ngombe na ye malamu te mpe yango ebomi moto ; basengeli koboma ngombe yango na mabanga mpe nkolo na yango asengeli kozwa etumbu ya kufa.
30 If a ransom is required, he must pay whatever is demanded to spare his life. Kasi soki basengi ye lomande mpo na kosikola bomoi na ye, akofuta nyonso oyo bakosenga ye.
31 Whether it gores a son or daughter, this same rule applies. Bakosalela mpe mobeko oyo soki ngombe ebeti mwana mobali to mwana mwasi maseke.
32 If the ox gores a male or female servant, the owner pays their master about twelve ounces of silver, and the ox is stoned. Soki ngombe ebeti mowumbu ya mobali to mwasi mowumbu maseke, nkolo na yango asengeli kofuta mbongo ya bibende, tuku misato, epai ya nkolo ya mowumbu, mpe bakobamba ngombe yango mabanga.
33 "If a man opens or digs a pit and leaves it uncovered, and an ox or donkey falls in, Soki moto atiki libulu polele to atimoli libulu mpe azipi yango te, bongo ngombe to ane ezindi kuna ;
34 the pit's owner must make it good, paying its owner money, and the dead animal is his. nkolo libulu asengeli kofuta epai ya nkolo nyama mbongo oyo ekokani na motuya ya nyama oyo esili kokufa, mpe nyama yango ekokoma ya ye.
35 "When one man's ox injures another's so it dies, they sell the live ox, split the price, and split the dead animal too. Soki ngombe ya moto moko ebomi ngombe ya moto mosusu, esengeli koteka ngombe oyo ezali na bomoi mpe kokabola na kati-kati mbongo mpe ngombe oyo esili kokufa.
36 But if it was known the ox gored habitually and its owner did not keep it in, he must repay ox for ox, and the dead animal is his." Kasi soki eyebani ete ngombe yango emesana kobeta bato maseke, bongo nkolo na yango abateli yango malamu te ; wana asengeli kofuta ngombe mpo na ngombe, mpe ngombe ya kokufa ekokoma ya ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]