Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 12 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Our Father said to Moses and Aaron in the land of Egypt, Yawe alobaki na Moyize mpe Aron kati na Ejipito :
2 "This month is your beginning of months, the year's first month. « Sanza oyo ekozala mpo na bino sanza ya liboso ya mobu.
3 Tell all Israel's assembly: on this month's tenth day, each man is to take a lamb per family, a lamb per household. Boloba boye na lisanga mobimba ya Isalaele : Na mokolo ya zomi na sanza oyo, libota moko na moko to ndako moko na moko esengeli kozala na mwana meme to na mwana ntaba.
4 If the household is too small for a lamb, he and his nearest neighbor are to take one lamb by the number of people, counting for it by how much each eats. Kasi soki bato ya ndako bazali ebele te mpo na kolia mwana meme ya mobimba, bakolia yango elongo na bato ya ndako oyo ezali pene na ndako na bango kolanda motango ya bato. Bakopona mwana meme kolanda oyo moko na moko akoki kolia.
5 Your lamb must be flawless, a year-old male; take it from the sheep or the goats. Mwana meme to mwana ntaba oyo bakopona esengeli kozala ya mobali, ya mobu moko mpe ezanga mbeba.
6 Keep it until the fourteenth day of this month; the whole assembly of Israel's congregation is to slaughter it at twilight. Bokobatela yango kino na mokolo ya zomi na minei ya sanza yango. Na mokolo yango, bato nyonso ya lisanga ya Isalaele bakokata yango kingo na pokwa.
7 They will take some of the blood and put it on the two doorposts and lintel of the houses where they eat it. Bakozwa makila na yango mpe bakopakola yango na libaya ya likolo mpe na mabaya mibale ya mipanzi oyo esimbaka ekuke ya bandako epai wapi bakolia nyama yango.
8 That night they must eat the meat, fire-roasted, with bread made without yeast and bitter herbs—they must eat it. Na butu ya mokolo yango, bakotumba mosuni na yango na moto mpe bakolia yango elongo na mapa ezanga levire mpe matiti ya bololo.
9 Do not eat it raw or boiled in water, but roasted over fire—head, legs, and inner parts. Bakolia te mosuni oyo ebela malamu te to oyo batokisa, kasi bakolia kaka mosuni oyo batumba na moto elongo na makolo, moto mpe biloko ya kati.
10 Don't leave any of it until morning; burn whatever remains until morning. Bokotika ata ndambo te kino na tongo. Kasi soki ndambo ekomi na tongo, botumba yango na moto.
11 Eat it this way: belt fastened, sandals on your feet, staff in hand, eating in haste. It is the Passover of our Father. Tala ndenge nini bokolia yango : bokolata mokaba na loketo, basandale na makolo, mpe bokosimba lingenda na loboko. Bokolia yango na lombangu. Ezali feti ya Pasika mpo na Yawe.
12 That night I will pass through the land of Egypt and strike down every firstborn in the land of Egypt, man and beast, and execute judgments against all the gods of Egypt. I am your Father. Kaka na butu yango, nakoleka na Ejipito ; nakoboma bana nyonso ya liboso kati na Ejipito kobanda na bato kino na banyama ; mpe nakosambisa banzambe nyonso ya Ejipito na nzela ya bitumbu. Nazali Yawe.
13 The blood will be a sign for you on the houses where you are. When I see the blood, I will pass over you—no plague will destroy you when I strike the land of Egypt. Na bandako epai wapi bokozala, makila ekozala elembo mpo na bino ; bongo tango Ngai nakomona makila yango, nakoleka bino. Boye etumbu moko te ya kufa ekokweya kati na bino tango nakopesa etumbu na mokili ya Ejipito.
14 "This day is a memorial for you; celebrate it as a feast to your Father, a rule forever for all your generations—celebrate it. Mokolo yango ekozala mokolo ya ekaniseli mpo na bino. Bileko na bileko, bokobanda kosala feti na mokolo yango mpo na lokumu ya Yawe ; yango ekozala mpo na bino mobeko ya libela na libela mpo na bakitani oyo bakoya sima na bino.
15 Eat bread without yeast seven days. Remove all yeast from your houses on the first day, for whoever eats anything made with yeast, from the first day to the seventh, will be cut off from Israel. Mikolo sambo, bokolia mapa ezanga levire. Na mokolo ya liboso, bokolongola levire na bandako na bino ; pamba te moto nyonso oyo akolia eloko oyo ezali na levire, kobanda na mokolo ya liboso kino na mokolo ya sambo, bakolongola ye kati na bato ya Isalaele.
16 On the first day hold a holy gathering, and on the seventh day a holy gathering. Do no work then, except preparing what each person eats—that alone you may do. Bokozala na mayangani ya bule na mokolo ya liboso mpe na mokolo ya sambo. Bokosala mosala moko te na mikolo wana longola kaka mosala ya kolamba bilei oyo moto na moto akolia. Yango kaka nde bokosala.
