Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Samuel 14 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Now Joab son of Zeruiah realized that the king's heart longed for Absalom. Joabi, mwana mobali ya Tseruya, asosolaki ete motema ya mokonzi ekomi na posa ya Abisalomi.
2 Joab sent to Tekoa and brought a wise woman from there. He told her, "Please pretend to mourn: wear mourning clothes, don't put on oil, and act like a woman who has mourned the dead many days. Boye, Joabi atindaki moto moko na mboka Tekoa, mpo na koluka mwasi moko ya bwanya mpe komema ye longwa kuna. Alobaki na ye : « Sala lokola moto oyo azali na matanga, lata bilamba ya matanga, kopakola mafuta te : sala lokola mwasi oyo alata pili wuta mikolo ebele mpo na kolela ebembe ;
3 Go to the king and speak these words to him." Joab put the words in her mouth. mpe kende epai ya mokonzi, yebisa ye maloba oyo. » Joabi ayebisaki maloba oyo asengelaki koloba.
4 The woman of Tekoa came to the king, fell facedown to the ground in homage, and said, "Help, king!" Tango mwasi ya mboka Tekoa akomaki epai ya mokonzi, agumbamaki elongi na ye kino na mabele mpe alobaki : — Oh mokonzi, sunga ngai !
5 The king asked her, "What's wrong?" She said, "I am a widow; my husband died. Mokonzi atunaki ye : — Eloko nini ezali kotungisa yo ? Azongisaki : — Nazali mwasi akufisa mobali ; mobali na ngai akufaki.
6 Your servant had two sons. They fought in the field, no one to stop them, and one killed the other. Ngai, mwasi mosali na yo, nazalaki na bana mibali mibale. Bango mibale baswanaki kati na bilanga, mpe moto moko te azalaki kuna mpo na kokabola bango. Moko abetaki mosusu mpe abomaki ye.
7 The whole clan has risen against your servant, saying, 'Hand over the one who struck his brother; we will put him to death for the brother he killed, and destroy the heir too.' They want to put out my last ember, leaving my husband no name or survivor on earth." Sik’oyo, libota mobimba etelemeli mwasi mosali na yo, bazali koloba : « Kaba na maboko na biso ye oyo abetaki ndeko na ye ya mobali mpo ete toboma ye mpo na bomoi ya ndeko na ye ya mobali oyo ye abomaki. Na nzela wana, tokolongola mokitani ya libula. » Na bongo, bakoki koboma mwa likala ya moto oyo natikali na yango mpe kozangisa mobali na ngai kombo mpe bakitani kati na mokili.
8 The king said to the woman, "Go home, and I will issue orders on your behalf." Mokonzi alobaki na mwasi : — Zonga na ndako na yo, nakopesa mitindo na tina na yo.
9 The woman of Tekoa said to the king, "My lord the king, let the guilt be on me and my father's house; may the king and his throne be innocent." Kasi mwasi ya mboka Tekoa alobaki na mokonzi : — Oh mokonzi, nkolo na ngai, tika ete ngambo ekweya na moto na ngai mpe na libota ya tata na ngai ; kasi tika ete mokonzi mpe kiti na ye ya bokonzi bazala mosika ya likambo oyo.
10 The king said, "Whoever speaks to you, bring him to me—he won't touch you again." Mokonzi alobaki na ye : — Soki moto moko ameki kotombokela yo, yaka na ye epai na ngai, mpe akozongela lisusu te kotungisa yo.
11 She said, "Please let the king remember your Father, so the avenger of blood adds no more to the bloodshed, and my son isn't destroyed." He said, "As our Father lives, not one hair of your son's head will fall to the ground." Mwasi alobaki : — Tika ete mokonzi alapa ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe na ye, ete akopekisa mobukanisi makila mpo ete akoba te kobebisa na koboma mwana na ngai ya mobali, oyo atikali. Mokonzi alobaki : — Na Kombo na Yawe, suki ata moko te ya moto ya mwana na yo ya mobali ekokweya na mabele.
12 The woman said, "Please let your servant speak a word to my lord the king." He said, "Speak." Mwasi yango alobaki : — Tika ete mwasi mosali na yo aloba likambo moko epai ya mokonzi, nkolo na ngai. Mokonzi azongisaki : — Loba !
