Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Samuel 18 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 David mustered his troops and appointed commanders of thousands and commanders of hundreds over them. Davidi atangaki basoda oyo bazalaki elongo na ye ; mpe kati na bango, aponaki bakonzi ya bankoto mpe bakonzi ya bankama.
2 David sent out the troops: a third under Joab, a third under Abishai son of Zeruiah, Joab's brother, and a third under Ittai the Gittite. The king told the troops, "I will surely go out with you too." Davidi apesaki mitindo na mampinga ete bakende. Akabolaki bango na masanga misato : lisanga ya liboso ekambamaki na Joabi ; ya mibale, na Abishayi, ndeko mobali ya Joabi, mwana mobali ya Tseruya ; mpe ya misato, na Itayi, moto ya Gati. Mokonzi alobaki na masanga ya mampinga ete ye moko akokende solo elongo na bango.
3 But the troops said, "Don't go out. If we flee, they won't care; if half of us die, they won't care. You are worth 10,000 of us. Better you stay in the city, ready to send us help." Kasi basoda balobaki : — Okoki kobima te elongo na biso, pamba te soki ekosenga ete tokima, bakotala biso te. Ezala kati-kati ya bato kati na biso bakufi, bakotala yango te, kasi yo ; okokani na bato nkoto zomi kati na biso. Nzokande, ekoleka malamu mpo na yo kosungaka biso tango nyonso wuta na engumba.
4 The king told them, "I'll do whatever seems best to you." Then he stood at the gate as all the troops marched out by hundreds and by thousands. Mokonzi azongisaki : — Nakosala makambo nyonso oyo bomoni ete ezali malamu. Boye wana bato bazalaki kobima na masanga ya bankama mpe ya bankoto, mokonzi atelemaki pembeni ya ekuke.
5 The king commanded Joab, Abishai, and Ittai, "Be gentle with the young man Absalom, for my sake." All the troops heard the king commanding the commanders about Absalom. Apesaki mitindo oyo epai ya Joabi, Abishayi mpe Itayi : « Na kombo na ngai, bosala malembe na elenge mobali Abisalomi. » Basoda nyonso bayokaki mokonzi kopesa mitindo na mokambi moko na moko, na tina na Abisalomi.
6 The troops went out to the field against Israel, and the battle happened in the forest of Ephraim. Mampinga etambolaki kati na zamba mpo na kobundisa Isalaele, mpe bitumba ezalaki kati na zamba ya Efrayimi.
7 There Israel's army was defeated by David's men, and the slaughter that day was great: 20,000 men. Kuna, mampinga ya Davidi elongaki mampinga ya Isalaele, mpe basoda nkoto tuku mibale bakufaki mokolo wana kati na mampinga ya Isalaele.
8 The battle spread across the whole region, and the forest devoured more troops that day than the sword devoured. Bitumba epanzanaki mboka mobimba ; mpe mokolo wana, bato oyo bakufaki kati na zamba bazalaki ebele koleka bato oyo bakufaki na mopanga.
9 Absalom encountered David's men. Riding his mule, he passed under the thick branches of a great oak, and his head caught fast in the tree. He hung between heaven and earth as the mule went on beneath him. Abisalomi akutanaki na bato ya Davidi na mbalakata. Azalaki kotambola na likolo ya mile na ye. Bongo tango mile ekimaki, ekotaki na se ya nzete ya terebente oyo ezalaki na bitape ekangana-kangana, mpe moto ya Abisalomi ekangamaki na nzete. Abisalomi atikalaki ya kodiembela na likolo, kasi mile oyo azalaki kotambolisa ekobaki kokima mbangu.
10 A certain man saw it and told Joab, "I just saw Absalom hanging in an oak." Tango moko kati na basoda amonaki ye, alobaki na Joabi : — Namoni Abisalomi amidiembiki na nzete ya terebente.
11 Joab said to the man who told him, "So you saw him! Why then did you not strike him to the ground there? I'd have owed you ten days' wages in silver and a belt." Joabi alobaki na moto oyo ayebisaki ye likambo yango : — Boni, omoni ye ? Mpo na nini obomaki ye te mbala moko ? Soki obomaki ye, nalingaki kopesa yo bagrame pene nkama moko ya palata mpe mokaba.
