Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 10 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then our Father told Moses, "Go to Pharaoh, for I hardened his heart and his servants' hearts, to put my signs among them. Yawe alobaki na Moyize : « Kende epai ya Faraon, pamba te nakomisi motema na ye mpe ya bakalaka na ye makasi, mpo ete nasala bilembo na Ngai ya kokamwa kati na bango,
2 Tell your son and grandson how I mocked the Egyptians and set my signs among them, so you know I am your Father." mpe ete oyebisa bana na yo mpe bakoko na yo makambo oyo nasalaki na Ejipito mpe bilembo ya kokamwa oyo nasalaki kati na bango. Bongo bokoyeba ete Ngai nazali Yawe. »
3 Moses and Aaron went to Pharaoh and said, "This is what the Father of the Hebrews says: 'How long will you refuse to humble yourself before me? Let my people go to serve me.' Boye Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki na ye : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‹ Kino tango nini okoboya komikitisa liboso na Ngai ? Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.
4 For if you refuse to let my people go, tomorrow I'll bring locusts into your territory. Soki oboyi kotika bango kokende, lobi nakotinda mabanki na mokili na yo.
5 They will cover the land's surface, hiding the ground, eat what hail left you, and eat every tree growing for you in the field. Ekotondisa mokili ya Ejipito na ndenge ete mabele ekomonana lisusu te. Mabanki yango ekolia mwa biloko moke oyo mvula ya mabanga etikaki ; ekolia mpe banzete na bino nyonso oyo ezali kokola kati na bilanga.
6 They'll fill your houses, your servants', all Egyptians'—as your fathers and grandfathers never saw, from their days on earth until now." Then he turned and left Pharaoh. Ekotonda na bandako na yo, ya bakalaka na yo mpe ya bato nyonso ya Ejipito ; ezala batata na yo to bakoko na yo batikala nanu komona te likambo ya boye wuta bazala na mokili oyo kino lelo. › » Moyize abalukaki mpe atikaki ndako ya Faraon.
7 Pharaoh's officials said, "How long will this man trap us? Let the people go, so they can serve their God. Don't you know yet Egypt is ruined?" Bakalaka ya Faraon balobaki na ye : — Kino tango nini moto oyo akozala motambo mpo na biso ? Tika bango bakende kogumbamela Yawe, Nzambe na bango. Ozali komona te ete Ejipito ebebi ?
8 Moses and Aaron were brought back to Pharaoh. "Go, serve God," he said. "But who's going?" Bongo bazongisaki Moyize mpe Aron epai ya Faraon ; mpe Faraon alobaki na bango : — Bokende kogumbamela Yawe, Nzambe na bino. Kasi banani oyo bakokende ?
9 Moses said, "With our young and old we'll go; sons, daughters, flocks, herds—we'll go, for we have a feast to our Father." Moyize azongisaki : — Tokokende elongo na bilenge na biso, bampaka na biso, bana na biso ya mibali mpe ya basi, bameme na biso, bantaba na biso mpe bangombe na biso ; pamba te tokosala feti mpo na lokumu ya Yawe.
10 He said to them, "God be with you—as if I'd let you and your little ones go! See, you have evil in mind. Faraon alobaki na bango : — Soki nakotika bino kokende elongo na bana na bino, wana tika ete Yawe azala elongo na bino ! Nzokande emonani solo ete bozali na makanisi mabe.
11 No! You men go serve God, since that's what you want." So Pharaoh drove them from his presence. Ekosalema bongo te ! Kaka mibali nde bakokende kogumbamela Yawe, pamba te yango nde likambo oyo bozali kosenga ngai. Boye babenganaki Moyize mpe Aron liboso ya Faraon.
12 Then our Father said to Moses, "Stretch your hand over Egypt for locusts to come up over Egypt and eat every plant of the land the hail left." Yawe alobaki na Moyize : — Sembola loboko na yo na mokili ya Ejipito mpo ete obimisa mabanki kati na mokili yango mpe mabanki yango elia matiti nyonso ya bilanga, biloko nyonso oyo mvula ya mabanga ebebisaki te.
13 Moses stretched his staff over Egypt, and our Father drove an east wind across the land all day and all night; by morning it carried in the locusts. Boye Moyize asembolaki lingenda na ye na mokili ya Ejipito mpe Yawe atindaki mopepe ya este mokolo mobimba mpe butu mobimba. Mpe tango tongo etanaki, mopepe yango eyaki na mabanki.
