Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Samuel 16 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When David had passed a little beyond the summit, Ziba, Mephibosheth's servant, met him with a pair of saddled donkeys carrying 200 loaves, one hundred raisin clusters, one hundred summer fruits, and a skin of wine. Tango Davidi alekaki mwa moke songe ya ngomba, Tsiba, mobombi bozwi ya Mefibosheti, azalaki kozela mpo na kokutana na ye ; azalaki na ba-ane mibale oyo babongisi mpo na mobembo mpe ememaki mapa nkama mibale, maboke nkama moko ya bambuma ya vino ekawuka, maboke nkama moko ya bambuma ya figi mpe mbeki moko ya masanga ya vino.
2 The king asked Ziba, "Why have you brought these?" Ziba said, "The donkeys for the king's household to ride, the bread and summer fruit for the young men to eat, the wine for whoever grows faint in the wilderness to drink." Mokonzi atunaki Tsiba : — Mpo na nini omemi biloko oyo ? Tsiba azongisaki : — Ba-ane ezali mpo na libota ya mokonzi mpo ete batambola na yango, mapa mpe bambuma ezali mpo na bato mpo ete balia, mpe masanga ya vino ezali mpo na kopesa makasi epai ya bato oyo bakolemba na esobe.
3 The king asked, "Where is your master's son?" Ziba answered, "He is staying in Jerusalem, for he said, 'Today the house of Israel will return my father's kingdom to me.'" Bongo mokonzi atunaki lisusu : — Wapi Mefibosheti, koko ya nkolo na yo ? Tsiba azongisaki : — Atikalaki na Yelusalemi, pamba te amilobelaki : « Lelo, libota ya Isalaele ekozongisa bokonzi ya koko na ngai na maboko na ngai. »
4 The king told Ziba, "Everything Mephibosheth owned is now yours." Ziba said, "I bow before you. May I find favor with you, my lord the king." Mokonzi alobaki na Tsiba : — Nyonso oyo ezali ya Mefibosheti ekomi sik’oyo ya yo. Tsiba alobaki : — Nagumbami liboso na yo mokonzi, nkolo na ngai ! Tika ete nazwa ngolu na miso na yo !
5 When King David reached Bahurim, a man from Saul's family, Shimei son of Gera, came out cursing continually. Wana mokonzi akomaki pembeni ya Bawurimi, ezalaki na moto moko oyo azalaki kobima wuta na mboka ; kombo na ye ezalaki « Shimei, » mpe azalaki mwana mobali ya Gera. Azalaki moto ya etuka mpe libota moko na Saulo. Bongo wana azalaki kobima, azalaki mpe kolakela Davidi mabe.
6 He threw stones at David and all King David's servants, while all the people and all the mighty warriors were on his right and left. Azalaki kobamba Davidi mpe basali na ye mabanga atako bato nyonso mpe basoda oyo bakengelaka mokonzi bazalaki na ngambo ya loboko ya mwasi mpe na ngambo ya loboko ya mobali ya Davidi.
7 As he cursed, Shimei said: "Get out, get out, you man of bloodshed, you worthless man! Shimei azalaki koloba boye wana azalaki kolakela Davidi mabe : « Bima, bima, mobomi bato, moto pamba.
8 Our Father has returned on you all the blood of Saul's house, in whose place you reigned, and our Father has given the kingdom into the hand of your son Absalom. Now you are caught in your own evil, for you are a man of blood." Yawe atangi na moto na yo, makila nyonso ya ndako ya Saulo, oyo osopaki mpo ete okoma mokonzi na esika na ye. Yawe akabi bokonzi na maboko ya Abisalomi, mwana na yo ya mobali. Osili kokweya na pasi mpo ete ozali mosopi makila. »
9 Then Abishai son of Zeruiah said to the king, "Why let this dead dog curse my lord the king? Let me go over and cut off his head." Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, alobaki na mokonzi : — Mpo na nini mbwa oyo ekufa ezali kolakela nkolo na ngai mabe. Pesa ngai nzela mpo ete nakende kokata ye moto.
