Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 5 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Afterward Moses and Aaron went to Pharaoh and said, "This is what our Father of Israel says: Let my people go to hold a feast for me in the wilderness." Sima na yango, Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki : — Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tika bato na Ngai kokende kosala feti na esobe mpo na lokumu na Ngai. »
2 Pharaoh said, "Who is God, that I should obey his voice and let Israel go? I don't know God, and I won't let Israel go." Faraon azongisaki : — Ye Yawe nde nani mpo ete ngai natosa ye mpe natika Isalaele kokende ? Nayebi ye te mpe nakotika te ete Isalaele akende.
3 They said, "Our Father has met with us. Let us take a three-day journey into the wilderness to sacrifice to our Father, or he may strike us with plague or sword." Balobaki : — Nzambe ya Ba-Ebre akutanaki na biso. Sik’oyo, tika biso totambola mikolo misato kati na esobe mpo ete tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, mbeka ; noki te akoboma biso na bokono to na mopanga.
4 But Egypt's king said to them, "Moses and Aaron, why pull the people from their work? Get back to your labor!" Kasi mokonzi ya Ejipito alobaki : — Moyize mpe Aron, mpo na nini bozali kopekisa bato kosala misala na bango ? Bozonga na mosala na bino !
5 Pharaoh said, "Look, the land's people are now many, and you'd have them stop working!" Faraon abakisaki lisusu : — Botala ! Bato oyo bakomi ebele kati na mokili, bongo bino bozali kopekisa bango kosala mosala !
6 That same day Pharaoh commanded the slave drivers and the foremen over the people: Kaka na mokolo wana, Faraon apesaki mitindo oyo epai ya bakambi oyo balandelaka misala makasi ya bawumbu mpe na bakapita ya bana ya Isalaele :
7 "Stop giving the people straw for bricks as before. They must go gather straw themselves. — Bokopesa lisusu matiti te epai ya bato oyo mpo na kosala babiliki ndenge bozalaki kopesa bango liboso ; botika bango moko bakende kolokota matiti na bango.
8 Require the same brick quota as before; don't reduce it. They're lazy; that's why they cry, 'Let us go sacrifice to our God.' Kasi botinda bango kosala kaka motango ya babiliki oyo basalaka wuta kala, bokitisa motango na yango te. Bazali bagoyigoyi, yango wana bazali koganga : « Tika biso tokende kobonzela Nzambe na biso mbeka ! »
9 Make the work harder for the men, so they keep at it and ignore lies." Bokomisa makasi misala na bango mpo ete bakoma na mosala ebele mpe batia matoyi te na makambo ya lokuta.
10 The slave drivers and foremen went out and told the people, "Pharaoh says: 'I will give you no more straw.' Bongo bakambi oyo balandelaka misala makasi ya bawumbu mpe bakapita ya bana ya Isalaele babimaki mpe balobaki na bato : — Tala makambo oyo Faraon alobi : « Nakopesa bino lisusu matiti te.
11 Go get your own straw wherever you find it—but your work will not be reduced at all.'" Bokende kozwa matiti bino moko na esika oyo bokoki komona yango ! Kasi motango ya babiliki oyo bakatela bino ekokita ata moke te. »
12 So the people scattered throughout all the land of Egypt to gather stubble for straw. Boye bana ya Isalaele bapanzanaki na Ejipito mobimba mpo na kolokota matiti ya kotumba na yango babiliki.
13 The slave drivers kept pressing them: "Finish your daily quota, just as when you had straw." Bakambi oyo balandelaka misala makasi ya bawumbu bazalaki kotindika bango na makasi mpe koloba : — Bokokisa motango ya babiliki oyo bakatela bino mpo na mokolo na mokolo lokola na tango oyo bazalaki kopesa bino matiti !
14 The Israelite foremen, whom Pharaoh's slave drivers had set over them, were beaten and asked, "Why haven't you met your brick quota yesterday and today, as before?" Bakambi oyo Faraon aponaki mpo na kolandela misala makasi ya bawumbu babetaki bakapita ya bana ya Isalaele oyo bango batiaki mpe batunaki bango : — Mpo na nini lobi oyo eleki mpe lelo bokokisi te motango ya babiliki oyo bosalaka wuta kala ?
15 Then the Israelite foremen came and cried out to Pharaoh, "Why do you treat your servants this way? Bakengeli ya bana ya Isalaele bakendeki kolela epai ya Faraon : — Mpo na nini ozali kosala basali na yo boye ?
16 No straw is given your servants, yet they tell us, 'Make bricks!' Look, your servants are beaten, but your own people are at fault." Bazali kopesa lisusu te matiti epai ya basali na yo, nzokande bazali koloba na biso : « Bosala babiliki ! » Sik’oyo tala, basali na yo bazali kobetama, kasi mbeba ezali epai ya bato na yo moko.
17 Pharaoh said, "Lazy! You're lazy! That's why you say, 'Let us go and sacrifice to God.' Faraon alobaki : — Bagoyigoyi ! Bozali penza bagoyigoyi ! Yango wana bozali koloba : « Tika biso tokende kobonzela Yawe mbeka. »
18 Now go, work. No straw will be given you, yet you must deliver your full quota of bricks." Sik’oyo, bozonga na mosala ! Bakopesa bino lisusu matiti te, kasi bokosala kaka motango ya babiliki oyo bakatela bino.
19 The Israelite foremen saw they were in trouble when told, "Don't reduce your daily quota of bricks." Bakengeli ya bana ya Isalaele bamonaki ete bakomi na pasi koleka tango bayebisaki bango : « Motango ya babiliki oyo bakatela bino mpo na mokolo na mokolo ekokita te. »
20 When they left Pharaoh, they found Moses and Aaron waiting to meet them, Tango batikaki Faraon, batombokelaki Moyize mpe Aron oyo bazalaki kozela bango.
21 and said to them, "May our Father look on you and judge, for you have made us a stench to Pharaoh and his officials, putting a sword in their hand to kill us." Balobaki : — Tika ete Yawe atala bino mpe asambisa bino ! Bokomisi biso eloko ya nkele liboso ya Faraon mpe ya basali na ye mpe botie mopanga na maboko na bango mpo ete baboma biso !
22 Then Moses returned to our Father and said, "My Sovereign Father, why have you brought trouble on this people? Why did you ever send me? Boye Moyize abalukaki epai na Yawe mpe abondelaki : — Nkolo ! Mpo na nini ozali komemela bato oyo pasi ? Boni, ezali mpo na yango nde otindaki ngai ?
23 Since I went to Pharaoh to speak in your name, he has harmed this people, and you have not rescued your people at all." Wuta tango nakendeki koloba na Faraon na Kombo na Yo, Faraon akomi konyokola bato oyo, bongo Yo ozali kosala ata eloko moke te mpo na kokangola bango !
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]