14 Locusts came up over all Egypt, settling across its whole territory—so severe, none like them before, nor ever will be again. Mabanki ekotaki kati na Ejipito nyonso mpe evandaki ebele na bisika nyonso ya Ejipito. Etumbu ya mabanki ya ndenge wana etikala nanu kozala te mpe ekotikala kozala lisusu te.
15 They covered the whole land's surface, darkening it, and ate every land plant, all tree fruit the hail spared—no green left on tree or field plant in all the land of Egypt. Ezipaki mabele nyonso mpe mabele eyindaki. Eliaki nyonso oyo mvula ya mabanga ebebisaki te : matiti nyonso ya bilanga mpe bambuma nyonso ya banzete. Kati na mokili mobimba ya Ejipito, eloko moko te ya mobesu etikalaki na banzete to na matiti ya bilanga.
16 So Pharaoh quickly called Moses and Aaron, saying, "I have sinned against your God and against you. Faraon abengisaki Moyize mpe Aron na lombangu, alobaki : — Nasali lisumu epai na Yawe, Nzambe na bino, mpe epai na bino.
17 Please forgive my sin only this once, and beg your God to remove only this death from me." Sik’oyo lisusu, bolimbisa lisumu na ngai. Bobondela Yawe, Nzambe na bino, mpo ete alongola etumbu oyo ya kufa kati na ngai.
18 So Moses went out from Pharaoh and pleaded with our Father. Moyize atikaki Faraon mpe abondelaki Yawe.
19 Then our Father turned the wind into a very strong west wind that lifted the locusts and drove them into the Red Sea; not one locust remained in all Egypt's territory. Bongo Yawe akomisaki mopepe ya este ekumbaki moko ya weste oyo ememaki mabanki mpe ebwakaki yango na ebale monene ya Barozo. Ata libanki moko te etikalaki na bisika nyonso ya Ejipito.
20 But our Father hardened Pharaoh's heart, and he would not let the people of Israel go. Kasi Yawe akomisaki lisusu motema ya Faraon makasi mpe Faraon aboyaki kotika bana ya Isalaele kokende.
21 Then our Father told Moses, "Stretch out your hand toward the sky, so darkness covers the land of Egypt—darkness thick enough to feel." Yawe alobaki na Moyize : — Sembola loboko na yo likolo mpo ete molili epanzana na mokili ya Ejipito, molili oyo ekosala ete bato batambola na kosimbasimba.
22 Moses stretched his hand toward the sky; thick darkness covered all the land of Egypt three days. Boye Moyize asembolaki loboko na ye likolo mpe molili makasi ezipaki mokili mobimba ya Ejipito mikolo misato.
23 No one could see another, and no one left his place three days, but all Israelites had light in their homes. Na mikolo misato yango, moto moko te akokaki komona moto mosusu mpe kolongwa na esika oyo azali mpo na kokende na esika mosusu. Nzokande pole ezalaki na bisika nyonso oyo bana ya Isalaele bazalaki kovanda.
24 Pharaoh called Moses and said, "Go, serve your God. Even your children may go—only leave your flocks and herds behind." Faraon abengisaki Moyize mpe alobaki : — Bokende kogumbamela Yawe ; bokende bino nyonso nzela moko, ezala basi mpe bana na bino. Kasi botika kaka bangombe, bameme mpe bantaba na bino.
25 Moses said, "You must also give us sacrifices and burnt offerings to offer to our Father. Kasi Moyize alobaki : — Okopesa biso mbeka mpe makabo ya kotumba oyo tokobonzela Yawe, Nzambe na biso.
26 Our livestock must go with us too—not a hoof stays behind. We'll take some to serve our Father; we won't know what we need to serve him until we arrive there." Bitonga na biso ya bibwele mpe ekokende nzela moko na biso ; ata linzaka moko te ya ebwele ekotikala. Pamba te ezali kati na bibwele yango nde tokopona oyo tokobonzela Yawe, Nzambe na biso ; mpe wana tokomi nanu kuna te, toyebi te ebwele nini tokobonza mpo na kogumbamela Yawe.
27 But our Father hardened Pharaoh's heart, and he was not willing to let them go. Kasi Yawe akomisaki lisusu motema ya Faraon makasi ; mpe Faraon aboyaki kaka kotika bango kokende.
28 Pharaoh said to him, "Leave me! Careful—don't see my face again, for the day you see my face, you die." Faraon alobaki na Moyize : — Longwa liboso na ngai mpe keba na yo ! Koya lisusu liboso na ngai te ! Mokolo oyo okoya lisusu liboso na ngai, okokufa.
29 Moses said, "You have spoken rightly. I will never see your face again." Moyize azongisaki : — Ndenge kaka olobi, nakotikala koya lisusu liboso na yo te !
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]