10 But the king said, "What does this concern you, sons of Zeruiah? If he curses because our Father told him, 'Curse David,' who can ask, 'Why have you done this?'" Kasi mokonzi alobaki : — Bino bana mibali ya Tseruya, yo Abishayi mpe ndeko na yo, Joabi, likambo nini kati na ngai mpe bino ? Soki azali kolakela ngai mabe, ezali nde na ndingisa ya Yawe mpo ete alobi na ye : « Lakela Davidi mabe. » Nani sik’oyo akoki kotuna : « Mpo na nini ozali kosala bongo ? »
11 David told Abishai and all his servants, "My own son, from my own body, wants to kill me; how much more this Benjamite! Leave him, let him curse, for our Father told him to. Bongo Davidi alobaki na Abishayi mpe na basali na ye nyonso : « Soki kutu mwana na ngai moko ya mobali oyo abimi na nzoto na ngai azali koluka koboma ngai, bongo ndenge nini moto oyo ya Benjame asala bongo te ! Tika ye alakela ngai mabe, pamba te ezali Yawe nde alobi na ye bongo.
12 Maybe our Father will see my misery and repay me good for today's cursing. Tango mosusu Yawe akomona pasi na ngai, bongo akobongola na bolamu bilakeli mabe oyo ezali kokweyela ngai lelo. »
13 David and his men went on along the road, while Shimei kept pace on the hillside opposite, cursing as he went, throwing stones at him and flinging dust." Boye, wana Davidi mpe bato na ye bakobaki nzela na bango, Shimei azalaki kotambola na mopanzi mosusu ya ngomba pembeni ya Davidi, azalaki kokoba kolakela Davidi mabe tango azalaki kotambola, kobamba ye mabanga mpe kobwakela ye putulu.
14 The king and all the people with him arrived weary, and there he refreshed himself. Mokonzi elongo na bato na ye nyonso balembaki tango bakomaki na esika oyo bazalaki kokende mpe bapemaki kuna.
15 Meanwhile Absalom and all the people, the men of Israel, came to Jerusalem, and Ahithophel was with him. Kaka na tango yango, Abisalomi mpe bato nyonso ya Isalaele bakomaki na Yelusalemi, mpe Ayitofeli azalaki elongo na ye.
16 When Hushai the Archite, David's friend, came to Absalom, Hushai said to Absalom, "Long live the king! Long live the king!" Ushayi, moto ya Ariki, moninga ya Davidi, akendeki epai ya Abisalomi mpe alobaki na ye : — Tika ete mokonzi owumela na bomoi ! Tika ete mokonzi owumela na bomoi !
17 Absalom asked Hushai, "Is this your loyalty to your friend? Why didn't you go with your friend?" Abisalomi atunaki Ushayi : — Oyo nde bolingo nyonso oyo ozali kolakisa epai ya moninga na yo ? Mpo na nini okendeki te elongo na moninga na yo ?
18 Hushai said to Absalom, "No; the one our Father and this people and all Israel's men have chosen—I'll be his, and stay with him. Ushayi alobaki na Abisalomi : — Te, ngai nakozala elongo na moto oyo Yawe, bato oyo mpe Isalaele nyonso baponi.
19 Besides, whom should I serve? Should it not be his son? As I served your father, I'll serve you." Mpe ngai nakosalela nani ? Ezali te mwana na ye ya mobali ? Ndenge nasalelaki tata na yo, ndenge wana mpe nakosalela yo.
20 Then Absalom said to Ahithophel, "Give us your counsel. What should we do?" Abisalomi alobaki na Ayitofeli : — Pesa biso toli na yo : tosengeli kosala nini ?
21 Ahithophel told Absalom, "Sleep with your father's concubines, whom he left to keep the house. Then all Israel will hear you've made yourself reek to your father, and everyone with you will be strengthened." Ayitofeli azongiselaki Abisalomi : — Kende kosangisa nzoto na bamakangu ya tata na yo, oyo batikalaki mpo na kobatela ndako, bongo Isalaele mobimba ekoyoka ete omikomisi nkele na miso ya tata na yo. Na bongo, maboko ya bato oyo bazali sima na yo ekolendisama.
22 So they pitched a tent for Absalom on the roof, and he slept with his father's concubines before all Israel. Boye basalelaki Abisalomi ndako ya kapo na likolo ya ndako, mpe asangisaki nzoto na bamakangu ya tata na ye na miso ya Isalaele mobimba.
23 Back then Ahithophel's counsel was like consulting our Father directly; both David and Absalom regarded all his counsel that way. Nzokande, na tango wana, toli oyo Ayitofeli abandaki kopesa ezalaki lokola maloba ya moto oyo azali kotuna mayele epai ya Ye moko Nzambe. Ezalaki ndenge wana nde Davidi mpe Abisalomi bazalaki komona batoli ya Ayitofeli.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]