12 But the man told Joab, "Even if 1,000 days' wages in silver were weighed into my palm, I wouldn't raise my hand against the king's son. For we all heard the king order you, Abishai, and Ittai, 'Protect the young man Absalom for my sake.' Kasi moto yango azongiselaki Joabi : — Ezala soki batie mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na maboko na ngai, nakosembola loboko na ngai te mpo na koboma mwana ya mokonzi. Pamba te toyokaki mitindo oyo mokonzi apesaki epai na yo, epai na Abishayi mpe epai na Itayi, tango alobaki : « Na kombo na ngai, bosala mabe te na elenge mobali Abisalomi. »
13 Otherwise I'd have thrown away my life, for nothing is hidden from the king, and you'd have stood apart from me." Eloko moko te ebombamaka na miso ya mokonzi. Bongo soki natosaki mokonzi te mpe soki nabomaki Abisalomi, yo olingaki na yo kokotela ngai te.
14 Joab said, "I won't waste time with you like this." He took three javelins in his hand, drove them into Absalom's heart while he was still alive, in the oak's heart. Joabi alobaki : — Nakoki te kolekisa tango na ngai elongo na yo. Boye azwaki makonga misato na maboko na ye mpe atubaki yango na motema ya Abisalomi oyo azalaki nanu ya bomoi kati na nzete ya terebente.
15 And ten young men, Joab's armor-bearers, surrounded Absalom, struck him, and killed him. Sima, bilenge mibali zomi oyo bamemaki bibundeli ya Joabi, bazingaki Abisalomi, babetaki ye mpe babomaki ye.
16 Joab blew the ram's horn, and the troops stopped chasing Israel, for Joab held them back. Joabi abetaki kelelo, mpe masanga ya mampinga etikaki kolanda Isalaele, pamba te apekisaki bango.
17 They took Absalom, threw him into a big forest pit, and heaped a huge pile of stones over him. All Israel fled, each to his own home. Bazwaki Abisalomi, babwakaki ye na zamba kati na libulu moko ya monene mpe bazipaki ye na se ya mopiku ya mabanga. Na tango wana, basoda nyonso ya Isalaele bakimaki na bandako na bango.
18 During his lifetime Absalom had set up a pillar in the King's Valley, saying, "I have no son to keep my name remembered." He named the pillar after himself, and it is called Absalom's Monument to this day. Nzokande, wana Abisalomi azalaki nanu na bomoi, azwaki libanga ya ekaniseli mpe atelemisaki yango na lubwaku ya mokonzi lokola ekaniseli mpo na ye, pamba te amilobelaki : « Nazali te na mwana mobali oyo akoki komema kombo na ngai lokola ekaniseli. » Boye apesaki libanga yango kombo na ye, mpe yango wana babengaka yango kino lelo « Ekaniseli ya Abisalomi. »
19 Ahimaaz son of Zadok said, "Let me run and tell the king our Father has vindicated him against his enemies." Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki, alobaki na Joabi : — Pesa ngai nzela ya kokima mbangu mpo na kokende koyebisa mokonzi ete Yawe akangoli ye na maboko ya banguna na ye.
20 Joab said, "You're not the man to carry news today. You may carry news another day, but today you will carry none, for the king's son is dead." Joabi alobaki na ye : — Ezali yo te moto osengeli komema sango na mokolo ya lelo ; okoki na yo komema sango mokolo mosusu, kasi mpo na lelo, osengeli te kosala yango, pamba te moto oyo akufi azali mwana ya mokonzi.
21 Joab said to the Cushite, "Go, tell the king what you saw." The Cushite bowed to Joab and ran. Bongo Joabi alobaki na moto moko ya Kushi : — Kende koloba na mokonzi makambo oyo omoni. Moto ya Kushi agumbamaki liboso ya Joabi mpe akendeki mbangu.
22 Ahimaaz son of Zadok said to Joab again, "Come what may, please let me also run after the Cushite." Joab replied, "Why run, my son? You have no news worth a reward." Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki, alobaki lisusu na Joabi : — Oyo ekoya eya ! Pesa ngai nzela mpo ete nakende mbangu liboso ya moto ya Kushi. Kasi Joabi azongisaki : — Mwana na ngai ya mobali, mpo na nini olingi kaka kokende ? Ezali na yango te sango oyo ekopesa yo lifuti.
