2Word reached Joab: "Look, the king is weeping and mourning for Absalom."OLCBSango ekomelaki Joabi na koloba : « Mokonzi azali kolela mpe asali matanga mpo na Abisalomi. »
3So that day the victory became mourning for all the people, because they heard that day, "The king grieves over his son."OLCBMokolo wana, elonga ebongwanaki matanga mpo na bato nyonso, pamba te bato bayokaki na mokolo wana sango koloba : « Mokonzi azali na mawa makasi mpo na mwana na ye ya mobali. »
4The people crept into the city that day, like those shamed and slinking away after fleeing battle.OLCBNa mokolo wana kaka, bato bazongaki na nkuku kati na engumba lokola mampinga oyo bazali koyoka soni mpo ete bakimi na bitumba.
5The king covered his face, crying loudly, "My son Absalom! Absalom, my son, my son!"OLCBMokonzi azipaki elongi mpe alelaki makasi : « Oh mwana na ngai ya mobali, Abisalomi ! Oh mwana na ngai ya mobali, Abisalomi ! Mwana na ngai ya mobali ! »
6Joab came to the king and said, "Today you have shamed all your servants, who this day saved your life, the lives of your sons and daughters, and the lives of your wives and concubines,OLCBJoabi akendeki kokuta mokonzi kati na ndako mpe alobaki na ye : « Lelo, oyokisi bato na yo nyonso soni, bato oyo bawuti kobikisa bomoi na yo, bomoi ya bana na yo ya mibali mpe ya basi, bomoi ya basi na yo mpe bomoi ya bamakangu na yo.
7by loving those who hate you and hating those who love you. Today you've shown that commanders and servants mean nothing to you. Now I know that if Absalom lived and we all had died, you'd be pleased.OLCBOlingaka bato oyo bayinaka yo mpe oyinaka bato oyo balingaka yo. Lelo penza, otalisi yango polele ete bakonzi ya basoda mpe basoda na bango bazali pamba na miso na yo. Namoni ete olingaki kosepela lelo soki Abisalomi azalaki na bomoi mpe soki biso nyonso tokufaki.
8Now get up, go out, and speak kindly to your servants. I swear by our Father, if you don't go out, not one man will stay with you tonight—worse for you than all the trouble you've had since your youth."OLCBSik’oyo, bima mpe pesa longonya na basoda na yo. Nalapi ndayi na Kombo na Yawe ete soki obimi te, soda moko te akotikala elongo na yo kino butu eya. Ekozala mpo na yo pasi, koleka makama nyonso oyo ekweyela yo wuta na bolenge na yo kino lelo. »
9So the king got up and sat in the gate. When the people were told, "Look, the king is sitting in the gate," they all came before him. Now Israel had fled, everyone to his home.OLCBBoye mokonzi atelemaki mpe avandaki na ekuke. Bongo tango bayebisaki basoda ete mokonzi avandi na ekuke, bango nyonso bayaki pene na ye. Mpe na tango wana, bana ya Isalaele bakimaki moto na moto na ndako na ye.
10Throughout the tribes of Israel the people argued: "The king saved us from our enemies, rescued us from the Philistines, but now he's fled the land because of Absalom.OLCBKati na bikolo ya Isalaele, bato bazalaki kotiana tembe mpe koloba : « Mokonzi oyo akangolaki biso na maboko ya banguna na biso, bato ya Filisitia, ye nde sik’oyo akimi mokili likolo ya Abisalomi ;
11But Absalom, whom we anointed to rule us, died in battle. So why say nothing about bringing the king back?"OLCBmpe Abisalomi oyo topakolaki mafuta mpo ete akamba biso asili kokufa na bitumba. Boye mpo na nini bozali koloba eloko te mpo na kozongisa mokonzi na Yelusalemi ? »
12King David sent word to Zadok and Abiathar the priests: "Tell the elders of Judah, 'Why be the last to bring the king back home, when all Israel's word has reached the king at his home?'OLCBMokonzi Davidi atindaki sango epai ya Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari : « Botuna na bampaka ya Yuda : mpo na nini bosengeli kozala bato ya suka mpo na kozongisa mokonzi na ndako na ye, pamba te makambo oyo ezali kolobama kati na Isalaele mobimba esili kokoma na matoyi ya mokonzi ?
