Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Moses replied, "But they won't believe me or listen to my voice, for they'll say, 'Our Father did not appear to you.'" Moyize azongisaki : — Bongo soki bandimi ngai te, bayoki ngai te ? Solo, bakoloba kaka : « Yawe amonanaki na yo te. »
2 Our Father said to him, "What is that in your hand?" He said, "A staff." Yawe atunaki ye : — Ozali na nini na loboko na yo ? Moyize azongisaki : — Nazali na lingenda.
3 He said, "Throw it to the ground." He threw it to the ground, and it became a snake, and Moses ran from it. Yawe alobaki : — Bwaka yango na mabele. Moyize abwakaki lingenda yango na mabele mpe ebongwanaki nyoka. Bongo Moyize akimaki mosika na yango.
4 But our Father said to Moses, "Reach out your hand and grab it by the tail"—he reached out his hand, caught it, and it became a staff in his hand. Kasi Yawe alobaki na ye : — Sembola loboko na yo mpe kanga nyoka yango na mokila ! Moyize asembolaki loboko mpe akangaki nyoka ; mpe nyoka yango ebongwanaki lisusu lingenda na loboko na ye.
5 "that they may believe that your Father, the God of their fathers—of Abraham, of Isaac, and of Jacob—has appeared to you." Yawe alobaki na ye : — Esalemi bongo mpo ete bandima solo ete Yawe, Nzambe ya bakoko na bango, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi, amonanaki na yo.
6 Then our Father told him, "Put your hand in your cloak." So he did, and when he pulled it out, his hand had a skin disease, white as snow. Sima, Yawe alobaki na ye lisusu : — Tia loboko na yo na tolo na yo. Moyize atiaki loboko na ye na tolo na ye ; mpe tango alongolaki yango, loboko yango ezwaki bokono ya maba ; ekomaki pembe lokola mvula ya pembe.
7 He said, "Put your hand back in your cloak." He did, and when he took it out, it was restored, like the rest of his flesh. Yawe alobaki na ye : — Sik’oyo, zongisa loboko na yo na tolo na yo. Moyize azongisaki loboko na ye na tolo na ye. Mpe tango alongolaki yango, loboko yango ekomaki lisusu malamu lokola biteni mosusu ya nzoto na ye.
8 "If they will not believe you or listen to the first sign, they may believe the second sign. Yawe alobaki na ye : — Soki bandimi yo te to soki babeti tembe mpo na elembo ya liboso, bakondima na elembo ya mibale.
9 If they still won't believe these two signs or listen to your voice, take water from the Nile and pour it on dry ground; the water taken from the Nile will become blood on the dry ground." Kasi soki na bilembo oyo mibale, bandimi kaka te to bayoki te, wana okotoka mayi na ebale Nili, okosopa yango na esobe. Mayi oyo okozwa na ebale Nili ekokoma makila tango okosopa yango na mabele.
10 But Moses said to our Father, "Please, my Sovereign Father, I've never been good with words, not before nor since you've spoken to your servant, for I'm slow of speech and slow of tongue." Moyize alobaki na Yawe : — Ah, Nkolo, nakokaka koloba malamu te ! Yango ezali likambo ya lobi oyo eleki te to ya wuta tango obandi koloba na mosali na Yo te, pamba te nazali na monoko mpe na lolemo kilo.
11 Then our Father said to him, "Who gave man his mouth? Who makes him mute or deaf, seeing or blind? Isn't that I, your Father? Yawe alobaki na ye : — Nani apesaka monoko epai ya moto ? Nani akomisaka moto baba to mokufi matoyi ? Nani akomisaka moto, moto oyo amonaka to mokufi miso ? Boni, ezali Ngai Yawe te ?
12 Now go, and I will be with your mouth and will teach you what to say." Sik’oyo kende, Ngai moko nakosunga yo mpo ete oloba malamu, mpe nakoteya yo makambo oyo osengeli koloba.
13 But he said, "Please, my Sovereign Father, send someone else." Kasi Moyize azongisaki : — Te Nkolo ! Nabondeli Yo ! Tinda moto mosusu oyo olingi mpo na kosala yango.
14 Then our Father's anger flared against Moses. He said, "Isn't Aaron your brother, the Levite? I know he speaks well. Even now he's coming out to meet you, and he'll rejoice in his heart when he sees you. Boye Yawe asilikelaki Moyize mpe alobaki na ye : — Boni, Aron, moto ya libota ya Levi, azali ndeko na yo te ? Nayebi ete alobaka malamu mpe ye wana azali koya kokutana na yo ; mpe motema na ye ekosepela tango akomona yo.
