Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Samuel 8 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 After this, David defeated the Philistines and subdued them, and he took Metheg-ammah from the Philistines. Sima na yango, Davidi alongaki bato ya Filisitia mpe abukaki lolendo na bango. Abotolaki Metegi-Ama na maboko ya bato ya Filisitia.
2 He also defeated Moab. He made them lie on the ground and measured them with a cord: two lengths to die, one full length to live. So Moab became David's servants and brought tribute. Davidi alongaki lisusu bato ya Moabi mpe alalisaki bango na mabele, na etando oyo ezalaki na molayi ya basinga misato, oyo bamekelaka molayi. Abomaki ndambo mibale kati na bandambo misato ya bato nyonso oyo balalaki na etando mpe atikaki na bomoi ndambo moko ya bato. Boye, bato ya Moabi bakomaki bawumbu ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako ya mokonzi.
3 David also defeated Hadadezer son of Rehob, king of Zobah, as he went to restore his control at the Euphrates River. Davidi alongaki lisusu Adadezeri, mwana mobali ya Reobi, mokonzi ya Tsoba, tango Adadezeri akendeki kolendisa bokonzi na ye pembeni ya ebale Efrate.
4 David captured from him 1,700 horsemen and 20,000 foot soldiers, and hamstrung all the chariot horses, keeping enough for one hundred chariots. Davidi akangaki basoda nkoto moko na nkama sambo oyo babundaka bitumba na likolo ya bampunda, mpe basoda nkoto tuku mibale oyo babundaka bitumba na makolo ; akataki misisa ya makolo ya bampunda nyonso, kasi atikaki kaka bampunda nkama moko oyo ezalaki kobenda bashario.
5 When Aram of Damascus came to help Hadadezer king of Zobah, David killed 22,000 Arameans. Tango bato ya Siri oyo bazalaki kovanda na engumba Damasi bayaki kosunga Adadezeri, mokonzi ya Tsoba, Davidi abomaki kati na bango bato nkoto tuku mibale.
6 David set garrisons in Aram of Damascus, and the Arameans became his servants, bringing tribute. Our Father gave David victory wherever he went. Bongo Davidi atiaki bayangeli na ye kati na engumba Damasi ya Siri, mpe bato ya Siri bakomaki na se ya bokonzi ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako epai na ye. Yawe azalaki kopesa Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.
7 David took the gold shields that belonged to the servants of Hadadezer and brought them to Jerusalem. Davidi abotolaki banguba ya wolo oyo bakonzi ya basoda ya Adadezeri bazalaki na yango mpe amemaki yango na Yelusalemi.
8 And from Betah and Berothai, cities of Hadadezer, King David took a great quantity of bronze. Na Beta mpe na Berotayi, bingumba ya Adadezeri, mokonzi Davidi azwaki bronze ebele.
9 When Toi king of Hamath heard that David had defeated the entire army of Hadadezer, Tango Toyi, mokonzi ya Amati, ayokaki ete Davidi alongi mampinga nyonso ya Adadezeri,
10 he sent his son Joram to King David to greet and congratulate him for fighting and defeating Hadadezer, who had been at war with Toi. Joram brought items of silver, gold, and bronze. atindaki Yorami, mwana na ye ya mobali, kopesa mokonzi Davidi mbote mpe longonya mpo ete abundisaki mpe alongaki Adadezeri oyo azalaki monguna ya Toyi. Yorami amemelaki Davidi biloko ya palata, ya wolo mpe ya bronze.
11 King David dedicated these also to our Father with the silver and gold he had dedicated from all the nations he subdued, Mokonzi Davidi abulisaki biloko yango lokola likabo epai na Yawe ndenge asalaki na palata mpe na wolo oyo ewutaki na bikolo nyonso oyo abotolaki,
12 from Aram, Moab, the Ammonites, the Philistines, Amalek, and the plunder of Hadadezer son of Rehob, king of Zobah. na Arami, na Moabi, na Amoni, na Filisitia mpe na Amaleki. Abulisaki mpe bomengo ya bitumba oyo abotolaki epai ya Adadezeri, mwana mobali ya Reobi, mokonzi ya Tsoba.
13 David made a name for himself returning from striking down 18,000 Edomites in the Valley of Salt. Davidi akomaki moto ya lokumu tango awutaki koboma bato ya Siri nkoto zomi na mwambe, kati na Lubwaku ya Mungwa.
14 He put garrisons throughout Edom—in all Edom he placed garrisons—and all the Edomites became servants to David. Our Father gave David victory wherever he went. Atiaki bayangeli kati na Edomi ; ezali kati na Edomi mobimba nde atiaki bayangeli, mpe bato nyonso ya Edomi bakomaki bawumbu ya Davidi. Yawe apesaki Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.
15 So David reigned over all Israel, administering justice and righteousness for all his people. Davidi azalaki mokonzi ya Isalaele mobimba, azalaki kosalela bato na ye nyonso makambo ya sembo mpe ya alima.
16 Joab son of Zeruiah commanded the army; Jehoshaphat son of Ahilud was the court recorder; Joabi, mwana mobali ya Tseruya, azalaki mokonzi ya liboso ya mampinga ; Jozafati, mwana mobali ya Ayiludi, azalaki mobombi mikanda ;
17 Zadok son of Ahitub and Ahimelech son of Abiathar were priests; Seraiah was the court secretary; Tsadoki, mwana mobali ya Ayitubi, mpe Ayimeleki, mwana mobali ya Abiatari, bazalaki Banganga-Nzambe ; Tseraya azalaki mokomi mikanda ;
18 Benaiah son of Jehoiada commanded the Kerethites and the Pelethites; and David's sons were priests. Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki kokamba bato ya Kereti mpe ya Peleti ; mpe bana mibali ya Davidi bazalaki Banganga-Nzambe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]