Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 7 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Our Father told Moses, "See, I have made you as God to Pharaoh, and Aaron your brother will be your prophet. Yawe alobaki na Moyize : « Tala, nakomisi yo nzambe liboso ya Faraon, mpe Aron, ndeko na yo ya mobali, akozala mosakoli na yo.
2 You will speak all I command you; Aaron your brother will tell Pharaoh to send the Israelites out of his land. Okoloba makambo nyonso oyo natindi yo ; mpe Aron, ndeko na yo ya mobali, akoyebisa yango epai ya Faraon mpo ete Faraon abimisa bana ya Isalaele na mokili na ye.
3 But I will harden Pharaoh's heart and multiply my signs and wonders in the land of Egypt. Kasi Ngai, nakokomisa motema ya Faraon makasi lokola libanga, nakosala bilembo mpe bikamwa ebele na Ejipito.
4 Pharaoh won't listen to you, so I'll set my hand against Egypt and bring my armies—my people, Israel's descendants—out of the land of Egypt through great judgments. Atako bongo, Faraon akoyokela bino te. Boye, nakosembola loboko na Ngai kati na Ejipito ; mpe na nzela ya bitumbu minene, nakobimisa wuta na Ejipito mampinga na Ngai, bato na Ngai, bana ya Isalaele.
5 The Egyptians will know I am the Father when I reach out my hand against Egypt and bring Israel's people out from among them." Bato ya Ejipito bakoyeba ete nazali Yawe tango nakosembola loboko na Ngai kati na mokili na bango mpe nakobimisa bana ya Isalaele wuta na Ejipito. »
6 Moses and Aaron did so; they did just as our Father had commanded them. Moyize mpe Aron basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki bango.
7 Now Moses was eighty years old and Aaron eighty-three years old when they spoke to Pharaoh. Tango basololaki na Faraon, Moyize azalaki na mibu ya mbotama tuku mwambe ; mpe Aron, tuku mwambe na misato.
8 Then our Father said to Moses and Aaron, Yawe alobaki na Moyize mpe Aron :
9 when Pharaoh tells you, "Prove yourselves with a wonder," say to Aaron, "Take your staff, throw it down before Pharaoh, and it will become a serpent." « Tango Faraon akoloba na bino : ‹ Bosala bikamwa, › yo Moyize, okoloba na Aron : ‹ Kamata lingenda na yo, bwaka yango liboso ya Faraon, › mpe lingenda ekobongwana nyoka. »
10 Moses and Aaron went to Pharaoh and did as our Father commanded. Aaron threw his staff before Pharaoh and his servants, and it became a snake. Boye Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki bango. Aron abwakaki lingenda na ye liboso ya Faraon mpe bakalaka na ye, mpe yango ebongwanaki nyoka.
11 So Pharaoh also summoned wise men and sorcerers, and Egypt's magicians did the same with their secret arts. Faraon abengisaki bato ya bwanya mpe bato ya soloka. Bongo bato ya maji ya Ejipito, bango mpe basalaki bikamwa ya ndenge moko na nzela ya misala na bango ya soloka.
12 Each one threw down his staff, and they became serpents. But Aaron's staff swallowed up their staffs. Moko na moko kati na bango abwakaki lingenda na ye na mabele mpe ebongwanaki nyoka. Kasi lingenda ya Aron emelaki mangenda na bango.
13 Pharaoh's heart hardened; he wouldn't listen to them, as our Father had said. Atako bongo, motema ya Faraon ekomaki lisusu makasi ; mpe aboyaki koyokela bango, ndenge kaka Yawe alobaki.
14 Then our Father said to Moses, "Pharaoh's heart is unyielding; he refuses to let the people go. Yawe alobaki na Moyize : « Motema ya Faraon ezali kaka makasi, aboyi kaka kotika bato na Ngai kokende.
15 Go to Pharaoh in the morning as he goes out to the water. Stand on Nile's bank to meet him, and take in your hand the staff that turned into a snake. Kende epai ya Faraon na tongo-tongo, na tango oyo abimaka mpo na kokende na mayi. Zela ye pembeni ya Nili mpo na kokutana na ye mpe simba na loboko na yo lingenda oyo ebongwanaki nyoka.
16 Say to him: our Father of the Hebrews sent me to you, saying, "Let my people go to serve me in the wilderness." Yet until now you have not listened. Bongo okoloba na ye : ‹ Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, atindi ngai epai na yo mpo na koyebisa yo : ‘ Tala makambo oyo Yawe alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai na esobe. Kasi kino lelo, ozali kaka koyoka te.
17 This is what our Father says: "By this you will know I am the Father: look, with the staff in my hand I will strike the Nile's water, and it will turn to blood. Tala makambo oyo Yawe alobi : Tala ndenge nini okoyeba ete Ngai nazali Yawe : Nakobeta na mayi ya Nili lingenda oyo nazali na yango na maboko, mpe mayi yango ekobongwana makila.
18 Fish in the Nile will die, the Nile will stink, and Egyptians won't be able to bear to drink water from the Nile."'" Mbisi ya Nili ekokufa mpe mayi ya Nili ekokoma solo ya kopola, bongo bato ya Ejipito bakokoka lisusu komela yango te. ’ › »
19 Our Father said to Moses, "Tell Aaron: Take your staff and stretch out your hand over Egypt's waters—over their rivers, canals, ponds, and all their reservoirs—and they will become blood. Blood will fill all Egypt, even in vessels of wood and stone." Yawe alobaki na Moyize : « Yebisa Aron : ‹ Kamata lingenda na yo mpe sembola yango na ngambo ya mayi nyonso ya Ejipito : etima mpe miluka, maziba mpe mabulu nyonso ya mayi ekobongwana makila. › Makila ekozala na bisika nyonso ya Ejipito kino na bimelelo ya mayi oyo esalema na nzete to na mabanga. »
20 Moses and Aaron did as our Father commanded: before Pharaoh and his servants, Aaron raised the staff and struck the Nile's water, and all its water turned to blood. Moyize mpe Aron basalaki ndenge kaka Yawe atindaki bango. Aron atombolaki nzete na ye mpe abetaki lingenda oyo azalaki na yango, na mayi ya Nili na miso ya Faraon mpe ya basali na ye ; mpe mayi nyonso ebongwanaki makila.
21 The fish in the Nile died, the Nile stank, and the Egyptians could not drink water from the Nile. Blood was in all the land of Egypt. Mbisi ya Nili ekufaki mpe mayi elumbaki solo ya kopola na ndenge ete bato ya Ejipito bakokaki lisusu te komela yango. Makila ezalaki na bisika nyonso ya Ejipito.
22 But Egypt's magicians did the same with their secret arts. So Pharaoh's heart stayed hard; he wouldn't listen to them, as our Father had said. Kasi bato ya maji ya Ejipito, bango mpe basalaki bikamwa ya ndenge moko na nzela ya misala na bango ya soloka. Motema ya Faraon ekomaki lisusu makasi mpe aboyaki koyokela Moyize mpe Aron ndenge kaka Yawe alobaki.
23 Pharaoh turned and went into his house, and he did not take even this to heart. Atako bongo, Faraon abalukaki, akotaki na ndako na ye mpe azwaki likambo yango na motema te.
24 All the Egyptians dug along the Nile for water to drink, since they couldn't drink the Nile's water. Bato nyonso ya Ejipito batimolaki mabulu pene ya Nili mpo na kozwa mayi ya komela, pamba te bakokaki lisusu te komela mayi ya ebale.
25 Seven full days passed after our Father struck the Nile. Mikolo sambo elekaki sima na Yawe kobebisa mayi ya Nili.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]