13You are my brothers, my own flesh and blood. So why should you be last to bring back the king?OLCBBozali bandeko na ngai ya mibali, nzoto na ngai mpe makila na ngai. Bongo mpo na nini kozala bato ya suka mpo na kozongisa mokonzi ?
14Say to Amasa, 'Aren't you my own flesh and blood? May our Father do this to me and more if you don't become my permanent army commander, replacing Joab.'"OLCBMpe boloba na Amasa : ‹ Ozali mosuni na ngai mpe makila na ngai te ? Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi ndenge alingi soki banda sik’oyo okomi te mokonzi ya mampinga na ngai na esika ya Joabi mpo na libela. › »
15David won over all the men of Judah as one man, and they sent word to the king: "Return, you and all your servants."OLCBMakambo oyo Davidi alobaki ekotaki na mitema ya bato nyonso ya Yuda lokola moto moko. Boye batindaki maloba epai ya mokonzi mpo na koloba na ye : « Zonga, yo elongo na basali na yo nyonso. »
16The king returned and came to the Jordan; Judah came to Gilgal to meet the king and bring him across the Jordan.OLCBMokonzi azongaki mpe akomaki kino na Yordani. Bato ya Yuda bayaki na Giligali mpo na kokende kokutana na mokonzi mpe kokatisa ye mayi ya Yordani.
17Shimei son of Gera, the Benjaminite from Bahurim, rushed down with Judah's men to meet King David.OLCBShimei, mwana mobali ya Gera, moto ya ekolo ya Benjame ya Bawurimi, akendeki mbangu elongo na bato ya Yuda mpo na kokutana na mokonzi Davidi.
18With him were 1,000 Benjamites, and Ziba, servant of Saul's house, with his fifteen sons and twenty servants. They rushed to the Jordan ahead of the king,OLCBAzalaki elongo na bato ya Benjame, nkoto moko, mpe Tsiba, moto oyo azalaki kosala kati na libota ya Saulo, elongo na bana na ye ya mibali zomi na mitano mpe basali na ye, tuku mibale. Bakendeki mbangu na Yordani epai wapi mokonzi azalaki.
19and crossed the ford to bring the king's household over and do what pleased him. Shimei son of Gera fell before the king as he was about to cross the Jordan,OLCBBamataki na bwato mpo na kokatisa libota ya mokonzi mpe mpo na kosala nyonso oyo ezali malamu na miso ya mokonzi. Tango Shimei, mwana mobali ya Gera, akatisaki Yordani, akweyaki liboso ya mokonzi
20and said, "Please, my lord, don't hold this against me, and don't remember how your servant did wrong the day my lord the king left Jerusalem. Please, my lord the king, don't take it to heart.OLCBmpe alobaki na ye : « Tika ete nkolo na ngai atangela ngai ngambo te, akanisa te mabe oyo mosali na ye asalaki mokolo oyo mokonzi, nkolo na ngai, alongwaki na Yelusalemi. Tika ete mokonzi alongola likambo yango na makanisi na ye.
21Your servant knows I have sinned. So today I've come first of all Joseph's house to meet my lord the king."OLCBPamba te ngai, mosali na yo, nayebi ete nasalaki masumu, mpe lelo nayei awa lokola moto ya liboso kati na libota mobimba ya Jozefi mpo na kokutana na mokonzi, nkolo na ngai. »
22Then Abishai son of Zeruiah said, "Shouldn't Shimei be put to death for cursing our Father's anointed?"OLCBAbishayi, mwana mobali ya Tseruya, alobaki : — Boni, Shimei asengelaki te kokufa mpo na likambo oyo, pamba te alakelaki mabe mopakolami na Yawe ?
23David said, "Why meddle with me, sons of Zeruiah? Why should you become my enemies today? Should anyone be put to death in Israel today? Don't I know that today I am king over Israel?"OLCBDavidi azongisaki : — Likambo nini kati na ngai mpe bino bana mibali ya Tseruya ? Bokomi lelo banguna na ngai ! Boni, basengeli koboma moto moko lelo kati na Isalaele ? Nayebi te ete ngai nde nazali lelo mokonzi ya Isalaele ?
