Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Samuel 10 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Later, the king of the Ammonites died, and his son Hanun became king in his place. Sima na mwa tango, mokonzi ya bato ya Amoni akufaki, mpe mwana na ye ya mobali, Anuni, akitanaki na ye na bokonzi.
2 David said, "I'll show kindness to Hanun son of Nahash, as his father showed kindness to me." So he sent servants to console him over his father's death. But when David's servants reached Ammonite territory, Davidi amilobelaki : « Nakotalisa bolamu epai ya Anuni, mwana mobali ya Naashi, ndenge kaka tata na ye atalisaki ngai bolamu. » Boye Davidi atindaki bato mpo na kobondisa ye na tina na kufa ya tata na ye. Tango basali ya Davidi bakomaki na mokili ya bato ya Amoni,
3 the Ammonite commanders told Hanun their lord, "Do you really think David honors your father by sending you men to console you? Hasn't David sent his servants to you to explore the city, spy it out, and overthrow it?" bakambi ya bato ya Amoni balobaki na Anuni, mokonzi na bango : « Okanisi ete ezali mpo na kopesa tata na yo lokumu nde Davidi atindi bato mpo na kobondisa yo ? Ezali mpo na kononga engumba mpe kobebisa yango nde Davidi atindi bango epai na yo ? »
4 Hanun seized David's servants, shaved half of each man's beard, cut their garments off at the hips, and sent them away. Boye, Anuni akangaki basali ya Davidi, akataki bango kati-kati ya mandefu, akataki bango bilamba kino na loketo mpe abenganaki bango.
5 When David was told, he sent messengers to meet them, since the men were deeply ashamed. The king said, "Stay in Jericho till your beards regrow, then return." Tango bayebisaki Davidi likambo yango, atindaki bato mosusu mpo na kokende kokutana na bato wana, pamba te basambwisaki bango makasi. Mokonzi atindelaki bango maloba oyo : « Bovanda na Jeriko kino mandefu na bino ekobota lisusu, sima nde bokozonga. »
6 Seeing they had become a stench to David, the Ammonites sent and hired the Arameans of Beth-rehob and the Arameans of Zobah—20,000 foot soldiers—the king of Maacah with 1,000 men, and the men of Tob with 12,000 men. Tango bato ya Amoni basosolaki ete bamikomisi bato mabe na miso ya Davidi, bakotisaki bato ya sika na mosala ya soda, oyo bakobanda kobunda bitumba na makolo : epai ya bato ya Siri ya Beti-Reobi mpe ya Tsoba, bato nkoto tuku mibale ; epai ya mokonzi ya Maaka, bato nkoto moko ; epai ya mokonzi ya Tobi, bato nkoto zomi na mibale.
7 On hearing this, David sent Joab with the entire army of fighting men. Tango kaka Davidi ayokaki bongo, atindaki Joabi elongo na mampinga nyonso ya basoda ya mpiko.
8 The Ammonites came out and formed battle lines at the entrance to the city gate, while the Arameans of Zobah and Rehob and the men of Tob and Maacah stood apart in the open field. Bato ya Amoni babimaki mpe batandamaki na milongo mpo na bitumba, na ekuke ya engumba mokonzi na bango. Na tango wana, bato ya Siri ya Tsoba mpe ya Reobi elongo na basoda ya Tobi mpe Maaka bazalaki na esika mosusu, kati na zamba.
9 Joab saw that the battle lines faced him on both front and back, so he chose some of Israel's best and lined them up against the Arameans. Tango Joabi amonaki ete milongo ya bitumba ezali na liboso mpe na sima na ye, aponaki basoda ya Isalaele oyo baleki na mpiko, mpe atiaki bango na milongo mpo na kobundisa bato ya Siri.
10 He put the rest under his brother Abishai's command, to line up against the Ammonites. Atiaki basoda oyo batikalaki na se ya bokonzi ya ndeko na ye ya mobali, Abishayi ; mpe atandaki bango na milongo ya bitumba mpo na kobundisa bato ya Amoni.
11 Joab said, "If Aram overpowers me, rescue me; if the Ammonites overpower you, I'll rescue you. Joabi alobaki : « Soki bato ya Siri baleki ngai na makasi, yo okoya kosunga ngai ; kasi soki bato ya Amoni baleki yo na makasi, wana ngai nakoya kosunga yo.
12 Be strong, let's be courageous for our people and our Father's cities. May our Father do what seems good to him." Yika mpiko, mpe tobunda lokola bilombe mpo na bato na biso mpe mpo na bingumba ya Nzambe na biso. Tika ete Yawe asala oyo ezali malamu na miso na Ye. »
13 Then Joab and the troops with him advanced to fight the Arameans, and they fled before him. Bongo Joabi mpe basoda oyo bazalaki elongo na ye bapusanaki mpo na kobundisa bato ya Siri ; mpe bato yango ya Siri bakimaki liboso na ye.
14 When the Ammonites saw the Arameans flee, they too fled before Abishai and entered the city. So Joab withdrew from the Ammonites and came to Jerusalem. Tango bato ya Amoni bamonaki bato ya Siri kokima, bango mpe bakimaki liboso ya Abishayi mpe bazongaki kati na engumba. Bongo, sima na Joabi kowuta kobundisa bato ya Amoni, azongaki na Yelusalemi.
15 When the Arameans saw that they had been routed by Israel, they regrouped. Tango bato ya Siri bamonaki ete Isalaele alongi bango, basanganaki.
16 Hadadezer summoned the Arameans beyond the Euphrates; they came to Helam, with Shobach, commander of Hadadezer's army, leading them. Adadezeri atindaki bantoma kobenga bato ya Siri oyo bazalaki na ngambo mosusu ya ebale. Mpe bayaki na Elami. Tsobaki, mokonzi ya mampinga ya Adadezeri, azalaki liboso na bango.
17 When David heard, he gathered all Israel, crossed the Jordan, and reached Helam. The Arameans lined up against David and fought him. Tango Davidi azwaki sango yango, asangisaki bato nyonso ya Isalaele, akatisaki Yordani mpe akomaki na Elami. Bato ya Siri basalaki milongo liboso ya Davidi mpe babundisaki ye.
18 But the Arameans fled before Israel. David killed 700 of their charioteers and 40,000 horsemen, then struck down Shobach, their army commander, who died there. Kasi bato ya Siri bakimaki liboso ya Isalaele, mpe Davidi abomaki bampunda nkama sambo oyo ezalaki komema bashar mpe basoda nkoto tuku minei oyo babundaka bitumba na likolo ya bampunda. Davidi abetaki mpe Tsobaki, mokonzi na bango ya mampinga, mpe akufaki wana.
19 When all Hadadezer's vassal kings saw they were defeated by Israel, they made peace with Israel and served them. So the Arameans were afraid to help the Ammonites again. Tango bakonzi nyonso oyo bazalaki na se ya bokonzi ya Adadezeri bamonaki ete Isalaele alongi bango, basalaki kimia elongo na bato ya Isalaele mpe bakomaki kosalela Isalaele. Bongo bato ya Siri bakomaki kobanga kosunga bato ya Amoni.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]