Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Samuel 15 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Later, Absalom got himself a chariot and horses, with fifty men to run ahead of him. Na tango wana, Abisalomi azwaki shar, bampunda mpe basoda tuku mitano oyo bazalaki kotambola liboso na ye lokola bakengeli na ye.
2 Absalom would rise early and stand beside the road to the gate. Whenever someone with a dispute came to the king for judgment, Absalom would call out, "What city are you from?" The man would answer, "Your servant is from one of the tribes of Israel." Abisalomi azalaki kolamuka na tongo makasi mpe azalaki kokende kotelema pembeni ya nzela oyo ekenda na ekotelo ya engumba. Bongo, tango nyonso moto azalaki koleka mpo na kokende epai ya mokonzi mpo ete akatela ye likambo, ye Abisalomi azalaki kobenga ye mpe kotuna ye : — Ozali moto ya engumba nini ? Soki moto yango azongisi : — Mosali na yo azali moto ya moko kati na bikolo ya Isalaele.
3 Then Absalom would say to him, "Look, your claims are good and right, but the king has appointed no one to hear you." Abisalomi azalaki koloba na ye : — Tala, likambo na yo ezali malamu mpe sembo ; kasi ezali na moto moko te oyo akoki koyoka yo epai ya mokonzi.
4 Absalom would add, "If only I were appointed judge in the land! Anyone with a dispute or case could come to me, and I'd give him justice." Abisalomi azalaki kobakisa : — Ah ! Soki nazalaki mosambisi kati na mokili oyo, moto nyonso oyo azali na likambo alingaki koya epai na ngai, mpe nalingaki kolongisa ye na likambo yango !
5 Whenever anyone approached to bow before him, Absalom reached out, took hold of him, and kissed him. Mpe tango nyonso moto azalaki kopusana mpo na kogumbama liboso na ye Abisalomi, Abisalomi azalaki kopesa loboko, koyamba mpe kopesa ye beze.
6 Absalom did this to every Israelite who came to the king for judgment, and so he stole the hearts of Israel. Azalaki kosala bongo epai ya bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kokende epai ya mokonzi mpo ete akata likambo na bango, mpe ezalaki bongo nde Abisalomi azalaki komikotisa na mayele kati na mitema ya bato ya Isalaele.
7 After four years, Absalom said to the king, "Please let me go to Hebron to fulfill a vow I made to our Father. Sima na mibu minei, Abisalomi alobaki na mokonzi : — Pesa ngai nzela mpo ete nakende na Ebron mpo na kokokisa ndayi oyo nalapaki epai na Yawe,
8 For while living at Geshur in Aram I vowed: 'If our Father brings me back to Jerusalem, I will worship him.'" pamba te tango mosali na yo azalaki kovanda na Geshuri kati na Siri, nalapaki ndayi oyo : « Soki Yawe azongisi ngai na Yelusalemi, nakogumbamela Ye. »
9 The king said to him, "Go in peace." So Absalom got up and went to Hebron. Mokonzi alobaki na ye : — Kende na kimia. Boye akendeki na Ebron.
10 Absalom sent secret messengers through all the tribes of Israel: "When you hear the ram's horn, say, 'Absalom reigns in Hebron!'" Mpe longwa kuna, Abisalomi atindaki bantoma kati na bikolo nyonso ya Isalaele mpo na koloba : « Tango kaka bokoyoka lokito ya kelelo, boloba : ‹ Abisalomi akomi mokonzi kati na Ebron. › »
11 200 invited men from Jerusalem went with Absalom in all innocence, knowing nothing about the plot. Mibali nkama mibale babengisamaki wuta na Yelusalemi mpe bakendeki elongo na Abisalomi. Bakendeki na boboto mpe bayebaki ata likambo moko te.
12 As Absalom offered the sacrifices, he sent to Giloh for David's counselor Ahithophel the Gilonite. The conspiracy grew strong, and Absalom's following kept increasing. Wana Abisalomi azalaki kobonza mbeka, abengisaki Ayitofeli, moto ya Gilo, mopesi toli ya Davidi, wuta na engumba na ye ya Gilo. Boye, likita ya batomboki ekomaki makasi ; mpe lisanga ya Abisalomi ekomaki na bato ebele.