17 Keep the Feast of Bread Without Yeast, for on this exact day I brought your forces out of the land of Egypt. Keep this day, generation after generation, as a lasting statute. Bokosala feti ya Mapa ezanga levire, pamba te ezalaki na mokolo yango nde nabimisaki mampinga na bino na Ejipito. Bokosala feti na mokolo yango lokola mobeko ya libela na libela mpo na bakitani oyo bakoya sima na bino.
18 In the first month, eat bread without yeast from the evening of the fourteenth day until the evening of the twenty-first day. Na sanza ya liboso, bokolia mapa ezanga levire kobanda na pokwa ya mokolo ya zomi na minei kino na pokwa ya mokolo ya tuku mibale na moko.
19 For seven days, no yeast is to be found in your houses; whoever eats anything with yeast in it must be cut off from Israel's community, whether foreigner or native of the land. Mikolo sambo, levire esengeli te komonana kati na bandako na bino ; pamba te moto nyonso oyo akolia eloko oyo ezali na levire, esengeli balongola ye na lisanga ya Isalaele, azala mopaya to mwana mboka ya Isalaele.
20 Eat nothing made with yeast; eat bread without yeast everywhere you live." Bokolia eloko moko te oyo ezali na levire. Na bisika nyonso oyo bokozala, bokolia kaka mapa ezanga levire. »
21 Moses called all Israel's elders and said to them, "Pick out lambs for your families, then slaughter the Passover lamb. Moyize abengisaki bakambi nyonso ya Isalaele mpe alobaki na bango : « Bokende kozwa na libota moko na moko mwana meme to mwana ntaba mpe bokata yango kingo lokola mbeka ya Pasika.
22 Take a bunch of hyssop, dip it in the blood in the basin, and touch the lintel and both doorposts with the blood in the basin. None of you may leave his house door until morning. Bokokamata etape ya nzete ya izope, bokozindisa yango na makila oyo ekozala kati na sani monene, bokopakola yango na libaya ya likolo mpe na mabaya mibale ya mipanzi oyo esimbaka ekuke. Moko te kati na bino abima libanda ya ekuke ya ndako na ye kino na tongo.
23 For our Father will pass through to strike Egypt. Seeing the blood on the lintel and two doorposts, our Father will pass over the entrance and not let the destroyer enter your houses to strike you. Wana Yawe akoleka na mokili mpo na koboma bato ya Ejipito mpe akomona makila na libaya ya likolo mpe na mabaya mibale ya mipanzi oyo esimbaka ekuke, akoleka ekuke yango mpe akopesa nzela te na mobomi ete akota na bandako na bino mpo na koboma.
24 You are to keep this command as a lasting statute for you and for your children. Bokotosa malako oyo lokola mobeko ya libela na libela mpo na bino mpe mpo na bakitani na bino.
25 When you enter the land our Father will give you, as he promised, keep this service. Tango bokokota na mokili oyo Yawe akopesa bino ndenge alakaki, bosalela likambo oyo.
26 And when your children say to you, 'What does this service mean to you?' Bongo tango bana na bino bakotuna bino : ‹ Molulu oyo elakisi nini mpo na bino ? ›
27 you are to say, 'It is our Father's Passover sacrifice: he passed over the houses of Israel's people in Egypt, striking the Egyptians but sparing our houses.'" Then the people bowed and worshiped. Bokoloba na bango : ‹ Ezali mbeka ya feti ya Pasika mpo na Yawe oyo alekaki bandako ya bana ya Isalaele kati na Ejipito mpe abikisaki bandako na biso tango abomaki bato ya Ejipito. › » Na bongo, bana ya Isalaele bafukamaki mpe bagumbamelaki Yawe.
28 The Israelites went and did just as our Father commanded Moses and Aaron; so they did. Bato ya Isalaele basalaki ndenge kaka Yawe atindaki Moyize mpe Aron.
29 At midnight our Father struck every firstborn in Egypt, from Pharaoh's firstborn on his throne to the prisoner's firstborn in the dungeon, and every firstborn animal. Na kati-kati ya butu, Yawe abomaki bana mibali nyonso ya liboso kati na Ejipito kobanda na mwana mobali ya liboso ya Faraon oyo azalaki kokonza na kiti ya bokonzi kino na mwana mobali ya liboso ya mokangami oyo azalaki kati na boloko, mpe bana mibali ya liboso ya bibwele nyonso.
30 Pharaoh got up that night—he, his officials, all Egypt—and a great cry rose in Egypt, for every house had someone dead. Na butu wana, Faraon elongo na bakalaka na ye nyonso mpe bato nyonso ya Ejipito batelemaki ; mpe koganga makasi ezalaki na Ejipito, pamba te ezalaki na ndako moko te oyo ezangaki ebembe.
31 He summoned Moses and Aaron that night: "Get up, leave my people—you and the Israelites—go, serve God as you said. Kaka na butu wana, Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango : « Botelema, bobima kati na bato na ngai, bino mpe bana ya Isalaele. Bokende kogumbamela Yawe ndenge bosengaki.