24The king told Shimei, "You will not die," and the king swore to him.OLCBBongo mokonzi alobaki na Shimei : — Okokufa te. Mpe mokonzi alakaki Shimei na nzela ya ndayi.
25Mephibosheth, Saul's grandson, came down to meet the king. He had not tended his feet, trimmed his beard, or washed his clothes from the day the king left until he came back safely.OLCBMefibosheti, koko ya Saulo, akendeki mpe kokutana na mokonzi. Banda mokolo oyo mokonzi abimaki kino azongaki, Mefibosheti atikalaki kosukola makolo na ye te, akataki mandefu te mpe asukolaki bilamba na ye te.
26When he reached Jerusalem to meet the king, the king asked, "Why didn't you go with me, Mephibosheth?"OLCBTango akomaki na Yelusalemi mpo na kokutana na mokonzi, Davidi atunaki ye : — Mefibosheti, mpo na nini okendeki te elongo na ngai ?
27He said, "My lord the king, my servant tricked me. Your servant said, 'I'll saddle my donkey and ride with the king,' for your servant is lame.OLCBMefibosheti azongisaki : — Mokonzi, nkolo na ngai, mosali na ngai akosaki ngai. Pamba te lokola ngai, mosali na yo, nazali na mbeba na makolo, namilobelaki : « Nakosenga ete babongisela ngai ane na ngai, mpe nakomata yango mpo ete nakende elongo na mokonzi. »
28He slandered your servant to my lord the king. But my lord the king is like the angel of our Father; do what seems good to you.OLCBKasi Tsiba, mosali na ngai, akosaki ngai. Akoselaki mosali na yo makambo epai ya mokonzi, nkolo na ngai. Mokonzi, nkolo na ngai, azali lokola Anjelu na Nzambe. Boye sala sik’oyo makambo oyo omoni ete ezali malamu.
29All my father's house deserved only death from my lord the king, yet you set your servant among those who eat at your table. What right have I to appeal to the king again?"OLCBPamba te na makanisi ya mokonzi, nkolo na ngai, esengelaki koboma bato nyonso ya libota ya koko na ngai, Saulo ; kasi atako bongo, ondimaki mosali na yo na mesa, kati na bato oyo bazali kolia elongo na yo. Boye makoki nini nakoki lisusu kozala na yango ya kosenga eloko epai ya mokonzi ?
30The king said, "Why say more about your affairs? I've decided: you and Ziba will divide the land."OLCBMokonzi alobaki na ye : — Mpo na nini maloba ebele boye ? Nasili kopesa mitindo ete yo mpe Tsiba bokabola bilanga.
31Mephibosheth said to the king, "Let him take it all, now that my lord the king has come home safely."OLCBMefibosheti alobaki na ye : — Lokola mokonzi, nkolo na ngai, azongi mobimba na ndako na ye, tika ete akamata na ye ata nyonso.
32Barzillai the Gileadite came down from Rogelim and crossed the Jordan with the king, to see him off.OLCBBarizilayi, moto ya Galadi, awutaki na Rogelimi mpo na kokatisa ebale Yordani elongo na mokonzi mpe kotika ye kokoba mobembo na ye.
33Barzillai, very old at eighty, had fed the king during his stay at Mahanaim, for he was a very wealthy man.OLCBNzokande, Barizilayi akomaki mobange, azalaki na mibu tuku mwambe, mpe ezalaki ye nde asungaki mokonzi na mikolo nyonso oyo mokonzi avandaki na Maanayimi, pamba te azalaki moto ya bozwi mingi.
34The king told Barzillai, "Cross over with me, and I will provide for you at my side in Jerusalem."OLCBMokonzi alobaki na Barizilayi : — Katisa elongo na ngai mpe vanda epai na ngai na Yelusalemi, mpe ngai nakosunga yo.
35Barzillai said to the king, "How many years do I have left, that I should go up with the king to Jerusalem?OLCBKasi Barizilayi azongiselaki mokonzi : — Natikali na mibu boni mpo ete nakende elongo na mokonzi na Yelusalemi ?
