Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Samuel 9 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 David asked, "Is anyone left of Saul's family I can show kindness to, for Jonathan's sake?" Davidi atunaki : « Ezali lisusu na moto moko ya libota ya Saulo oyo azali nanu na bomoi ? Nazali na posa ya kotalisa ye bolamu mpo na Jonatan. »
2 Saul's household had a servant named Ziba, summoned to David. "Are you Ziba?" the king asked. "At your service," he replied. Nzokande, ezalaki na mosali moko ya ndako ya Saulo ; kombo na ye « Tsiba. » Babengisaki ye mpo ete aya komimonisa liboso ya Davidi. Mpe mokonzi alobaki na ye : — Ezali yo Tsiba ? Azongisaki : — Iyo, ezali ngai, mosali na yo.
3 The king asked, "Is no one left of Saul's house to whom I can show the kindness of our Father?" Ziba answered the king, "There is still a son of Jonathan; he is crippled in both feet." Mokonzi atunaki ye : — Boni, ezali na moto moko te ya libota ya Saulo, oyo azali nanu na bomoi, oyo epai ya nani nakoki kotalisa bolamu ya Nzambe ? Tsiba azongiselaki mokonzi : — Ezali na mwana mobali moko ya Jonatan, oyo azali nanu na bomoi. Azali na mbeba na makolo nyonso mibale.
4 "Where is he?" the king asked. Ziba answered, "In the house of Machir son of Ammiel, in Lo-debar." Mokonzi atunaki ye : — Azali wapi ? Tsiba azongisaki : — Azali na ndako ya Makiri, mwana mobali ya Amieli, na mboka Lo-Debari.
5 So King David sent and had him brought from Machir son of Ammiel's house in Lo-debar. Boye, mokonzi Davidi abengisaki ye wuta na Lo-Debari, na ndako ya Makiri, mwana mobali ya Amieli.
6 When Mephibosheth son of Jonathan, son of Saul, came to David, he fell facedown and bowed low. David said, "Mephibosheth!" "Your servant," he replied. Tango Mefibosheti, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Saulo, ayaki epai ya Davidi, agumbamaki mpo na kopesa ye lokumu. Davidi alobaki : — Mefibosheti ! Ye azongisaki : — Ngai oyo, mosali na yo.
7 "Don't be afraid," David said to him, "for I'll surely show you kindness for your father Jonathan's sake. I'll give back all your grandfather Saul's land, and you'll always eat at my table." Davidi alobaki na ye : — Kobanga te ! Pamba te nakotalisa yo solo bolamu mpo na tata na yo, Jonatan. Nakozongisela yo mabele nyonso ya koko na yo, Saulo, mpe okobanda kolia tango nyonso na mesa na ngai.
8 Mephibosheth bowed and said, "What is your servant, that you'd notice a dead dog like me?" Mefibosheti agumbamaki mpe alobaki : — Mosali na yo azali nani mpo ete otala mbwa ya kokufa lokola ngai ?
9 Then the king summoned Ziba, Saul's servant: "I have given your master's grandson everything that belonged to Saul and all his household. Mokonzi abengisaki Tsiba, mosali ya Saulo, mpe alobaki na ye : — Napesi na mwana ya nkolo na yo biloko nyonso oyo ezalaki ya Saulo mpe ya libota na ye.
10 You, your sons, and your servants are to farm the land for him and bring in the harvest, so your master's grandson has food to eat. But Mephibosheth, your master's grandson, will always eat at my table." Ziba had fifteen sons and twenty servants. Yo, bana na yo ya mibali mpe basali na yo, bokosala bilanga mpo na ye mpe bokomema bambuma oyo bokobuka mpo ete mwana ya nkolo na yo akoka kozwa biloko ya kolia. Mpe Mefibosheti, mwana ya nkolo na yo, akobanda kolia tango nyonso na mesa na ngai. Nzokande Tsiba azalaki na bana mibali zomi na mitano mpe basali tuku mibale.
11 Ziba told the king, "I will do all my lord the king commands." So Mephibosheth ate at David's table like one of the king's sons. Tsiba alobaki na mokonzi : — Mosali na yo akosala makambo nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, akotinda ye. Boye Mefibosheti aliaki na mesa ya Davidi lokola moko kati na bana mibali ya mokonzi.
12 Mephibosheth had a young son named Mica, and everyone in Ziba's household served Mephibosheth. Mefibosheti azalaki na mwana mobali moko ya elenge ; kombo na ye ezalaki « Mika. » Mpe bato nyonso ya libota ya Tsiba bazalaki basali ya Mefibosheti.
13 Mephibosheth lived in Jerusalem, because he always ate at the king's table; and he was lame in both feet. Mefibosheti avandaki na Yelusalemi mpo ete azalaki kolia tango nyonso na mesa ya mokonzi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]