Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 8 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
7:26 Then our Father told Moses, "Go to Pharaoh and tell him, 'This is what our Father says: Let my people go, so they may serve me.'" Sima na yango, Yawe atindaki Moyize : « Kende kokutana na Faraon mpe loba na ye : ‹ Tala makambo oyo Yawe alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.
7:27 But if you refuse to let them go, I will plague your whole country with frogs. Soki oboyi kotika bango kokende, nakotinda etumbu ya magorodo na mokili na yo mobimba.
7:28 The Nile will swarm with frogs that come up and enter your house, bedroom, and bed, the houses of your servants and people, your ovens and kneading bowls. Nili ekotonda na magorodo ; bongo magorodo yango ekobima wuta na Nili, ekokota kino na ndako na yo ya bokonzi, na shambre na yo ya kolala, na mbeto na yo, na bandako ya basali na yo, na bandako ya bato na yo, na bafulu na yo ya mapa mpe kino na bisika oyo babalolaka farine.
7:29 The frogs will come up on you, on your people, and on all your servants."'" Magorodo ekomatela yo, basali na yo mpe bato na yo nyonso. › »
1 And our Father said to Moses, "Tell Aaron: 'Stretch out your hand with your staff over the rivers, canals, and pools, and bring up the frogs over the land of Egypt.'" Yawe alobaki na Moyize : « Loba na Aron ete asembola loboko na ye mpe lingenda na ye na ngambo ya mayi, ya miluka mpe ya maziba, mpo ete abimisa magorodo na mokili ya Ejipito. »
2 Aaron stretched his hand over the waters of Egypt, and frogs came up and covered the land of Egypt. Boye Aron asembolaki loboko na ye na ngambo ya mayi ya Ejipito ; bongo magorodo ebimaki mpe etondisaki mokili ya Ejipito.
3 But the magicians did the same with their secret arts, bringing frogs up over the land of Egypt. Kasi bato ya maji ya Ejipito mpe basalaki bikamwa ya ndenge moko na nzela ya misala na bango ya soloka : bango mpe babimisaki magorodo na mokili ya Ejipito.
4 Pharaoh summoned Moses and Aaron and said, "Plead with God to remove the frogs from me and my people, and I will let the people go to sacrifice to God." Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango : — Bobondela Yawe ete alongola magorodo pene na ngai mpe pene ya bato na ngai ; bongo nakotika bato na bino kokende kobonzela Yawe mbeka.
5 Moses said to Pharaoh, "The honor is yours—set the time yourself: when should I pray for you, your servants, and your people, that the frogs be cut off from you and your houses, left only in the Nile?" Moyize alobaki na Faraon : — Tika ete mokonzi apona tango nini nasengeli kobondela Yawe mpo na yo, basali na yo mpe bato na yo, mpo ete Yawe alongola magorodo pene na yo mpe pene ya bandako na yo ; kasi etikala kaka na ebale Nili.
6 "Tomorrow," he said. Moses replied, "As you say, so you'll know no one is like our Father. Faraon azongisaki : — Tika ete esalema lobi. Moyize alobaki : — Iyo, ekosalema ndenge osengi, mpo oyeba ete moko te azali lokola Yawe, Nzambe na biso.
7 The frogs will leave you, your houses, your servants, and your people, remaining only in the Nile." Magorodo ekolongwa pene na yo, pene na bandako na yo, ya basali na yo mpe ya bato na yo ; kasi ekotikala kaka na ebale Nili.
8 Moses and Aaron left Pharaoh, and Moses cried out to our Father about the frogs our Father had brought on Pharaoh. Sima, Moyize mpe Aron batikaki Faraon. Bongo Moyize agangaki epai na Yawe na tina na magorodo oyo atindelaki Faraon.
9 And our Father did as Moses asked. The frogs died in the houses, the courtyards, and the fields. Yawe asalaki makambo oyo Moyize asengaki : magorodo ekufaki na bandako, na mapango mpe na bilanga.
10 They piled them in heaps upon heaps, and the land stank. Basangisaki yango na maboke mpe mabele elumbaki solo ya kopola.
11 But when Pharaoh saw there was relief, he hardened his heart and would not listen to them, as our Father had said. Kasi tango Faraon amonaki ete kimia ekoti, ayeisaki lisusu motema na ye makasi lokola libanga mpe ayokelaki te Moyize mpe Aron ndenge kaka Yawe alobaki.
12 Then our Father told Moses, "Tell Aaron: Stretch out your staff and strike the dust of the ground, and it will become gnats throughout all the land of Egypt." Yawe alobaki na Moyize : — Loba na Aron ete asembola lingenda na ye mpe abeta yango na putulu ya mabele ; mpe yango ekokoma bangungi kati na mokili mobimba ya Ejipito.
13 They did so. Aaron stretched out his hand with his staff and struck the ground's dust, and gnats came on people and animals. All the ground's dust became gnats throughout the whole land of Egypt. Basalaki kaka ndenge wana. Tango Aron asembolaki loboko mpe lingenda na ye, abetaki yango na putulu ya mabele ; bongo putulu yango ekomaki bangungi oyo ematelaki bato mpe banyama. Putulu nyonso ya mokili ya Ejipito ebongwanaki bangungi.