36I am eighty years old today. Can I tell good from bad? Can your servant taste what he eats or drinks? Can I still hear singing men and women? Why should your servant burden my lord the king further?OLCBNazali sik’oyo na mibu tuku mwambe. Boni, nakoki na ngai lisusu kokesenisa malamu mpe mabe ? Mosali na yo akoki koyoka lisusu elengi ya biloko oyo azali kolia mpe komela ? Nakoki lisusu koyoka mongongo ya bayembi ya mibali mpe ya basi ? Bongo mpo na nini mokonzi, nkolo na ngai, akoki lisusu komitungisa mpo na mosali na yo ?
37Your servant will cross the Jordan with the king a short way. Why should the king repay me with such a reward?OLCBMosali na yo akokatisa Yordani elongo na mokonzi mpo na mwa tango moke kaka. Kasi mpo na nini mokonzi akoki kopesa ngai lifuti ya boye ?
38Please let your servant return to die in my own city near my father and mother's grave. But your servant Chimham is here; let him cross over with my lord the king, and do for him what seems good to you."OLCBNabondeli yo, tika ete mosali na yo azonga mpo na kokufa na engumba na ngai pene ya kunda ya tata mpe mama na ngai ! Kasi tala mwana na ngai ya mobali, mosali na yo, Kimeami. Tika ete akende elongo na mokonzi, nkolo na ngai, mpe salela ye makambo oyo yo omoni ete ezali malamu.
39The king said, "Chimham will cross with me, and I will do for him what pleases you, and whatever you ask of me I will do for you."OLCBMokonzi azongisaki : — Tika ete Kimeami akende elongo na ngai, mpe ngai nakosalela ye makambo oyo ezali malamu na miso na yo. Nakosalela ye nyonso oyo akosenga ngai.
40All the people crossed the Jordan, and the king crossed. The king kissed Barzillai and blessed him, and Barzillai returned home.OLCBSima na bato nyonso kokatisa ebale Yordani, mokonzi mpe akatisaki. Bongo mokonzi apesaki Barizilayi beze mpe apambolaki ye. Mpe Barizilayi azongaki na ndako na ye.
41The king crossed to Gilgal, Chimham with him. All Judah's people, and half of Israel's, escorted the king.OLCBTango mokonzi akatisaki na Giligali, Kimeami mpe akatisaki elongo na ye. Bato nyonso ya Yuda mpe ndambo ya mabota ya Isalaele balekisaki mokonzi.
42Then all the men of Israel came to the king and asked, "Why did our brothers, the men of Judah, steal you away and bring the king and his household across the Jordan, with all David's men?"OLCBKasi na mbala moko, bato nyonso ya Isalaele bayaki epai ya mokonzi mpe balobaki na ye : — Mpo na nini bandeko na biso, bato ya Yuda, bazwaki yo na kobombama ? Mpo na nini balekisaki mokonzi na ebale Yordani, elongo na libota na ye mpe bato nyonso ya Davidi elongo na ye ?
43All the men of Judah answered the men of Israel, "The king is our close relative. Why are you angry about this? Have we eaten any of the king's food, or has he given us a gift?"OLCBBato nyonso ya Yuda bazongiselaki bato ya Isalaele : — Tosalaki bongo, pamba te mokonzi azali ndeko na biso ya mosika te. Bongo mpo na nini kosilika na tina na yango ? Boni, tobikaki bomoi na biso mpo na mokonzi ? Tozwaki ata eloko moko mpo na biso ?
44The men of Israel answered the men of Judah, "We have ten shares in the king, and a greater claim on David than you. So why did you despise us? Weren't we first to speak of bringing back our king?" But Judah's words were harsher than Israel's.OLCBBato ya Isalaele bazongiselaki bato ya Yuda : — Tozali na makoki kati na mokonzi koleka mbala zomi, mpe biso nde tozali na makoki mingi koleka bino na tina na Davidi. Mpo na nini bozali komona biso lokola bato pamba. Tozalaki bato ya liboso te na koluka ndenge nini kozongisa mokonzi na biso ? Kasi bato ya Yuda bazongiselaki bato ya Isalaele na maloba makasi.