Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Samuel 13 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 After this, Absalom son of David had a beautiful sister named Tamar, and David's son Amnon loved her. Abisalomi, mwana mobali ya Davidi, azalaki na ndeko moko ya mwasi ya kitoko makasi ; kombo na ye ezalaki « Tamari. » Aminoni, mwana mobali mosusu ya Davidi, akomaki kolinga ye ndenge mwasi mpe mobali balinganaka.
2 Amnon was so distressed over his sister Tamar he made himself sick; she was a virgin, and he saw no way to get near her. Aminoni atungisamaki makasi na motema kino abelaki maladi ya bolingo likolo ya Tamari, ndeko na ye ya mwasi ; pamba te ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe ekokaki kosalema te ete Aminoni abenga ye mpo na kosolola.
3 Amnon had a friend named Jonadab, son of David's brother Shimeah; Jonadab was very shrewd. Nzokande Aminoni azalaki na moninga na ye moko ya mobali ; kombo na ye ezalaki « Yonadabi, » mwana mobali ya Shimea, ndeko mobali ya Davidi. Yonadabi azalaki na mayele mabe mingi.
4 He asked Amnon, "Why so haggard morning after morning, son of the king? Won't you tell me?" Amnon said, "I love Tamar, sister of my brother Absalom." Atunaki Aminoni : — Mpo na nini yo mwana mobali ya mokonzi ozalaka tango nyonso mawa-mawa boye ? Okoki koyebisa ngai te mpo na nini ozalaka bongo ? Aminoni alobaki na ye : — Nalingaka Tamari, ndeko mwasi ya Abisalomi, ndeko na ngai ya mobali.
5 "Lie in bed and act sick," Jonadab said. "When your father comes to see you, tell him, 'Please let my sister Tamar feed me. Let her make the meal where I can watch, so I eat from her hand.'" Yonadabi alobaki na ye : — Oh, sala boye : « Kende na mbeto mpe kosana kobela. Tango tata na yo akoya kotala yo, okoloba na ye : ‹ Nalingi ete Tamari, ndeko na ngai ya mwasi, aya kopesa ngai eloko ya kolia. Tika ete alamba biloko na miso na ngai mpo ete namona ye mpe nakoka kolia na loboko na ye. › »
6 Amnon lay down and faked illness. When the king came to see him, Amnon said, "Let my sister Tamar come make two cakes for me to watch, so I can eat from her hand." Aminoni amitandaki na mbeto mpe akosanaki kobela. Tango mokonzi ayaki mpo na kotala ye, Aminoni alobaki na ye : « Nalingi ete Tamari, ndeko na ngai ya mwasi, aya kolambela ngai na miso na ngai bagalete mibale ya kitoko mpo ete nakoka kolia yango na loboko na ye. »
7 David sent word to Tamar at the palace: "Go to your brother Amnon's house and make him food." Davidi atindaki maloba epai ya Tamari oyo azalaki kati na shambre na ye : « Kende na ndako ya Aminoni, ndeko na yo ya mobali, mpe lambela ye biloko. »
8 Tamar went to her brother Amnon's house, where he lay. She took dough, kneaded it, shaped cakes in front of him, and baked them. Boye Tamari akendeki na ndako ya Aminoni, ndeko na ye ya mobali, oyo azalaki ya kolala. Akamataki farine, asangisaki yango, asalaki bagalete na miso na ye mpe atumbaki yango.
9 She took the pan and served him, but he refused to eat. "Send everyone out," Amnon said. So everyone left him. Alongolaki yango na kikalungu mpe apesaki yango na Aminoni, kasi Aminoni aboyaki kolia. Aminoni alobaki : — Bimisa bato nyonso libanda. Bato nyonso babimaki.
10 Amnon told Tamar, "Bring the food into the bedroom, so I may eat from your hand." Tamar took the cakes she had made and brought them to her brother Amnon in the bedroom. Aminoni alobaki na Tamari : — Memela ngai biloko ya kolia awa kati na shambre na ngai ya kolala mpo ete nalia yango wuta na loboko na yo. Tamari azwaki bagalete oyo asalaki mpe amemaki yango epai ya Aminoni, ndeko na ye ya mobali, kati na shambre na ye ya kolala.
11 As she brought them near to eat, he grabbed her: "Come, sleep with me, my sister." Tango kaka Tamari asembolaki loboko epai ya Aminoni mpo na koleisa ye galeti, Aminoni akangaki ye na nzoto mpe alobaki na ye : — Yaka kolala elongo na ngai, ndeko na ngai ya mwasi.