14 The magicians tried their secret arts to make gnats, but failed. Gnats covered people and animals. Kasi tango bato ya maji bamekaki kobimisa bangungi na nzela ya misala na bango ya soloka, balongaki te. Bongo bangungi ematelaki bato mpe banyama.
15 The magicians told Pharaoh, "This is the finger of God." But Pharaoh's heart stayed hard; he wouldn't listen to them, as our Father had said. Boye bato ya maji balobaki na Faraon : « Oyo ezali penza mosapi ya Nzambe ! » Kasi Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi lokola libanga mpe aboyaki koyoka, ndenge kaka Yawe alobaki.
16 Then our Father said to Moses, "Get up early in the morning and stand before Pharaoh as he goes out to the water. Tell him, 'This is what our Father says: Let my people go, so they may serve me. Yawe alobaki na Moyize : — Lamuka na tongo-tongo mpe kende kokutana na Faraon na tango oyo abimaka mpo na kokende na mayi. Loba na ye : « Tala makambo oyo Yawe alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.
17 "If you won't let my people go, I'll send flies swarming on you, your servants, your people, and your houses. Egyptian houses will be full of flies, and even the ground they stand on. Soki oboyi kotika bato na Ngai kokende, nakotinda banzinzi epai na yo, epai ya bakalaka na yo, epai ya bato na yo mpe kino na bandako na yo. Boye bandako ya bato na Ejipito, ezala mabele epai wapi bazali, ekotonda na banzinzi oyo eswaka.
18 On that day I will set apart the land of Goshen, where my people live, so no flies swarm there, so you will know I, your Father, am in the land's midst. Na mokolo wana, nakosala bokeseni mpo na etuka ya Gosheni epai wapi bato na Ngai bazali kovanda ; banzinzi oyo eswaka ekozala kuna te, mpo oyeba ete, Ngai Yawe, nazali kati na etuka yango.
19 I will make a distinction between my people and your people. Tomorrow this sign will happen.'" Bongo nakotia bokeseni kati na bato na Ngai mpe bato na yo. Elembo yango ekosalema lobi. »
20 So our Father did. Thick swarms of flies filled Pharaoh's house and his servants' houses; throughout all the land of Egypt, the land was ruined by the swarms. Yawe asalaki bongo : banzinzi ebele oyo eswaka ekotaki mpe epanzanaki kati na ndako ya Faraon, na bandako ya bakalaka na ye mpe kati na mokili mobimba ya Ejipito. Boye mokili ebebisamaki na banzinzi oyo eswaka.
21 Pharaoh summoned Moses and Aaron and said, "Go, sacrifice to your God in the land." Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango : — Bokende, bobonzela Nzambe na bino mbeka kati na mokili oyo.
22 But Moses said, "That wouldn't be right—what we sacrifice to our Father is detestable to the Egyptians. If we sacrifice what is detestable to them before their eyes, will they not stone us? Kasi Moyize azongisaki : — Ekoki kosalema bongo te ; noki te mbeka oyo tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, ekomonana lokola eloko ya nkele na miso ya bato ya Ejipito. Boni, soki tobonzi mbeka oyo emonani lokola eloko ya nkele na miso na bango, bakobamba biso mabanga te ?
23 We must go a three days' journey into the wilderness and sacrifice to our Father, as he commands us." Tosengeli kotambola mikolo misato kati na esobe, sima tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, mbeka ndenge atindaki biso.
24 Pharaoh said, "I will let you go and sacrifice to the LORD your God in the wilderness—only don't go too far away. Plead for me." Faraon alobaki : — Nakotika bino kokende kobonzela Yawe, Nzambe na bino, mbeka kati na esobe ; kasi bokende mosika te. Sik’oyo, bobondela mpo na ngai !
25 Then Moses said, "As soon as I leave you, I will plead with our Father, and tomorrow the swarms of flies will leave Pharaoh, his servants, and his people. Only let Pharaoh not deceive again by refusing to let the people go and sacrifice to our Father." Moyize azongisaki : — Ndenge nazali kobima boye na ndako na yo, nakobondela Yawe ; bongo lobi, banzinzi oyo eswaka ekolongwa epai ya Faraon, epai ya bakalaka na ye mpe epai ya bato na ye. Kasi tika ete Faraon akoba te kotiola Yawe na koboya kotika bato kokende kobonzela Yawe mbeka.
26 So Moses went out from Pharaoh and pleaded with our Father. Tango Moyize abimaki na ndako ya Faraon, abondelaki Yawe
27 As Moses asked, our Father removed the swarms of flies from Pharaoh, his servants, and his people—not one remained. mpe Yawe akokisaki makambo oyo Moyize asengaki : banzinzi oyo eswaka etikaki Faraon, bakalaka na ye mpe bato na ye. Ata nzinzi moko te etikalaki.
28 But Pharaoh hardened his heart this time also, and he would not let the people go. Kasi na mbala oyo, Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi lokola libanga mpe aboyaki kaka kotika bato kokende.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]