Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Samuel 17 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then Ahithophel said to Absalom, "Let me pick 12,000 men and set out tonight after David. Ayitofeli alobaki na Abisalomi : — Nakopona mibali nkoto zomi na mibale mpe nakolanda Davidi na pokwa ya lelo.
2 I will attack him while he is weary and weak, panic him, and all his people will flee; then I will strike down only the king. Nakobundisa ye tango makasi na ye ekosila mpe nzoto na ye ekolemba ; nakoyeisa mobulu epai na ye, mpe wana bato nyonso oyo bazali elongo na ye bakokima, ngai nakoboma ye mokonzi tango akotikala ye moko ;
3 I will bring all the people back to you. The one man you seek—his death means everyone returns, and all the people will be at peace." mpe nakozongisa bato nyonso epai na yo. Kufa ya moto oyo ozali koluka elakisi kozonga ya bato nyonso ! mpe bato nyonso bakozala na kimia.
4 This plan seemed good to Absalom and all the elders of Israel. Makanisi oyo emonanaki ya sembo na miso ya Abisalomi mpe ya bampaka nyonso ya Isalaele.
5 Absalom said, "Call Hushai the Archite too, and let's hear what he also says." Kasi Abisalomi alobaki : — Bobengisa lisusu Ushayi, moto ya Ariki, mpo ete toyoka makambo nini oyo ye mpe azali na yango ya koloba.
6 When Hushai came to him, Absalom said, "Ahithophel advised this. Should we do what he says? If not, you speak." Tango Ushayi akomaki epai na ye, Abisalomi alobaki : — Tala toli oyo Ayitofeli apesi. Boni, tosengeli kosala makambo oyo alobi ? Soki te, yebisa biso makanisi na yo.
7 Hushai said to Absalom, "The counsel Ahithophel has given is not good this time. Ushayi azongiselaki Abisalomi : — Ya mbala oyo, toli oyo Ayitofeli apesi ezali malamu te.
8 Hushai added, "You know your father and his men—fierce warriors, like a bear robbed of her cubs in the field. Your father is a seasoned fighter; he won't sleep with the troops." Bongo Ushayi abakisaki : — Oyebi ete tata na yo mpe bato na ye bazali bato ya mpiko mpe bato na kanda makasi lokola ngombolo ya mwasi oyo bawuti kobotola bana na yango kati na zamba. Tata na yo azali moto oyo abundaka bitumba wuta kala, akolekisa te butu esika moko na bato.
9 Even now he's hidden in a pit or elsewhere. If some of your men fall first, whoever hears will say, 'Absalom's men have been slaughtered!' Ata azali sik’oyo ya kobombama kati na lidusu ya mabanga to na esika songolo, nzokande tango kaka bato kati na mampinga na biso bakobanda kokufa, ekozanga te komonana moto oyo akoyoka yango mpe akoloba : « Kati na bato oyo bazali kolanda Abisalomi, ebele bakufi. »
10 Then even the bravest, whose heart is a lion's heart, will melt with fear, for all Israel knows your father is a warrior and those with him are brave. Bongo na tango yango, ata soda oyo aleki na mpiko, oyo azali na motema lokola ya nkosi, akobanga makasi, pamba te Isalaele mobimba eyebi ete tata na yo mpe bato nyonso oyo bazali elongo na ye bazali basoda ya mpiko.
11 So here is my counsel: gather all Israel to you, from Dan to Beersheba, as many as the sand by the sea, and go into battle yourself. Boye tala toli na ngai : « Tika ete Isalaele mobimba basangana epai na yo, longwa na Dani kino na Beri-Sheba, bazala ebele lokola zelo ya ebale monene ! Bongo yo moko okotambola liboso na bango na bitumba.
12 We'll reach him wherever he is, settle on him like dew on the ground, and leave alive neither him nor any of his men. Bongo tokobundisa ye na bisika nyonso oyo akoki komonana mpe tokokweyela ye ndenge manoka ekweyaka na mabele. Mpe ezala ye to bato na ye, moko te akotikala na bomoi.
13 If he pulls back into a city, all Israel will bring ropes there, and we will drag it into the valley until not a pebble is left." Soki akimi na engumba moko, Isalaele mobimba ekomema basinga kuna na engumba yango mpe tokobenda engumba yango na lubwaku kino etikala ata na libanga moko te. »
14 Absalom and all the men of Israel said, "Hushai the Archite's counsel is better than Ahithophel's." For our Father had determined to defeat Ahithophel's good counsel, so our Father could bring disaster on Absalom. Abisalomi mpe bato nyonso ya Isalaele balobaki : — Toli ya Ushayi, moto ya Ariki, ezali malamu koleka oyo ya Ayitofeli, pamba te Yawe azwaki mokano ya kokakola batoli malamu ya Ayitofeli mpo na komema pasi epai ya Abisalomi.
15 Hushai told the priests Zadok and Abiathar, "This is what Ahithophel advised Absalom and Israel's elders, and this is what I advised. Ushayi alobaki na Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari : — Ayitofeli apesaki toli na Abisalomi mpe na bampaka ya Isalaele ete basala likambo songolo, mpe ngai napesi bango toli ete basala likambo pakala.