13 The woman said, "Why then have you planned this against the people of our Father? In saying this, the king condemns himself, since he hasn't brought back his own banished one. Mwasi alobaki : — Mpo na nini osali mabongisi ya boye mpo na kotelemela bato ya Nzambe ? Wana mokonzi abimisi maloba oyo, ye moko azali komikweyisa te mpo ete azongisi te mwana mobali oyo akimaki na mboka ya bapaya ?
14 We will surely die, like water spilled on the ground that can't be gathered again. But our Father doesn't take life—he plans ways so the banished aren't kept from him. Solo, ndenge bakokaka te kolokota mayi oyo esili kosopana, ndenge mpe biso tosengeli kokufa. Kasi sik’oyo, ezali te mokano ya Nzambe mpo na Abisalomi, pamba te asalaki mabongisi mpo ete moto oyo abungi nzela awumela te mosika na Ye.
15 Now I've come to say this to my lord the king because the people frightened me. Your servant thought: Let me speak to the king; perhaps he will grant his servant's request. Mpe sik’oyo, soki nayei kobimisa maloba oyo epai ya mokonzi, nkolo na ngai, ezali mpo ete bato babangisaki ngai. Yango wana mwasi mosali na yo amilobelaki : « Tika ete naloba na mokonzi, nkolo na ngai. Tango mosusu, akosala kolanda makambo oyo mwasi mosali na ye akosenga.
16 Perhaps the king will listen and rescue his servant from the hand of the man who would cut off both me and my son from the inheritance of our Father.'" Tango mosusu, mokonzi akondima kokangola mwasi mosali na ye wuta na loboko ya mobali oyo azali koluka kobwaka ngai mpe mwana na ngai ya mobali mosika ya libula oyo Nzambe apesaki biso. »
17 Your servant thought: "Let my lord the king's word bring rest, for my lord the king is like an angel of our Father, discerning good and evil. May your Father be with you." Mpe sik’oyo, tala makambo oyo mwasi mosali na yo azali koloba : « Tika ete liloba ya mokonzi, nkolo na ngai, epesa ngai bopemi, pamba te mokonzi, nkolo na ngai, azali lokola Anjelu na Nzambe oyo ayebaka kososola mabe mpe malamu. Tika ete Yawe, Nzambe na yo, azala elongo na yo ! »
18 The king said to the woman, "Don't hide from me anything I ask you." She said, "Let my lord the king speak." Mokonzi alobaki na mwasi : — Kobombela ngai te eyano ya likambo oyo nalingi kotuna yo. Mwasi azongisaki : — Tika ete mokonzi, nkolo na ngai, aloba !
19 The king asked, "Is Joab's hand behind all this?" The woman answered, "As you live, my lord the king, no one can turn right or left from anything my lord the king said. Your servant Joab commanded me; he put all these words in your servant's mouth. Mokonzi atunaki : — Boni, loboko ya Joabi ezali elongo na yo te na makambo oyo nyonso ? Mwasi azongisaki : — Na kombo na yo mokonzi, nkolo na ngai, kati na makambo nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, awuti koloba, moto moko te akoki kokende, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi. Solo, ezali mosali na yo, Joabi, nde atindaki ngai kosala makambo oyo, mpe ye nde atiaki maloba oyo na monoko na ngai mwasi mosali na yo.
20 Your servant Joab did this to change how things look. But my lord is as wise as an angel of our Father, knowing all that is in the land." Mosali na yo, Joabi, asalaki boye mpo na kobongola mpe kokomisa makambo oyo ndenge mosusu. Kasi nkolo na ngai azali na bwanya lokola Anjelu na Nzambe, ayebi makambo nyonso oyo ezali koleka kati na mokili.
21 Then the king said to Joab, "Very well, I will do this. Go, bring back the young man Absalom." Mokonzi alobaki na Joabi : — Malamu ! Nakosala yango. Kende, zongisa elenge mobali Abisalomi.