13 A messenger came to David: "Israel's hearts have turned to Absalom." Ntoma moko ayaki koyebisa Davidi : — Mitema ya bato ya Isalaele esangani elongo na Abisalomi.
14 David told all the servants with him in Jerusalem, "Get up! We must run, or none of us will escape Absalom. Hurry, or he will soon catch us, ruin us, and strike the city with the sword." Davidi alobaki na bakalaka na ye nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi : — Boya ! Tosengeli kokima, soki te moko te kati na biso akobika liboso ya Abisalomi. Tosengeli kobima na lombangu, soki te akoya na lombangu kokanga biso, kobebisa biso mpe koboma engumba na mopanga.
15 The king's servants answered him, "Whatever my lord the king decides, your servants are ready." Bakalaka ya mokonzi bazongiselaki Davidi : — Basali na yo bazali ya kobongama mpo na kosala makambo nyonso oyo mokonzi, nkolo na biso, akopona.
16 So the king left, his whole household following, but left ten concubines to keep the palace. Mokonzi akendeki na makolo elongo na libota na ye mobimba oyo ezalaki kolanda ye ; kasi atikaki bamakangu zomi mpo na kobatela ndako na ye.
17 The king set out with all the people following him, and they stopped at the last house. Boye mokonzi akendeki na makolo elongo na bato na ye nyonso oyo bazalaki kolanda ye mpe batelemaki pene ya ndako ya suka ya engumba.
18 All his servants passed by beside him, along with all the Cherethites and Pelethites; and all 600 Gittites who had followed him from Gath marched before the king. Basoda na ye nyonso bazalaki kotambola na bapembeni na ye elongo na bato nyonso ya Kereti mpe ya Peleti. Mpe bato nyonso ya Gati, nkama motoba, oyo batambolaki elongo na ye longwa na Gati, bazalaki kotambola liboso ya mokonzi.
19 The king said to Ittai the Gittite, "Why come with us too? Go back and stay with the new king; you're a foreigner, an exile far from your homeland. Mokonzi alobaki na Itayi, moto ya Gati : — Mpo na nini yo mpe olingi koya elongo na biso ? Zonga mpe vanda elongo na Abisalomi, mokonzi ya sika ! Ozali mopaya, otikaki mboka na yo mpo na koya kokima awa.
20 You came only yesterday. Should I make you wander with us today, when I don't even know where I'm going? Go back, take your brothers with you. May our Father show you covenant love and faithfulness." Oyaki mpe kaka lobi oyo ewuti koleka, bongo ndenge nini, lelo, namema yo elongo na biso wana nayebi kutu te epai nini nazali kokende ? Zonga mpe zwa bato ya mboka na yo ! Tika ete bolamu mpe boyengebene ya Yawe ezala elongo na yo !
21 Ittai answered the king, "As surely as our Father lives and my lord the king lives, wherever my lord the king is, whether life or death, there your servant will be." Itayi azongiselaki mokonzi : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo ya mokonzi, nkolo na ngai, mosali na yo akozala bipai nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, akozala, ezala mpo na bomoi to mpo na kufa.
22 David told Ittai, "Go, cross over." So Ittai the Gittite crossed over with all his men and all the little ones with him. Davidi alobaki na Itayi : — Malamu ! Leka liboso mpe tambola ! Boye Itayi, moto ya Gati, atambolaki liboso elongo na basoda nyonso mpe mabota oyo ezalaki elongo na ye.
23 The whole land wept loudly as all the people crossed over. The king crossed the Kidron Valley, and all the people crossed toward the wilderness. Tango bato nyonso bazalaki koleka, mboka mobimba ezalaki kolela makasi. Mokonzi akatisaki lubwaku ya Sedron, mpe bato nyonso bakendeki na nzela oyo ekenda na esobe.
24 Zadok was there too, with all the Levites carrying the ark of the covenant of our Father. They set down the ark of our Father, and Abiathar offered sacrifices until all the people had finished leaving the city. Tsadoki mpe azalaki wana elongo na Balevi oyo bazalaki elongo na ye mpe bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Nzambe. Bakitisaki Sanduku ya Nzambe, mpe Abiatari abonzaki mbeka kino tango bato nyonso basilisaki kobima na engumba.
