Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Samuel 11 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 At spring, when kings march out to war, David sent Joab, his men, and all Israel. They destroyed the Ammonites and besieged Rabbah. But David stayed in Jerusalem. Na mobu oyo elandaki, na tango oyo bakonzi bazalaka na momesano ya kokende na bitumba, Davidi atindaki Joabi elongo na basali na ye mpe mampinga nyonso ya Isalaele. Babomaki bato ya Amoni mpe bazingelaki Raba. Kasi Davidi atikalaki na Yelusalemi.
2 One evening David got up from his bed and walked on the roof of the king's house. From there he saw a woman bathing; she was very beautiful. Mokolo moko na pokwa, Davidi alamukaki wuta na mbeto na ye mpe atambolaki na veranda ya likolo ya ndako ya mokonzi. Wuta na likolo ya veranda, amonaki mwasi moko azali kosukola. Mwasi yango azalaki kitoko makasi.
3 David sent to ask about the woman. Someone said, "Isn't this Bathsheba, daughter of Eliam, wife of Uriah the Hittite?" Davidi atindaki moto moko kokende koluka koyeba soki mwasi yango azali nani. Moto yango alobaki : « Ezali Batisheba, mwana mwasi ya Eliami, mwasi ya Iri, moto ya Iti. »
4 David sent messengers and took her. She came to him, and he slept with her—she had just purified herself from her uncleanness—and she returned home. Davidi atindaki bantoma mpo na kozwa ye. Batisheba ayaki epai ya Davidi, mpe Davidi asangisaki na ye nzoto. Sima na ye komipetola na mbindo na ye, Batisheba azongaki na ndako na ye.
5 The woman conceived, and she sent word to David: "I am pregnant." Akomaki na zemi, mpe atindaki maloba epai ya Davidi : « Nazali na zemi. »
6 David sent word to Joab: "Send me Uriah the Hittite." Joab sent Uriah to David. Davidi atindaki maloba epai ya Joabi : « Tindela ngai Iri, moto ya Iti. » Joabi atindaki Iri epai ya Davidi.
7 When Uriah came to him, David asked about Joab, the troops, and how the war was going. Tango Iri akomaki epai na ye, Davidi atunaki ye soki Joabi azali malamu, soki basoda bazali malamu mpe soki bitumba ezali koleka ndenge nini.
8 David told Uriah, "Go down to your house and wash your feet." Uriah left the palace, and the king sent a gift after him. Bongo Davidi alobaki na Iri : « Kende na ndako na yo mpe sukola makolo na yo. » Iri atikaki ndako ya mokonzi ; mpe sima na ye, mokonzi atindelaki ye kado.
9 Uriah slept at the entrance of the king's house with all his lord's servants, and did not go down to his house. Kasi Iri alalaki na ekotelo ya ndako ya mokonzi elongo na basali nyonso ya mokonzi na ye ; akendeki te na ndako na ye.
10 Told that Uriah had not gone home, David asked him, "Haven't you come from a journey? Why didn't you go home?" Tango bayebisaki Davidi ete Iri akendeki na ndako te, atunaki ye : — Boni, yo owuti mosika te ? Mpo na nini oboyi kozonga na ndako na yo ?
11 Uriah said to David, "The ark, Israel, and Judah are staying in tents, and my lord Joab and my lord's men are camped in the open field. Should I go home to eat, drink, and sleep with my wife? As you live, and as your soul lives, I won't do this." Iri azongiselaki Davidi : — Sanduku, Isalaele mpe Yuda bazali kovanda na bandako ya kapo ; mpe Joabi, nkolo na ngai, elongo na bato na ye bazali kolala libanda kati na zamba. Ndenge nini ngai nakende na ndako na ngai mpo na kolia, komela mpe kolala na mwasi na ngai ? Solo, na kombo na yo mokonzi, nakoki kosala likambo ya boye te.
12 David told Uriah, "Stay here today too, and tomorrow I'll send you back." So Uriah stayed in Jerusalem that day and the next. Davidi alobaki na Iri : — Vanda lisusu awa lelo, bongo lobi nakozongisa yo. Iri avandaki na Yelusalemi mokolo wana mpe mokolo oyo elandaki.
13 David invited him, and he ate and drank with him, and David got him drunk. But that evening Uriah went out to sleep on his mat with his lord's servants; he did not go home. Davidi abengisaki ye. Iri aliaki mpe amelaki elongo na ye, mpe Davidi alangwisaki ye. Kasi na pokwa, Uri abimaki mpo na kokende kolala na mbeto na ye elongo na basali ya mokonzi, kasi akendeki na ndako na ye te.