23 "Whatever happens," he said, "I'll run." "Run," Joab said. So Ahimaaz ran the plain route and outran the Cushite. Ayimaatsi alobaki : — Oyo ekoya eya ! Nandimi kokima mbangu. Joabi alobaki : — Kima mbangu ! Boye Ayimaatsi akimaki mbangu na nzela ya etando ya Yordani mpe alekaki moto ya Kushi.
24 David was sitting between the two gates. The watchman went up to the gate roof at the wall, lifted his eyes, and saw a man running alone. Na tango yango, Davidi avandaki kati ya ekuke ya kati mpe ekuke ya libanda, mpe mokengeli amataki na likolo ya ndako ya ekuke, pembeni ya mir. Tango atombolaki miso, amonaki mwana mobali moko kokima mbangu ye moko.
25 The watchman called out, telling the king. The king said, "If alone, he brings news." The runner kept coming closer. Mokengeli agangaki epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye. Mokonzi alobaki : « Soki azali ye moko, wana azali na basango malamu. » Moto azalaki kaka kopusana.
26 The watchman saw another man running and called to the gatekeeper, "Look, another man running alone!" The king said, "He too brings news." Bongo mokengeli amonaki moto mosusu kokima mbangu, mpe abelelaki mokengeli ekuke : — Tala, moto mosusu azali kokima mbangu ye moko. Mokonzi alobaki : — Ye mpe amemi basango malamu.
27 The watchman said, "The first one runs like Ahimaaz son of Zadok." The king said, "He is a good man; he comes with good news." Mokengeli alobaki : — Namoni moto ya liboso kokima mbangu lokola Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki. Mokonzi alobaki : — Azali moto malamu, azali koya na basango malamu.
28 Ahimaaz called to the king, "All is well!" He bowed before the king, face to the ground, and said, "Blessed be your Father, who handed over those who rebelled against my lord the king." Bongo Ayimaatsi abelelaki mokonzi : — Makambo nyonso ezali malamu ! Agumbamaki liboso ya mokonzi elongi kino na mabele mpe alobaki : — Tika ete Yawe, Nzambe na yo, apambolama ! Akabi bato oyo batombolaki maboko na bango mpo na kobundisa mokonzi, nkolo na ngai.
29 The king asked, "Is the young man Absalom safe?" Ahimaaz answered, "When Joab sent off the king's servant and me your servant, I saw a great commotion, but I did not know what it was." Mokonzi atunaki : — Boni elenge mobali Abisalomi, azali malamu ? Ayimaatsi azongisaki : — Namonaki mobulu makasi kaka tango Joabi alingaki kotinda mosali ya mokonzi mpe ngai, mosali na yo, kasi nayebaki te soki ezalaki likambo nini.
30 The king said, "Step aside and stand here." So he stepped aside and stood still. Mokonzi alobaki : — Telema pembeni mpe zela ngai wana. Boye akendeki mpe atelemaki wana.
31 The Cushite arrived and said, "Good news, my lord the king! Today the LORD cleared you from the hand of all who rose against you." Bongo moto ya Kushi akomaki mpe alobaki : — Mokonzi, nkolo na ngai, yoka basango malamu ! Yawe akangoli yo lelo na maboko ya bato oyo babundisaki yo.
32 The king asked the Cushite, "Is the young man Absalom safe?" The Cushite answered, "May my lord the king's enemies, and all who rise against you to harm you, be like that young man." Mokonzi atunaki na moto ya Kushi : — Boni elenge mobali Abisalomi, azali malamu ? Moto ya Kushi azongisaki : — Tika ete banguna ya mokonzi, nkolo na ngai, mpe bato nyonso oyo bazali kotelema mpo na kosala yo mabe bazala lokola elenge mobali wana.
19:1 The king trembled. He went up to the gate's upper room, weeping, saying as he walked: "My son Absalom! My son, my son, Absalom! If only I had died instead of you, Absalom, my son, my son!" Mokonzi ayokaki pasi na motema, amataki na shambre oyo ezalaki na likolo ya ekuke mpe alelaki. Tango azalaki kokende, alobaki : « Ah Abisalomi, mwana na ngai ya mobali ! Mwana na ngai ya mobali, mwana na ngai ya mobali Abisalomi ! Ebongaki ete nakufa na esika na yo ! Oh Abisalomi, mwana na ngai ya mobali, mwana na ngai ya mobali ! »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]