Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 6 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then our Father told Moses, "Now you'll see what I'll do to Pharaoh: with a strong hand he'll send them out; with a strong hand drive them from his land." Yawe alobaki na Moyize : — Sik’oyo, okomona makambo oyo nakosala Faraon : na loboko na Ngai ya nguya, Faraon akotika bato na Ngai kokende mpe akobimisa bango na mokili na ye.
2 Our Father spoke to Moses and said to him, "I am your Father. Nzambe alobaki lisusu na Moyize : — Nazali Yawe.
3 I appeared to Abraham, Isaac, and Jacob as El Shaddai—our Father Almighty—but they didn't know me by my name, Father. Namimonisaki epai ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi lokola Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, kasi namimonisaki te epai na bango na Kombo na Ngai : Yawe.
4 I also confirmed my covenant with them, to give them Canaan, land where they lived as foreigners. Nasalaki boyokani na Ngai elongo na bango mpo na kopesa bango mokili ya Kanana epai wapi bazalaki kowumela lokola bapaya.
5 I have also heard the groaning of the Israelites, whom the Egyptians enslave, and remembered my covenant. Mpe lisusu nayoki kolela ya bana ya Isalaele oyo bato ya Ejipito bakomisi bawumbu, bongo nakanisi lisusu boyokani na Ngai.
6 Tell Israel's sons: I am your Father. I will bring you out from under Egypt's burdens, rescue you from their slavery, and redeem you with an extended arm and great judgments. Yango wana, loba na bana ya Isalaele : « Nazali Yawe ! Nakokangola bino na misala makasi oyo bato ya Ejipito bapesi bino. Nakokangola bino na se ya bowumbu na bango na loboko na nguya mpe na bitumbu ya makasi.
7 I'll take you as my children, be your Father. You'll know I am your Father, freeing you from under Egypt's burdens. Nakozwa bino lokola bato na Ngai moko, bongo nakozala Nzambe na bino. Boye bokoyeba ete Ngai Yawe, nazali Nzambe na bino, oyo akangolaki bino na se ya misala makasi ya bato ya Ejipito.
8 I will bring you to the land I swore, hand raised, to give to Abraham, to Isaac, and to Jacob, and give it to you as a possession. I am your Father." Mpe nakokotisa bino na mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa yango epai ya Abrayami, epai ya Izaki mpe epai ya Jakobi ; nakopesa bino yango mpo ete ekoma ya bino. Nazali Yawe. »
9 Moses told the Israelites this, but they wouldn't listen to Moses because of their broken spirit and their harsh slavery. Moyize alobaki makambo oyo epai ya bana ya Isalaele, kasi bayokaki ye te, pamba te misala makasi oyo bazalaki kopesa bango elembisaki mitema na bango.
10 Then our Father said to Moses, Yawe alobaki na Moyize :
11 "Go, tell Pharaoh king of Egypt to let the Israelites go out of his land." — Kende koyebisa Faraon, mokonzi ya Ejipito, ete abimisa bana ya Isalaele na mokili na ye.
12 But Moses said in our Father's presence, "If the Israelites won't listen to me, why would Pharaoh? I speak poorly." Kasi Moyize azongiselaki Yawe : — Soki kutu bana ya Isalaele bayoki ngai te, ndenge nini Faraon ayoka ngai moto ya likukuma ?
13 Now our Father spoke to Moses and Aaron, ordering them regarding the Israelites and Pharaoh king of Egypt, to bring the Israelites out of Egypt. Yawe alobaki na Moyize mpe Aron na tina na bana ya Isalaele mpe ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, oyo epai ya nani apesaki mitindo ete abimisa bana ya Isalaele na Ejipito.
14 Heads of their fathers' houses: Reuben's sons, Israel's firstborn—Hanoch, Pallu, Hezron, Carmi. These were Reuben's clans. Tala bakambi ya mabota na bango : Bana mibali ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele : Enoki, Palu, Etsironi mpe Karimi. Wana nde mabota ya Ribeni.
