Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 9 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then our Father told Moses, "Go tell Pharaoh, 'This is what the Father of the Hebrews says: "Let my people go to worship me. Yawe alobaki na Moyize : « Kende koyebisa Faraon : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‘ Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai ! ’
2 For if you refuse to let them go and keep holding them, Soki oboyi kotika bango kokende mpe okobi kokanga bango,
3 the hand of our Father will be on your livestock in the field: horses, donkeys, camels, herds, and flocks—a very severe plague. loboko na Yawe ekomema mopepe ya bokono ya somo kati na bibwele na yo, oyo ezali na elanga : bampunda, ba-ane, bashamo, bangombe, bameme mpe bantaba.
4 But our Father will distinguish Israel's livestock from Egypt's, so none of Israel's will die."'" Kasi Yawe akotia bokeseni kati na bibwele ya bana ya Isalaele mpe ya bato ya Ejipito, pamba te nyama moko te ya bana ya Isalaele ekokufa. › »
5 And our Father set a time, saying, "Tomorrow I will do this in the land." Yawe abongisaki tango mpe alobaki : « Lobi, Yawe akokokisa likambo oyo na mokili. »
6 The next day our Father did this: all Egypt's livestock died, but Israel's livestock—not one died. Mpe mokolo oyo elandaki, Yawe akokisaki yango : bibwele nyonso ya bato ya Ejipito ekufaki, kasi ebwele ata moko te ya bana ya Isalaele ekufaki.
7 Pharaoh sent to check: not one of Israel's animals had died. Yet Pharaoh's heart stayed hard, and he refused to let the people go. Faraon atindaki bato mpo na kolandela likambo oyo mpe bamonaki ete ata ebwele moko te kati na bibwele ya bana ya Isalaele ekufaki. Atako bongo, Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi mpe aboyaki kaka kotika bato kokende.
8 Then our Father told Moses and Aaron, "Take handfuls of soot from a kiln, and let Moses scatter it skyward before Pharaoh. Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : « Botondisa maboko na bino na putulu oyo ewuti na fulu ya moto makasi, mpe tika ete Moyize abwaka yango likolo, na miso ya Faraon.
9 It will become fine dust over all Egypt, breaking into festering boils on people and animals throughout Egypt." Yango ekopanzana na mokili mobimba ya Ejipito mpe ekobimisa, kati na Ejipito mobimba, na banzoto ya bato mpe ya bibwele, babibon oyo ekokoma bapota ya kopola. »
10 They took kiln soot and stood before Pharaoh. Moses threw it skyward, and boils broke out, festering on people and animals. Bazwaki putulu na fulu ya moto mpe batelemaki liboso ya Faraon. Moyize abwakaki yango likolo mpe ebimisaki babibon oyo ekomaki bapota ya kopola na banzoto ya bato mpe ya bibwele.
11 The magicians could not stand before Moses, for boils were on them and all Egyptians. Bato ya soloka bakokaki te kotelema liboso ya Moyize likolo ya bapota oyo ezalaki na banzoto na bango mpe ya bato nyonso ya Ejipito.
12 But our Father hardened Pharaoh's heart; he wouldn't listen to them, as our Father had told Moses. Kasi Yawe akomisaki lisusu motema ya Faraon makasi mpe Faraon ayokelaki te Moyize mpe Aron, ndenge kaka Yawe alobaki yango na Moyize.
13 Then our Father told Moses, "Get up early in the morning, stand before Pharaoh, and say to him: 'This is what the Father of the Hebrews says: "Let my people go to worship me. Yawe alobaki na Moyize : « Lamuka na tongo-tongo, kende kokutana na Faraon mpe loba na ye : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.
14 This time I am sending all my plagues against you, your officials, and your people, so you know there is no one like me in all the earth. Ya mbala oyo, nakotinda mopepe na Ngai nyonso ya bokono epai na yo, epai ya bakalaka na yo mpe epai ya bato na yo, mpo oyeba ete moko te azali lokola Ngai, na mokili mobimba.
15 By now I could have raised my hand and struck you and your people with a plague, erasing you from the earth. Pamba te kino sik’oyo, nakokaki kosembola loboko na Ngai mpe kotindela yo elongo na bato na yo nyonso, mopepe ya bokono oyo ekokaki kolimwisa bino na mokili.
16 But I raised you up to show you my power and proclaim my name throughout all the earth. Kasi natikaki yo na bomoi mpo na tina oyo : kotalisa yo nguya na Ngai mpe kosala ete lokumu ya Kombo na Ngai epanzana na mokili mobimba.
17 You are still setting yourself against my people and refusing to let them go. Lokola ozali kokoba koboya kotika bato na Ngai kokende,
18 Tomorrow at this time I will rain down hail so severe none like it has hit Egypt from its founding until now. lobi na ngonga oyo, nakobetisa mvula ya mabanga ya moto makasi, oyo etikala nanu kobeta te wuta mokili ya Ejipito ezala.