12 "No, my brother!" she said. "Don't force me. Such a thing is never done in Israel. Don't do this disgraceful thing. Tamari alobaki na ye : — Te, ndeko na ngai ya mobali ! Kosangisa na ngai nzoto na makasi te. Likambo ya boye ekoki kosalema te kati na Isalaele ! Kosala bozoba ya boye te.
13 And I—where could I take my shame? And you—you'd be like one of Israel's contemptible fools. Please, speak to the king; he won't keep me from you." Ekosukela ngai ndenge nini ? Nakokende wapi na soni na ngai ? Mpe yo okozala ndenge nini ? Okokoma lokola moto ya liboma kati na Isalaele ! Nabondeli yo, loba na mokonzi, pamba te akoboya te ete obala ngai.
14 But he refused to listen; being stronger than she, he forced her and had relations with her. Kasi Aminoni aboyaki koyoka ye ; mpe lokola alekaki Tamari na makasi, azwaki ye na makasi mpe asangisaki na ye nzoto.
15 Then Amnon hated her with intense hatred—greater than the love he had felt for her. "Get up and get out!" he said to her. Sima na yango, Aminoni ayinaki Tamari makasi, ayinaki ye penza makasi koleka ndenge azalaki kolinga ye. Aminoni alobaki na Tamari : — Telema mpe bima !
16 "No," she said, "sending me away is a worse wrong than what you already did to me." But he refused to listen. Tamari azongiselaki ye : — Te, kobengana ngai ezali mabe makasi koleka ata makambo oyo owuti kosala ngai ! Kasi Aminoni aboyaki koyoka ye.
17 He called his attendant and said, "Get this woman out of here, and bolt the door behind her." Abengaki mosali na ye mpe alobaki : « Bimisa elenge mwasi oyo na libanda mpe kanga ekuke na bibende sima na ye. »
18 She wore a long decorated robe, the dress of the king's virgin daughters back then. His attendant put her out and bolted the door behind her. Mosali abimisaki Tamari na libanda mpe akangaki ekuke na bibende sima na ye. Tamari alataki nzambala moko ya kitoko, pamba te ezalaki lolenge ya bilamba oyo bana basi ya mokonzi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te bazalaki kolata.
19 Tamar put ashes on her head and tore the long ornamented robe she wore. She put her hand on her head and went off, crying aloud as she went. Tamari atiaki putulu na moto na ye mpe apasolaki nzambala na ye ya kitoko oyo alataki. Atiaki maboko na ye na moto mpe, wana azalaki kokende, azalaki kolela na mongongo makasi.
20 Her brother Absalom said, "Has Amnon your brother been with you? Stay quiet now, my sister; he is your brother. Don't take this to heart." So Tamar lived as a desolate woman in her brother Absalom's house. Abisalomi, ndeko na ye ya mobali, atunaki ye : « Boni, Aminoni, ndeko na yo ya mobali, azalaki elongo na yo ? Sik’oyo, ndeko na ngai ya mwasi, kolobela yango te ; azali ndeko na yo ya mobali. Kotia likambo oyo na motema te ! » Tamari avandaki kati na ndako ya Abisalomi, ndeko na ye ya mobali, lokola mwasi basundola.
21 When King David heard all about this, he was furious. Tango mokonzi Davidi ayokaki makambo oyo nyonso, asilikaki makasi.
22 Absalom said nothing to Amnon, good or bad, for he hated him for violating his sister Tamar. Abisalomi alobaki ata liloba moko te epai ya Aminoni, ndeko na ye ya mobali, ezala ya malamu to ya mabe, pamba te ayinaki Aminoni mpo ete asambwisaki Tamari, ndeko na ye ya mwasi.
23 Two full years later Absalom had sheepshearers at Baal-hazor near Ephraim, and invited all the king's sons. Sima na mibu mibale, lokola Abisalomi azalaki na basali oyo bakataka bapwale ya bameme, na Bala-Atsori, pene ya mondelo ya Efrayimi, abengisaki bana mibali nyonso ya mokonzi.
24 Absalom went to the king: "Your servant has shearers. Will the king and his servants join me?" Abisalomi akendeki epai ya mokonzi mpe alobaki na ye : — Mosali na yo abengisi basali oyo bakataka bapwale ya bameme. Tika ete mokonzi mpe bakalaka na ye basepela koya kosangana na ngai, mosali na yo.
25 "No, my son," the king told Absalom, "we shouldn't all go, or we'd burden you." Though Absalom urged him, he would not go but blessed him. Mokonzi azongisaki : — Te, mwana na ngai, tokoki te kokende biso nyonso, noki te tokozala mokumba mpo na yo. Atako Abisalomi atungisaki ye, kasi mokonzi aboyaki kaka kokende, kasi apambolaki ye.