15 Simeon's sons: Jemuel, Jamin, Ohad, Jachin, Zohar, and Shaul son of a Canaanite woman—Simeon's clans. Bana mibali ya Simeoni : Yemuweli, Yamini, Owadi, Yakini, Tsoari mpe Saulo, mwana mobali oyo abotamaki na mwasi ya Kanana. Wana nde mabota ya Simeoni.
16 Sons of Levi by their generations: Gershon, Kohath, Merari. Levi lived 137 years. Tala bakombo ya bana mibali ya Levi oyo awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku misato na sambo kolanda ndenge babotamela : Gerishoni, Keati mpe Merari.
17 The sons of Gershon: Libni and Shimei, by their clans. Bana mibali ya Gerishoni kolanda mabota na bango : Libini mpe Shimei.
18 The sons of Kohath: Amram, Izhar, Hebron, and Uzziel. Kohath lived 133 years. Bana mibali ya Keati oyo awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku misato na misato : Amirami, Yitseari, Ebron mpe Uzieli.
19 The sons of Merari: Mahli and Mushi. These were the clans of Levi according to their generations. Bana mibali ya Merari : Maali mpe Mushi. Wana nde mabota ya Levi kolanda ndenge babotamela.
20 Amram married his father's sister Jochebed; she bore him Aaron and Moses. He lived 137 years. Amirami abalaki Yokebedi, tata mwasi na ye, oyo abotelaki ye Aron mpe Moyize. Amirami awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku misato na sambo.
21 The sons of Izhar: Korah, Nepheg, and Zichri. Bana mibali ya Yitseari : Kore, Nefegi mpe Zikiri.
22 The sons of Uzziel: Mishael, Elzaphan, and Sithri. Bana mibali ya Uzieli : Mishaeli, Elitsafani mpe Sitiri.
23 Aaron married Elisheba daughter of Amminadab, sister of Nahshon; she bore him Nadab, Abihu, Eleazar, and Ithamar. Aron abalaki Elisheba, mwana mwasi ya Aminadabi mpe ndeko mwasi ya Nashoni. Elisheba abotelaki Aron : Nadabi, Abiyu, Eleazari mpe Itamari.
24 The sons of Korah: Assir, Elkanah, and Abiasaph. These were the clans of the Korahites. Bana mibali ya Kore : Asiri, Elikana mpe Abiazafi. Wana nde mabota ya Kore.
25 Eleazar, Aaron's son, married one of Putiel's daughters; she bore him Phinehas. These are heads of Levite houses, by clan. Eleazari, mwana mobali ya Aron, abalaki moko kati na bana basi ya Putieli, oyo abotelaki ye mwana mobali : Pineasi. Wana nde bakambi ya mabota ya Levi kolanda mabota ya botata na bango.
26 This was Aaron and Moses whom our Father told, "Bring Israel out of Egypt by their divisions." Ezali epai ya Aron mpe Moyize nde Yawe alobaki : « Bobimisa bana ya Isalaele na Ejipito lokola mampinga oyo etandami na molongo. »
27 These spoke to Pharaoh king of Egypt to bring the Israelites out of Egypt: Moses and Aaron. Ezali bango nde bakendeki kokutana na Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpo na kobimisa bana ya Isalaele na mokili na ye. Ezali nde Moyize mpe Aron wana.
28 Now on the day our Father spoke to Moses in the land of Egypt, Tala makambo oyo ekomaki tango Yawe alobaki na Moyize, na Ejipito :
29 our Father told him, "I am your Father. Tell Pharaoh king of Egypt all I tell you." Yawe ayebisaki Moyize : — Nazali Yawe. Loba na Faraon, mokonzi ya Ejipito, makambo nyonso oyo nayebisi yo.
30 But Moses said before our Father, "Since I speak poorly, how will Pharaoh listen to me?" Kasi Moyize azongiselaki Yawe : — Tala, nazali na likukuma ; ndenge nini Faraon akoyoka ngai ?
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]