14 In the morning David wrote a letter to Joab and gave it to Uriah to deliver. Na tongo, Davidi akomelaki Joabi mokanda mpe atindaki yango na nzela ya Iri.
15 He wrote in the letter: "Put Uriah at the front where the fighting is fiercest, then pull back from him, so he's struck down and dies." Kati na mokanda yango, akomaki boye : « Tia Iri na molongo ya liboso, na esika oyo bitumba ezali makasi. Mpe bino, bozonga sima na ye mpo ete babeta ye mpe akufa. »
16 While Joab besieged the city, he stationed Uriah where he knew the strongest defenders were. Joabi oyo azalaki kokengela engumba, atiaki Iri na esika oyo ayebaki ete ezali penza na basoda ya mpiko.
17 The city's men came out and fought Joab, and some of David's servants fell. Uriah the Hittite also died. Bongo tango bato ya engumba babimaki mpo na kobundisa Joabi, ndambo ya basoda kati na mampinga ya Davidi bakufaki ; Iri, moto ya Iti, mpe akufaki.
18 Then Joab sent word and told David all the news of the battle. Joabi atindelaki Davidi sango nyonso ya bitumba.
19 He instructed the messenger, "When you have finished telling the king all the news of the battle, Apesaki mitindo oyo epai ya ntoma : « Tango okosilisa kopesa sango ya bitumba epai ya mokonzi,
20 if the king's anger flares up and he asks, 'Why did you fight so close to the city? Didn't you know they'd shoot from the wall? mokonzi akoki kotomboka mpe kotuna yo : ‹ Mpo na nini bopusanaki makasi pembeni ya engumba mpo na kobunda ? Boyebaki te ete bakokaki kobeta batolotolo wuta na mir ?
21 Who killed Abimelech son of Jerubbesheth? Didn't a woman throw an upper millstone on him from the wall so he died at Thebez? Why did you go so near the wall?'—then say, Your servant Uriah the Hittite is also dead." Nani abomaki Abimeleki, mwana mobali ya Yerubesheti ? Ezalaki te mwasi oyo, wuta na likolo ya mir, abwakelaki ye libanga oyo banikelaka ble, yango wana akufaki na Tebesi ? Mpo na nini bopusanaki pembeni ya mir ? › Soki atuni yo bongo, loba na ye : ‹ Mosali na yo, Iri, moto ya Iti, mpe akufi. › »
22 So the messenger set out, arrived, and told David all Joab had sent him to say. Motindami akendeki, mpe tango akomaki, ayebisaki Davidi makambo nyonso oyo Joabi atindaki ye koloba.
23 The messenger told David, "The men overpowered us and came out against us in the field, but we drove them back to the gate entrance. Alobaki na Davidi : — Bato yango bazalaki makasi koleka biso, bayaki kobundisa biso na libanda, mpe tobenganaki bango kino na ekotelo ya engumba.
24 The archers shot at your servants from the wall, and some of the king's servants died. Your servant Uriah the Hittite is dead too." Bongo basoda oyo babundaka na batolotolo babetaki na batolotolo na bango basali na yo wuta na likolo ya mir. Ndambo ya bato ya mokonzi bakufaki, ezala mosali na yo, Iri, moto ya Iti, mpe akufaki.
25 David told the messenger, "Tell Joab: 'Don't let this trouble you, for the sword devours one as well as another. Attack the city harder and destroy it.' Encourage him." Davidi alobaki na ntoma : — Tala makambo oyo okoloba na Joabi : « Tika ete likambo oyo etungisa yo te. Mopanga ekoki koboma songolo to pakala. Sala makasi mpo na kobundisa engumba mpe bebisa yango. » Loba makambo oyo mpo na kolendisa Joabi.
26 When the wife of Uriah heard that Uriah her husband was dead, she mourned for her husband. Tango mwasi ya Iri ayokaki ete mobali na ye akufi, asalelaki ye matanga.
27 When the mourning ended, David sent for her, brought her home, and she became his wife and bore him a son. But what David had done was evil in the eyes of our Father. Sima na matanga, Davidi abengisaki mwasi ya Uri kati na ndako na ye mpe akomisaki ye mwasi na ye. Mwasi yango abotelaki Davidi mwana mobali. Kasi likambo oyo Davidi asalaki esepelisaki Yawe te.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]