32 Take both your flocks and your herds, as you said, and go—bless me too." Bokamata bibwele na bino ndenge bolobaki : bangombe, bameme mpe bantaba ; mpe bokende. Boye, bopambola mpe ngai. »
33 The Egyptians urged the Israelites to leave the land quickly, saying, "We're all dead." Bato ya Ejipito batindikaki bana ya Isalaele ete babima noki na mokili na bango. Bazalaki koloba : « Bokende na bino, noki te biso tokokufa. »
34 The people carried their dough before it rose, kneading bowls wrapped in their cloaks on their shoulders. Boye bato bazwaki potopoto na bango ya farine liboso ete batia yango levire, bazingaki na banzambala na bango banzungu oyo basalelaka potopoto mpe batiaki yango na mapeka na bango.
35 Israel did as Moses said: they asked the Egyptians for silver, gold, and clothing. Bato ya Isalaele basalaki ndenge Moyize alobaki na bango mpe basengaki epai ya bato ya Ejipito biloko ya palata, ya wolo mpe bilamba.
36 And our Father gave the people favor with the Egyptians, so they granted their request; and so the people plundered the Egyptians. Bongo Yawe asalaki ete bana ya Isalaele bazwa ngolu na miso ya bato ya Ejipito oyo bapesaki bango biloko oyo basengaki. Na ndenge wana nde basilisaki biloko ya bato ya Ejipito.
37 Israel set out from Rameses to Succoth—about 600,000 men on foot, plus women and children. Bato ya Isalaele balongwaki na Ramisesi mpe bakendeki na Sukoti ; bazalaki mibali nkoto nkama motoba oyo bazalaki kotambola na makolo longola basi mpe bana.
38 A large mixed crowd also went up with them, with flocks, herds, and abundant livestock. Ezalaki lisusu na ebele ya bato oyo bakendeki na bango elongo ; bamemaki lisusu bibwele : bameme, bantaba mpe bangombe.
39 They baked the dough they'd brought from Egypt into flat cakes without yeast, since it hadn't risen—driven out of Egypt, with no time to wait or prepare food for themselves. Basalaki na farine oyo bamemaki wuta na Ejipito bagato ezanga levire, pamba te tango babenganaki bango, potopoto emivimbelaki te mpe bazangaki tango ya kobongisa biloko ya kolia mpo na bango moko.
40 The time that the people of Israel lived in Egypt was 430 years. Mibu oyo bana ya Isalaele bavandaki na Ejipito ezalaki nkama minei na tuku misato.
41 After 430 years, on that very day, all the armies of our Father left the land of Egypt. Na suka ya mobu oyo ya nkama minei na tuku misato, mampinga nyonso ya Yawe batikaki Ejipito.
42 This was a night our Father watched, to bring them out of the land of Egypt; this same night, all Israel's people keep watch for our Father, generation after generation. Lokola Yawe akengelaki butu wana mpo na kobimisa bana ya Isalaele na Ejipito, butu yango ekomi ya Yawe : ekobanda kozala butu ya kokengela mpo na bana ya Isalaele na milongo na bango nyonso oyo ekoya.
43 Our Father told Moses and Aaron, "This is the Passover's rule: no foreigner may eat it, Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : « Tala mibeko na tina na Pasika : ‹ Mopaya moko te akoki kolia yango.
44 but every slave that is bought for money may eat of it after you have circumcised him. Kasi mowumbu nyonso oyo bakosomba, basengeli liboso kokata ye ngenga, sima nde akoki kolia Pasika.
45 No temporary resident or hired worker may eat of it. Mopaya oyo akozala na bino mpo na tango moke mpe mosali oyo azwaka lifuti bakolia yango te.
46 Eat it in one house; carry none of the meat outside the house, and break none of its bones. Ekoliama kaka kati na ndako moko na moko, bakobimisa ata mosuni moko te na libanda ya ndako mpe bakobuka ata mokuwa na yango moko te.
47 All the congregation of Israel is to keep it. Lisanga mobimba ya Isalaele ekosala feti ya Pasika.
48 If a foreigner living with you wants to keep the Passover to our Father, circumcise all his males; then he may come near and keep it—he becomes like a native of the land. But no uncircumcised person may eat it. Soki mopaya oyo azali kati na bino alingi kosepela na feti ya Pasika ya Yawe, esengeli ete mibali nyonso oyo bazali kati na ndako na ye bakatama ngenga ; bongo nde akozwa nzela ya kolia Pasika lokola mwana mboka ya Isalaele. Kasi mobali oyo akokatama ngenga te akoki kolia Pasika te.
49 There is to be one law for the native and for the foreigner who resides among you." Mibeko ezali se ndenge moko mpo na mwana mboka ya Isalaele mpe mpo na mopaya oyo azali kati na bino. › »
50 All Israel's sons did as our Father commanded Moses and Aaron; they did it. Bato nyonso ya Isalaele basalaki ndenge kaka Yawe atindaki Moyize mpe Aron.
51 That very day our Father brought Israel's people out of the land of Egypt by their armies. Mpe na mokolo wana, Yawe abimisaki bana ya Isalaele na molongo, wuta na Ejipito, lokola mampinga ya basoda.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]