22 Joab fell facedown to the ground, bowed, and blessed the king. "Today your servant knows I have found favor in your eyes, my lord the king," he said, "for the king has granted his servant's request." Bongo Joabi agumbamaki elongi kino na mabele mpo na kopesa mokonzi lokumu mpe apambolaki ye. Joabi alobaki : — Lelo, mosali na yo asosoli ete azwi ngolu na miso na yo mokonzi, nkolo na ngai, pamba te mokonzi andimi kosala makambo oyo mosali na ye asengi.
23 So Joab got up and went to Geshur and brought Absalom back to Jerusalem. Bongo Joabi akendeki na Geshuri mpe azongisaki Abisalomi, na Yelusalemi.
24 The king said, "He must go to his house, but must not see my face." So Absalom went to his house and did not see the king's face. Kasi mokonzi alobaki : — Asengeli kokende na ndako na ye ; asengeli te komona elongi na ngai. Boye Abisalomi akendeki na ndako na ye, mpe amonaki elongi ya mokonzi te.
25 In all Israel no one was praised for beauty like Absalom; from the sole of his foot to the crown of his head, he had no defect. Kati na Isalaele mobimba, ezalaki na moto moko te oyo azalaki kitoko koleka Abisalomi mpe oyo bazalaki kokumisa lokola ye. Azalaki ata na mbeba moko te, banda na moto kino na misapi ya makolo.
26 Whenever he shaved his head—he shaved it every year, since it grew heavy on him—he weighed the hair of his head: about five pounds by the royal standard. Na suka ya mibu nyonso, azalaki kokata suki ya moto na ye, mpo ete ezalaki kokoma kilo makasi. Boye tango bazalaki kotia yango na bimekelo, ezalaki na bakilo mibale na bagrame nkama mitano, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na ndako ya mokonzi.
27 Three sons were born to Absalom, and a daughter named Tamar. She was a beautiful woman. Abisalomi azalaki na bana mibali misato mpe mwana moko ya mwasi. Kombo ya mwana na ye ya mwasi ezalaki Tamari, mpe azalaki mwasi moko ya kitoko makasi.
28 Absalom lived in Jerusalem two full years without seeing the king's face. Abisalomi avandaki na Yelusalemi mibu mibale mpe atikalaki komona te elongi ya mokonzi.
29 Absalom sent for Joab to ask him to intercede with the king, but Joab refused to come to him. He sent again, a second time, but Joab still refused to come. Bongo Abisalomi abengisaki Joabi mpo ete atinda ye epai ya mokonzi, kasi Joabi aboyaki kokende epai na ye. Abengisaki lisusu Joabi na mbala ya mibale, kasi Joabi aboyaki kaka kokende.
30 Absalom told his servants, "Look, Joab's field borders mine, and he has barley there. Go, burn it." So Absalom's servants burned the field. Abisalomi alobaki na basali na ye : « Botala ! Elanga ya Joabi ezali pembeni ya elanga na ngai, ezali na bambuma ya orje. Bokende kotia yango moto. » Basali ya Abisalomi batiaki yango moto.
31 Joab got up, went to Absalom's house, and asked, "Why did your servants set my field on fire?" Joabi akendeki na ndako ya Abisalomi mpe alobaki na ye : — Mpo na nini otie moto na elanga na ngai ?
32 Absalom answered Joab, "I sent you word: 'Come here, so I can send you to ask the king why I came from Geshur—better I'd stayed there.' Now let me see the king's face; if I'm guilty of anything, let him kill me." Abisalomi azongiselaki Joabi : — Tala, natindelaki yo maloba ; nalobaki : « Yaka awa mpo ete natinda yo epai ya mokonzi mpo na kotuna ye : ‹ Mpo na nini nalongwaki na Geshuri ? Elingaki kozala malamu mpo na ngai soki natikalaki na ngai kuna. Sik’oyo, nalingi komona elongi ya mokonzi ; mpe soki namemaki ngambo na likambo moko, tika ete baboma ngai ! › »
33 Joab went to the king and told him. The king summoned Absalom, who came in and bowed with his face to the ground before him. Then the king kissed Absalom. Boye Joabi akendeki epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye makambo nyonso. Mokonzi abengisaki Abisalomi, mpe Abisalomi akendeki liboso ya mokonzi, agumbamaki elongi kino na mabele, mpe mokonzi ayambaki ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]