19 Now send: get your livestock and all you have in the field to safety, for the hail will fall on every person and animal left in the field, not brought inside, and they will die."'" Sik’oyo, pesa mitindo ete bamema na ebombelo, bibwele na yo mpe biloko nyonso oyo ozali na yango kati na elanga. Pamba te mvula ya mabanga ekokweyela mpe ekoboma moto mpe nyama nyonso oyo bokokotisa kuna te to oyo ekotikala kati na elanga. › »
20 Those among Pharaoh's officials who feared the word of our Father hurried their servants and livestock indoors, Kati na basali ya Faraon, ba-oyo babangaki Liloba na Yawe bakotisaki na lombangu bawumbu mpe bibwele na bango kati na bandako.
21 but whoever ignored the word of our Father left his servants and livestock in the field. Kasi ba-oyo babangaki te Liloba na Yawe, batikaki bawumbu mpe bibwele na bango kati na elanga.
22 Then our Father said to Moses, "Stretch your hand toward the sky, and hail will fall on all Egypt—on people, animals, and every plant in the field, throughout Egypt." Yawe alobaki na Moyize : « Sembola loboko na yo na likolo mpo ete mvula ya mabanga enoka na mokili mobimba ya Ejipito : likolo ya bato, ya bibwele mpe ya matiti nyonso oyo ebotaka na elanga kati na Ejipito. »
23 Moses stretched his staff toward the sky, and our Father sent thunder and hail, and fire ran to the ground. Our Father rained hail on the land of Egypt. Tango Moyize asembolaki lingenda na ye na likolo, Yawe abetisaki bakake mpe mvula ya mabanga. Bakake ebetaki na mokili. Bongo Yawe anokisaki mvula ya mabanga na mokili ya Ejipito.
24 There was hail, and fire flashing continually within the hail, so heavy that nothing like it had occurred in all the land of Egypt since it became a nation. Boye mvula ya mabanga mpe bakake ebetaki. Ezalaki mvula moko ya makasi penza oyo etikala nanu kobeta te wuta Ejipito ekoma ekolo.
25 Throughout Egypt hail struck everything in the field, both people and animals; it struck every plant of the field and shattered every tree of the field. Ebomaki, kati na Ejipito, nyonso oyo ezalaki kati na elanga, ezala bato to bibwele ; ebebisaki matiti nyonso ya elanga mpe ebukaki banzete nyonso.
26 Only in the land of Goshen, where the people of Israel lived, was there no hail. Kasi enokaki te kati na etuka ya Gosheni epai wapi bana ya Isalaele bazalaki.
27 Pharaoh sent for Moses and Aaron and said, "This time I've sinned. God is right; I and my people are wrong. Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango : — Ya mbala oyo, nasali lisumu. Yawe azali sembo ; ngai mpe bato na ngai tosali mabe.
28 Plead with your Father—there's been enough of God's thunder and hail. I will let you go; stay no longer." Bobondela Yawe mpo ete asilisa mvula ya mabanga mpe bakake. Bongo ngai nakotika bino kokende, mpe bino bokowumela lisusu awa te.
29 Moses told him, "Once I leave the city, I'll spread my hands to our Father. The thunder will stop and hail will end, so you'll know the earth is our Father's. Moyize azongisaki : — Tango nakobima na engumba, nakotombola maboko na ngai mpo na kobondela Yawe. Bakake ekosila mpe mvula ya mabanga ekonoka lisusu te, mpo ete oyeba ete mokili ezali ya Yawe.
30 But as for you and your officials, I know that you still do not fear our Father." Kasi nayebi ete, yo elongo na bakalaka na yo, bokobanga na bino kaka Yawe Nzambe te.
31 (Flax and barley were ruined, because barley had headed and flax was blooming. Lino mpe Orje ebebaki, pamba te lino ebimisaki mito mpe Orje ebimisaki bafololo.
32 But the wheat and the emmer wheat were not ruined, because they ripen later.). Ble mpe epotele ebebaki te, pamba te tango na yango ya kobota ekokaki nanu te.
33 Moses left Pharaoh, went out of the city, and spread his hands to our Father. The thunder and hail stopped, and rain no longer poured on the land. Bongo Moyize atikaki Faraon mpe abimaki libanda ya engumba. Atombolaki maboko na ye epai na Yawe ; boye bakake mpe mvula ya mabanga etikaki kobeta, mpe mvula esilaki kati na Ejipito.
34 When Pharaoh saw the rain, hail, and thunder had stopped, he sinned again, hardening his heart—he and his officials. Tango Faraon amonaki ete mvula ya mabanga mpe bakake etiki kobeta, asalaki lisusu lisumu. Ye mpe bakalaka na ye bayeisaki lisusu mitema na bango makasi.
35 So Pharaoh's heart hardened; he refused to let Israel go, as our Father had said through Moses. Boye motema ya Faraon ekomaki penza makasi mpe aboyaki kotika bana ya Isalaele kokende, ndenge kaka Yawe alobaki na nzela ya Moyize.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]