16 Now send word quickly to David: 'Don't stay tonight at the wilderness fords; cross over without fail, or the king and all the people with him will be swallowed up.'" Sik’oyo, tinda noki sango epai ya Davidi mpo na koloba na ye : « Kolekisa te butu kati na bitando ya esobe, kasi kende mosika, noki te mokonzi mpe bato oyo bazali elongo na yo bokufa. »
17 Jonathan and Ahimaaz waited at En-rogel; a servant girl would go and tell them, and they would go and tell King David, for they could not be seen entering the city. Wana Jonatan mpe Ayimaatsi bavandaki na Eyini-Rogeli, mwasi mosali moko amemelaki bango sango oyo bango basengelaki kokende koyebisa mokonzi Davidi ; pamba te basengelaki te kokota kati na engumba mpo ete bamona bango te.
18 But a young man saw them and told Absalom. So the two hurried off and reached a man's house at Bahurim, who had a well in his courtyard, and they climbed down into it. Nzokande elenge mobali moko amonaki bango mpe akendeki koyebisa Abisalomi. Boye mibali nyonso mibale bakimaki noki mpe bakendeki na ndako ya moto moko ya Bawurimi. Lokola azalaki na libulu moko ya mayi kati na lopango na ye, bakitaki kuna.
19 The man's wife spread a covering over the well's mouth and scattered grain on it, so nothing was noticed. Mwasi na ye akamataki kapo, atiaki yango na monoko ya libulu mpe asopaki bambuma na likolo na yango. Moto moko te ayebaki likambo yango.
20 When Absalom's servants came to the woman at the house, they asked, "Where are Ahimaaz and Jonathan?" She said, "They crossed the brook." The men searched, found no one, and returned to Jerusalem. Tango bato ya Abisalomi bayaki epai ya mwasi, batunaki : — Ayimaatsi mpe Jonatan bazali wapi ? Mwasi azongiselaki bango : — Bakatisi mayi. Bato ya Abisalomi balukaki, kasi bamonaki moto moko te ; mpe bazongaki na Yelusalemi.
21 After they left, the two climbed out of the well and went and reported to King David. They said to him, "Get up and cross the water quickly, for Ahithophel has plotted this against you." Tango bakendeki, Ayimaatsi mpe Jonatan babimaki na libulu mpe bakendeki koyebisa mokonzi Davidi : « Botelema mpe bokatisa mayi noki, pamba te Ayitofeli apesi toli moko ya mabe na tina na yo. »
22 So David and everyone with him got up and crossed the Jordan. By daybreak not one was left who had not crossed it. Boye Davidi mpe bato oyo bazalaki elongo na ye batelemaki mpe bakatisaki ebale Yordani. Liboso ete tongo etana, bango nyonso basilisaki kokatisa Yordani, moko te atikalaki.
23 When Ahithophel saw his advice was not followed, he saddled his donkey and went home to his town. He set his house in order, then hanged himself. He died and was buried in his father's tomb. Tango Ayitofeli amonaki ete balandi te toli na ye, amataki na ane mpe azongaki na ndako na ye kati na engumba na ye. Abongisaki biloko ya ndako na ye mpe amidiembikaki. Boye akufaki mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye.
24 David came to Mahanaim, while Absalom crossed the Jordan with all the men of Israel beside him. Davidi akendeki na Maanayimi, mpe Abisalomi akatisaki Yordani elongo na bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki elongo na ye.
25 Absalom had set Amasa over the army instead of Joab. Amasa's father was Ithra the Israelite, who had married Abigail daughter of Nahash, sister of Zeruiah, Joab's mother. Abisalomi atiaki Amasa mokonzi ya mampinga na esika ya Joabi. Amasa azalaki mwana mobali ya Yeteri, moto ya Isalaele, oyo abalaki Abigayili, mwana mwasi ya Naashi mpe ndeko mwasi ya Tseruya, mama ya Joabi.
26 Israel and Absalom camped in the land of Gilead. Bato ya Isalaele mpe Abisalomi batongaki molako na bango kati na Galadi.
27 When David reached Mahanaim, Shobi son of Nahash from Rabbah of the Ammonites, Machir son of Ammiel from Lo-debar, and Barzillai the Gileadite from Rogelim, Tango Davidi akomaki na Maanayimi, bayambaki ye epai ya Shovi, mwana mobali ya Naashi ya mboka Raba ya bato ya Amoni, epai ya Makiri, mwana mobali ya Amieli ya mboka ya Lo-Debari, mpe epai ya Barizilayi, moto ya Galadi ya mboka Rogelimi.
28 brought beds, basins, and pottery, along with wheat, barley, flour, roasted grain, beans, lentils, Bamemaki biloko ya kolalela, bambeki, basani, ble, orje, farine, bambuma oyo bakalinga, madesu, mpe misili,
29 honey, curds, sheep, and cheese from the herd for David and his people to eat, for they said, "The people are hungry, tired, and thirsty in the wilderness." mafuta ya nzoyi, miliki, bameme, fromaje ya ngombe, mpo ete Davidi elongo na bato na ye balia ; pamba te bazalaki kolobana bango na bango : « Solo, sima na bango kotambola kati na esobe, bato oyo balembi, bazali konyokwama na nzala mpe na posa ya mayi. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]