Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 11 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Our Father said to Moses, "One more plague I will bring on Pharaoh and on Egypt. After that he will send you out from here; when he does, he will drive you out completely. Yawe alobaki na Moyize : « Nakoyeisa lisusu etumbu moko na bomoi ya Faraon mpe ya Ejipito. Sima na yango, Faraon akotika bino ete bokende ; kutu, akobengana bino libela.
2 Tell the people: let each man ask his neighbor, each woman her neighbor, for silver and gold objects." Loba na bato ete basenga biloko ya palata mpe ya wolo : mobali nyonso asenga yango epai ya moninga na ye mobali mpe mwasi nyonso, epai ya moninga na ye mwasi. »
3 And our Father gave the people favor with the Egyptians. Moreover, Moses himself was very great in the land of Egypt, in the eyes of Pharaoh's servants and the people. Yawe asalaki ete bana ya Isalaele bazwa ngolu na miso ya bato ya Ejipito. Mpe Moyize ye moko azalaki moto monene kati na Ejipito, na miso ya basali ya Faraon mpe ya bato nyonso.
4 Moses said, "This is what our Father says: Around midnight I will go through Egypt, Moyize alobaki na Faraon : « Tala makambo oyo Yawe alobi : ‹ Na kati-kati ya butu, nakotambola kati na mokili mobimba ya Ejipito.
5 "and every firstborn in the land of Egypt will die, from Pharaoh's firstborn who sits on his throne to the slave girl's firstborn behind the millstones, and every firstborn animal. Mwana mobali nyonso ya liboso kati na Ejipito akokufa, kobanda na mwana mobali ya liboso ya Faraon oyo avandi na kiti ya bokonzi kino na mwana mobali ya liboso ya mwasi mowumbu oyo azali konika ble mpe bana mibali nyonso ya liboso ya bibwele.
6 A great cry will fill all the land of Egypt, unlike any before or since. Bongo koganga makasi ekozala na mokili mobimba ya Ejipito, koganga oyo ezala nanu te mpe ekotikala kozala te.
7 But not even a dog will growl at any of Israel's people, man or animal, so you'll know our Father distinguishes Egypt from Israel. Kasi kati na bana nyonso ya Isalaele, ezala mbwa ekoganga te liboso ya moto to ya nyama. › Na bongo, bokoyeba ete Yawe asali bokeseni kati na bato ya Ejipito mpe ya Isalaele.
8 All these servants of yours will come down to me, bow before me, and say, 'Go, you and all the people who follow you.' After that I will go out." Then Moses left Pharaoh in burning anger. Boye, bakalaka na yo nyonso oyo bazali zingazinga na yo bakoya epai na ngai, bakofukama liboso na ngai mpe bakoloba : ‹ Kende, yo mpe bato nyonso oyo bazali kotambola sima na yo. › Mpe sima na yango, nakobima. » Bongo Moyize abimaki na ndako ya Faraon na kanda makasi.
9 Our Father said to Moses, "Pharaoh will not listen to you, so my wonders multiply in the land of Egypt." Yawe alobaki na Moyize : « Faraon akoboya koyokela bino mpo ete bikamwa na Ngai ekoka komonana ebele kati na Ejipito. »
10 Moses and Aaron performed all these wonders before Pharaoh, but our Father hardened Pharaoh's heart, and he refused to send the Israelites from his land. Boye Moyize mpe Aron basalaki bikamwa wana nyonso liboso ya Faraon. Kasi Yawe akomisaki motema ya Faraon makasi mpe Faraon aboyaki kaka kotika bana ya Isalaele kobima na mokili na ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]