15 Speak to him; put the words in his mouth. I will be with your mouth and his, and teach you both what to do. Okoloba na ye mpe okotia maloba na monoko na ye, bongo Ngai nakosunga bino mibale mpo ete bokoka koloba malamu, mpe nakoteya bino makambo oyo bosengeli kosala.
16 He will speak for you to the people, be your mouth, and you will be like God to him. Ye akoloba epai ya bato na esika na yo, akozala molobeli na yo ; bongo yo okozala lokola nzambe na ye.
17 And take this staff in your hand and use it to perform the signs." Kasi zwa lingenda oyo ezali na maboko na yo mpo ete osala bilembo ya kokamwa na nzela na yango.
18 Moses returned to his father-in-law Jethro and said, "Let me go back to my brothers in Egypt to see if they're still alive." Jethro said, "Go in peace." Moyize azongaki epai ya Jetro, tata-bokilo na ye, mpe alobaki na ye : — Nasengeli kokende epai ya bandeko na ngai, na Ejipito, mpo ete natala soki ndambo kati na bango bazali nanu na bomoi. Jetro ozongisaki : — Kende na kimia !
19 And our Father told Moses in Midian, "Go back to Egypt—all the men who wanted to kill you are dead." Yawe alobaki na Moyize tango azalaki nanu na mokili ya Madiani : — Telema mpe zonga na Ejipito, pamba te bato nyonso oyo balingaki koboma yo basili kokufa.
20 Moses took his wife and sons, put them on a donkey, and returned to the land of Egypt. Moses took the staff of our Father in his hand. Moyize azwaki mwasi na ye mpe bana na ye ya mibali, atiaki bango likolo ya ane mpe azongaki na Ejipito. Azwaki lisusu lingenda ya Nzambe na loboko na ye.
21 Then our Father told Moses, "When you return to Egypt, perform before Pharaoh all the wonders I gave you power to do. But I will harden his heart, so he will not let the people go. Yawe alobaki na Moyize : — Sik’oyo, lokola ozali kozonga na Ejipito, tala bikamwa nyonso oyo napesi yo nguya ya kosala ; okosala yango liboso ya Faraon. Ngai nakokomisa motema na ye libanga mpo ete akoka kotika te bato na Ngai kokende.
22 Then you are to say to Pharaoh, 'This is what our Father says: Israel is my firstborn son, Okoloba na Faraon : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Isalaele azali mwana na Ngai ya liboso ya mobali.
23 and I say to you: let my son go to serve me. If you refuse to let him go, I will kill your firstborn son.'" Mpe nalobi na yo : Tika mwana na Ngai ya mobali kokende mpo ete asalela Ngai. Soki kaka oboyi kotika ye, nakoboma mwana na yo ya liboso ya mobali. › »
24 At a lodging place on the way, our Father met him and tried to kill him. Nzokande na nzela, na esika oyo balekisaki butu, Yawe akutanaki na Moyize mpe alukaki koboma ye.
25 Zipporah took a flint, cut off her son's foreskin, touched it to Moses' feet, and said, "Surely, you are a blood bridegroom to me." Kasi Sefora azwaki libanga ya songe, akataki ngenga ya mwana na ye ya mobali mpe atutisaki ngenga yango na makolo ya Moyize ; alobaki : — Solo, ozali penza mpo na ngai mobali ya makila.
26 So our Father released Moses. Then she said, "A bridegroom of blood," because of the circumcision. Bongo Yawe atikaki Moyize. Ezalaki na tango wana nde Sefora alobaki na Moyize likolo na likambo ya kokatama ngenga : — Mobali ya makila.
27 Now our Father told Aaron, "Go meet Moses in the wilderness." So he went, met him at the mountain of our Father, and kissed him. Yawe alobaki na Aron : — Kende kokutana na Moyize na esobe. Aron akendeki, akutanaki na Moyize na ngomba ya Nzambe mpe apesaki ye beze.
28 Moses told Aaron all the words our Father had given him to deliver, and all the signs he commanded him to perform. Moyize ayebisaki Aron makambo nyonso oyo Yawe atindaki ye koloba mpe bikamwa nyonso oyo atindaki ye kosala.
29 Then Moses and Aaron went and gathered all the elders of the people of Israel. Bongo Moyize mpe Aron bakendeki kosangisa bakambi nyonso ya Isalaele.
30 Aaron spoke all the words our Father had spoken to Moses and did the signs before the people. Aron ayebisaki bango maloba nyonso oyo Yawe alobaki na Moyize. Asalaki bikamwa liboso ya bato.
31 The people believed. Hearing that our Father had come to help Israel's people and seen their suffering, they bowed their heads and worshiped. Bato bandimaki. Bongo tango bayokaki ete Yawe akanisaki bana ya Isalaele mpe amonaki pasi na bango, bafukamaki mpe bagumbamelaki Yawe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]