Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Samuel 12 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Our Father sent Nathan to David. He came and said, "Two men lived in a certain city, one rich, one poor. Yawe atindaki Natan epai ya Davidi. Tango akomaki epai ya Davidi, alobaki na ye : « Ezalaki na bato mibale kati na engumba moko : moko kati na bango azalaki mozwi ; mpe mosusu, mobola.
2 The rich man had very many flocks and herds, Mozwi azalaki na bameme mpe bangombe ebele,
3 but the poor man had only one little ewe lamb he had bought. He raised it, and it grew up with him and his children. It ate from his plate, drank from his cup, lay in his arms; it was like a daughter to him. kasi mobola azalaki na eloko te longola kaka mwa mwana meme moko ya mwasi oyo asombaki. Abokolaki yango mpe ekolaki epai na ye elongo na bana na ye. Mpate yango ezalaki kolia bilei na sani moko, komela mayi na kopo moko na nkolo na yango mpe kolala na maboko na ye. Ezalaki lokola mwana na ye ya mwasi.
4 A traveler came to the rich man, but he would not take from his own flock or herd to feed the guest who had come. So he took the poor man's ewe lamb and prepared it for the man who had come to him." Mokolo moko, mopaya moko ayaki epai ya mozwi, kasi mozwi aboyaki kozwa meme moko kati na bameme na ye to ngombe moko kati na bangombe na ye mpo na kolamba yango mpo na mopaya oyo ayaki epai na ye ; azwaki kaka mwa mwana meme ya mwasi ya mobola mpe alambaki yango mpo na mopaya oyo ayaki epai na ye. »
5 David burned with great anger at the man and told Nathan, "As our Father lives, the man who did this deserves to die! Davidi asilikelaki mozwi makasi mpe alobaki na Natan : — Na Kombo na Yawe, moto oyo asali boye asengeli na kufa !
6 He must repay the lamb four times over, because he did this and had no pity." Asengeli kofuta mwa mwana meme yango mbala minei, pamba te azalaki na mawa te ya kosala likambo ya boye.
7 Then Nathan said to David, "You are the man! This is what our Father, the God of Israel, says: I anointed you king over Israel, and I rescued you from Saul's power. Natan alobaki na Davidi : — Moto yango ezali nde yo ! Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Napakolaki yo mafuta mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele mpe nakangolaki yo na maboko ya Saulo ;
8 "I gave you your master's house and his wives into your arms, and the house of Israel and Judah. And had this been too little, I would have given you much more. nakabaki na maboko na yo ndako ya nkolo na yo, Saulo, mpe basi na ye ; napesaki yo libota ya Isalaele mpe libota ya Yuda. Bongo soki nyonso wana ezalaki moke koleka, nalingaki kobakisela yo lisusu ebele koleka.
9 Why have you despised my word, doing evil in my sight? You struck Uriah the Hittite with the sword, took his wife as your own, and killed him with the sword of the Ammonites. Mpo na nini otioli Liloba na Yawe na kosala makambo oyo ezali mabe na miso na Ye ? Obomisi Iri, moto ya Iti, na mopanga mpe ozwi mwasi na ye mpo ete akoma mwasi na yo. Obomisi ye na mopanga ya bato ya Amoni.
10 So now the sword will never leave your house, because you despised me and took the wife of Uriah the Hittite as your own. Mpo na yango, mopanga ekolongwa lisusu te na ndako na yo, pamba te otioli ngai mpe ozwi mwasi ya Iri, moto ya Iti, mpo ete akoma mwasi na yo.
11 This is what our Father says: I will bring disaster on you from your own house. Before your eyes I will take your wives, give them to a man close to you, and he will lie with them in broad daylight. Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nakoyeisa pasi epai na yo wuta na ndako na yo moko ; na miso na yo, nakokamata basi na yo mpe nakopesa bango na moko kati na baninga na yo, oyo akosangisa na bango nzoto na moyi makasi.
12 You did this in secret, but I will do this thing before all Israel, in broad daylight." Osalaki yango na nkuku, kasi ngai nakosala likambo oyo na moyi mpe na miso ya Isalaele mobimba. › »
13 David told Nathan, "I have sinned against our Father." Nathan replied, "Our Father has also removed your sin; you will not die." Davidi alobaki na Natan : — Solo, nasalaki masumu epai na Yawe. Natan azongisaki : — Yawe alongoli masumu na yo ; okokufa te.
14 But because you have shown deep contempt for our Father by this deed, the son born to you will die. Kasi lokola na likambo oyo yo osali, opesi na banguna ya Yawe nzela ya kofinga Ye, mwana oyo bakobotela yo akokufa.
15 Then Nathan went home. And our Father struck the child Uriah's wife had borne to David, and he became gravely ill. Sima na yango, Natan azongaki na ndako na ye. Yawe abetaki mwana oyo mwasi ya Iri abotelaki Davidi, mpe mwana yango akomaki kobela.
16 David pleaded with our Father for the boy. He fasted, went in, and spent the nights lying on the ground. Davidi abondelaki Nzambe mpo na mwana, akilaki bilei, akotaki na ndako na ye mpe akomaki kolala na mabele babutu nyonso.