26 Absalom said, "If not, please let my brother Amnon come with us." "Why should he go with you?" the king asked. Abisalomi alobaki lisusu : — Nabondeli yo, pesa kaka nzela ete ata Aminoni, ndeko na ngai ya mobali, akende elongo na biso. Mokonzi atunaki ye : — Mpo na nini akende elongo na yo ?
27 But Absalom pressed him, so he let Amnon and all the king's sons go with him. Kasi Abisalomi akobaki kaka kotungisa ye, mpe mokonzi atindaki bana mibali mosusu ya mokonzi ete bakende elongo na Aminoni.
28 Absalom ordered his servants, "Watch carefully. When wine makes Amnon merry and I say, 'Strike Amnon down,' kill him. Don't be afraid. Haven't I commanded you myself? Be strong and brave." Abisalomi apesaki mitindo epai ya basali na ye : — Boyoka ! Tango Aminoni akolangwa masanga ya vino, soki nalobi na bino : « Bobeta Aminoni ; » wana boboma ye. Bobanga te, pamba te ezali ngai moko nde nakopesa mitindo oyo. Bozala makasi mpe boyika mpiko.
29 Absalom's servants did to Amnon as Absalom had ordered. Then all the king's sons rose, each mounted his mule, and fled. Basali ya Abisalomi basalaki Aminoni ndenge kaka Abisalomi atindaki bango. Bana mibali nyonso ya mokonzi batelemaki, bamataki na bamile na bango mpe bakimaki.
30 On the way, David heard: "Absalom has killed all the king's sons; not one is left." Wana bazalaki nanu na nzela, sango ekomaki epai ya Davidi : « Abisalomi abomi bana mibali nyonso ya mokonzi, moko te kati na bango atikali. »
31 The king stood, tore his clothes, and lay on the ground; all his servants stood by, clothes torn. Mokonzi atelemaki, apasolaki bilamba na ye mpe amitandaki na mabele. Bakalaka na ye nyonso batelemaki wana na bilamba epasuka.
32 But Jonadab son of Shimeah, David's brother, said: "My lord should not think they killed all the young men, the king's sons. Only Amnon is dead. Absalom intended this from the day Amnon violated his sister Tamar. Kasi Yonadabi, mwana mobali ya Shimea, ndeko mobali ya Davidi, alobaki : « Tika ete nkolo na ngai akanisa te ete babomi bana mibali nyonso ya mokonzi ! Ezali Aminoni kaka moto akufi, pamba te, wuta mokolo oyo Aminoni asangisaki na makasi nzoto na Tamari, ndeko na ye ya mwasi, Abisalomi azwaki mokano ya koboma ye.
33 My lord the king must not take it to heart, thinking all the king's sons are dead. Only Amnon is dead." Tika ete mokonzi, nkolo na ngai, amitungisa na ye te mpo na sango oyo asili koyoka, sango oyo ezali koloba ete bana mibali nyonso ya mokonzi bakufi ! Ezali Aminoni kaka moto akufi. »
34 Meanwhile Absalom had fled. The young watchman looked up and saw many people coming down the road on the hillside behind him. Na tango yango, Abisalomi akimaki. Nzokande tango mokengeli atalaki na mosika, amonaki bato ebele kokita na mopanzi ya ngomba, na nzela ya weste. Mokengeli akendeki koyebisa mokonzi : « Namoni bato na nzela ya Oronayimi, na mopanzi ya ngomba. »
35 Jonadab said to the king, "Look, the king's sons have come. It's just as your servant said." Yonadabi alobaki na mokonzi : — Tala ! Bana mibali ya mokonzi bazali koya ! Esalemi ndenge kaka mosali na yo alobaki.
36 As he finished speaking, the king's sons arrived weeping loudly; the king and all his servants also wept very bitterly. Tango kaka asilisaki koloba, bana mibali ya mokonzi bakotaki na kolela na mongongo makasi. Mokonzi mpe alelaki makasi elongo na basali na ye.
37 Absalom fled and went to Talmai son of Ammihud, king of Geshur. David mourned for his son day after day. Abisalomi akimaki mpe akendeki epai ya Talimayi, mwana mobali ya Amiwudi, mokonzi ya Geshuri. Kasi mokonzi Davidi asalaki mikolo nyonso matanga mpo na mwana na ye ya mobali.
38 After Absalom had fled and gone to Geshur, he stayed there three years. Abisalomi akimaki mpe akendeki na mboka Geshuri, avandaki kuna mibu misato.
39 And King David's heart longed to go to Absalom, for he had found comfort after Amnon's death. Mokonzi Davidi atikaki kolanda Abisalomi, pamba te amibondisaki na tina na kufa ya Aminoni.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]