25 The king said to Zadok, "Take the ark of our Father back into the city. If our Father is pleased with me, he will bring me back and let me see it and where he lives again. Mokonzi alobaki na Tsadoki : — Zongisa Sanduku ya Nzambe kati na engumba. Soki nazwi ngolu na miso ya Yawe, akozongisa ngai mpe akopesa ngai nzela ya komona lisusu Sanduku yango mpe ndako na yango.
26 But if he says, 'I take no delight in you,' here I am—let him do to me as he sees fit." Kasi soki Nzambe alobi : « Nasepeli na yo te, » wana tika ete asala epai na ngai makambo oyo amoni ete ezali malamu, pamba te nazali ya kobongama.
27 The king also said to Zadok the priest, "Aren't you a seer? Return to the city in peace, and take your two sons with you—Ahimaaz your son and Jonathan son of Abiathar. Mokonzi alobaki lisusu epai ya Nganga-Nzambe Tsadoki : — Ozali momoni makambo te ? Zonga na kimia na engumba elongo na Ayimaatsi, mwana na yo ya mobali, mpe Jonatan, mwana mobali ya Abiatari. Yo mpe Abiatari, bozwa mpe bomema bana na bino mibale ya mibali.
28 I will wait at the wilderness crossings until word comes from you to inform me." Nakozela na bitando ya esobe kino nakoyoka liloba kowuta epai na bino.
29 So Zadok and Abiathar carried the ark of our Father back to Jerusalem and stayed there. Boye Tsadoki mpe Abiatari bazongisaki Sanduku ya Nzambe, na Yelusalemi, mpe batikalaki kuna.
30 David went up the Mount of Olives, weeping as he climbed, his head covered and feet bare. All the people with him covered their heads and climbed, weeping as they went. Kasi Davidi azalaki komata ngomba ya banzete ya olive na kolela, moto na ye ya kozipama mpe makolo ngulu. Bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bazipaki bango mpe mito na bango mpe bazalaki kolela wana bazalaki komata.
31 David was told, "Ahithophel is among the conspirators with Absalom." So David prayed, "our Father, turn Ahithophel's counsel into foolishness." Bayaki koyebisa Davidi ete Ayitofeli azali kati na bato oyo basalaki likita elongo na Abisalomi. Boye Davidi asambelaki : « Eh Yawe, sala ete batoli ya Ayitofeli ezanga tina. »
32 When David reached the summit, where worship was offered to our Father, Hushai the Archite was there to meet him, his robe torn and dust on his head. Tango Davidi akomaki na songe ya ngomba epai wapi bato bazalaki na momesano ya kokende kogumbamela Nzambe, Ushayi, moto ya Ariki, mopesi toli ya Davidi, azalaki kuna mpo na kokutana na ye, na nzambala na ye epasuka mpe moto na ye etonda na putulu.
33 David said to him, "If you come with me, you'll only be a burden to me." Davidi alobaki na ye : — Soki okeyi elongo na ngai, okozala mokumba mpo na ngai.
34 But if you go back to the city and tell Absalom, 'I will be your servant, my king; as I served your father before, so now I will serve you,' then you can undo Ahithophel's advice for me. Kasi soki ozongi na engumba mpe olobi na Abisalomi : « Nakozala mosali na yo, oh mokonzi ! Kala, nazalaki mosali ya tata na yo, kasi sik’oyo, nakozala mosali na yo, » wana okosunga ngai na kobebisa toli ya Ayitofeli.
35 Zadok and Abiathar the priests are there with you. Tell them everything you hear in the king's house. Lokola Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari bakozala kuna elongo na yo, okoyebisa bango makambo nyonso oyo okoyoka na ndako ya mokonzi.
36 Their two sons are there with them—Zadok's son Ahimaaz and Abiathar's son Jonathan. Send me word through them of all you hear. Bana na bango ya mibali mibale, Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki, mpe Jonatan, mwana mobali ya Abiatari, bazali mpe kuna elongo na bango. Okotinda bango mpo ete baya koyebisa ngai makambo nyonso oyo okoyoka.
37 So Hushai, David's friend, came into the city just as Absalom was entering Jerusalem. Boye Ushayi, moninga ya Davidi, azongaki na engumba, kaka na tango oyo Abisalomi mpe akotaki kati na Yelusalemi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]