17 The elders of his household stood beside him to lift him from the ground, but he refused and would not eat with them. Bakambi ya ndako na ye bayaki kotelema pembeni na ye mpo na kotelemisa ye wuta na mabele, kasi aboyaki mpe andimaki te kolia bilei elongo na bango.
18 On the seventh day the child died. David's servants feared telling him the child was dead, for they said, "While the child lived, we spoke to him and he wouldn't listen. How can we say the child is dead? He may harm himself." Na mokolo ya sambo, mwana akufaki. Basali ya Davidi babangaki koyebisa ye ete mwana akufi, pamba te bazalaki komilobela : « Wana mwana azalaki nanu na bomoi, tango tolobaki na Davidi, ayokaki biso te. Awa sik’oyo mwana akufi, tokoloba na ye ndenge nini ? Soki toyebisi ye sik’oyo ete mwana akufi, akoki kosala likambo moko ya mabe ! »
19 But David saw his servants whispering and realized the child was dead. So he asked, "Is the child dead?" "He is dead," they said. Davidi amonaki basali na ye koloba na se se kati na bango, mpe asosolaki ete mwana akufi. Atunaki : — Boni, mwana akufi ? Bazongisaki : — Iyo, akufi.
20 David got up from the ground, washed, put on oil, and changed his clothes. He went into the house of our Father and worshiped, then went home, and at his request they set food before him, and he ate. Bongo Davidi atelemaki wuta na mabele, amisukolaki nzoto, amipakolaki malasi, alataki bilamba mosusu, akotaki na Tempelo ya Yawe mpe agumbamaki mpo na kosambela. Sima, azongaki na ndako na ye, asengaki bilei mpe aliaki.
21 His servants said, "What is this you have done? While the child lived, you fasted and wept; now that he's dead, you get up and eat." Basali na ye batunaki : — Mpo na nini ozali kosala boye ? Wana mwana azalaki na bomoi, ozalaki komilalisa nzala mpe ozalaki kolela ; awa sik’oyo mwana akufi, otelemi mpe okomi kolia !
22 He said, "While the child lived, I fasted and wept, thinking, 'Who knows? Our Father may be gracious to me and let the child live.' Azongisaki : — Solo, wana mwana azalaki nanu na bomoi, nazalaki kokila bilei mpe kolela, pamba te nazalaki komilobela : « Nani ayebi ? Tango mosusu Yawe akosalela ngai ngolu mpe akotika mwana na bomoi ! »
23 But now he is dead. Why should I fast? Can I bring him back again? I will go to him, but he won't return to me." Kasi lokola sik’oyo akufi, mpo na nini nakila bilei ? Boni, nakoki kozongisa ye lisusu na bomoi ? Ngai nde nakokende epai na ye, kasi ye akozonga epai na ngai te.
24 Then David comforted his wife Bathsheba. He went to her and slept with her, and she bore a son. He named him Solomon. Our Father loved him, Bongo Davidi abondisaki mwasi na ye, Batisheba ; akendeki epai na ye mpe asangisaki na ye nzoto. Batisheba abotelaki ye lisusu mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Salomo. » Yawe alingaki ye
25 and he sent word by Nathan the prophet, who named him Jedidiah, for our Father's sake. mpe atindaki maloba na nzela ya mosakoli Natan ete bapesa ye kombo « Yedidia, » pamba te Yawe alingaki ye.
26 Meanwhile Joab fought against Rabbah of the Ammonites and captured the royal city. Joabi abundisaki engumba Raba ya bato ya Amoni mpe abotolaki mboka mokonzi.
27 Joab sent messengers to David: "I have fought Rabbah and captured its water supply. Joabi atindaki bantoma koloba na Davidi : « Nabundisi Raba mpe nabotoli eteni ya mabele epai wapi mayi ezali.
28 Now gather the rest of the army, lay siege to the city, and take it. Otherwise I will take it, and it will be named after me." Sik’oyo, sangisa basoda oyo batikali, bozingela engumba Raba mpe bokamata yango ; soki te nakokamata yango ngai moko, mpe kombo na ngai ekosakolama kuna. »
29 David gathered the whole army, marched on Rabbah, attacked it, and took it. Davidi asangisaki mampinga nyonso mpe akendeki na Raba, abundisaki mpe akamataki yango.
30 He took the crown from their king's head—about seventy-five pounds of gold set with a precious stone—and it went on David's head. He carried off great plunder from the city. Alongolaki motole oyo ezalaki na moto ya mokonzi na yango. Motole yango esalemaki na bakilo ya wolo koleka tuku misato mpe ezalaki na libanga ya talo na likolo na yango. Wuta na tango wana, ekomaki na moto ya Davidi. Akamataki bomengo ebele ya bitumba kati na engumba yango.
31 He brought out the people there and set them to work with saws, iron picks, and iron axes, and put them to labor at the brick kilns. So he did to all the Ammonite cities. Then David and all the army returned to Jerusalem. Amemaki na bowumbu bato oyo bazalaki kuna, atiaki bango na misala oyo basalaka na si, na piki mpe na epasola ; atiaki bango mpe na mosala ya kosala babiliki. Davidi asalaki ndenge wana na bavandi ya bingumba nyonso ya bato ya Amoni. Bongo azongaki na Yelusalemi elongo na mampinga na ye nyonso.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]