Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Samuel 20 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 A worthless man named Sheba son of Bichri, a Benjamite, was there. He blew the trumpet and shouted, "We have no share in David, no inheritance in Jesse's son! Everyone to your tents, Israel!" Moto moko ya mobulu na kombo Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya ekolo ya Benjame, abetaki kelelo mpe agangaki : « Tozali na eteni ata moko te ya lisanga na Davidi, tozali ata na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi. Isalaele, tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye ya kapo. »
2 So all Israel's men abandoned David to follow Sheba son of Bichri; but Judah's men held to their king, from the Jordan to Jerusalem. Bato nyonso ya Isalaele bakimaki Davidi mpo na kolanda Sheba, mwana mobali ya Bikiri. Kasi bato ya Yuda batikalaki pembeni ya mokonzi na bango, na nzela mobimba, longwa na Yordani kino na Yelusalemi.
3 David came to his house in Jerusalem, and the king took the ten concubines he had left to keep the house and put them under guard. He provided for them but did not sleep with them. They stayed confined until they died, living as widows. Tango mokonzi Davidi azongaki na ndako na ye, na Yelusalemi, azwaki bamakangu na ye zomi oyo atikaki mpo na kokengela ndako, mpe atiaki bango kati na ndako moko oyo bazalaki kokengela malamu. Atako azalaki kosunga bango, kasi akendeki te kosangisa na bango nzoto. Bazalaki kokengela bango kino na mokolo na bango ya kufa, mpe bazalaki lokola basi bakufisa mibali.
4 The king told Amasa, "Call the men of Judah to me within three days, and be here yourself." Mokonzi alobaki na Amasa : « Bengela ngai bato nyonso ya Yuda na mikolo misato, yo moko mpe zala awa. »
5 Amasa went to summon Judah, but delayed beyond the time the king had set for him. Kasi tango Amasa akendeki kobenga bato ya Yuda, azwaki tango molayi koleka oyo mokonzi apesaki ye.
6 David told Abishai, "Sheba son of Bichri will now harm us more than Absalom. Take your lord's men and chase him, or he'll reach fortified cities and escape us." Davidi ayebisaki Abishayi : « Sheba, mwana mobali ya Bikiri, akomonisa biso pasi mingi koleka Abisalomi. Kamata basali ya mokonzi mpe landa ye, noki te akomona bingumba batonga makasi mpe akokima biso. »
7 So Joab's men, the Cherethites, the Pelethites, and all the mighty warriors went out after him from Jerusalem to pursue Sheba son of Bichri. Boye na bokambami ya Abishayi, bato ya Joabi, bato ya Kereti, bato ya Peleti mpe basoda nyonso ya mpiko, babimaki na Yelusalemi mpo na kolanda Sheba, mwana mobali ya Bikiri.
8 At the great stone in Gibeon, Amasa met them. Joab wore his military tunic, with a belted sword in its sheath on his waist; as he stepped forward, it fell out. Tango bakomaki na libanga monene kati na Gabaoni, Amasa ayaki kokutana na bango. Joabi alataki bilamba na ye ya basoda : na loketo na ye, alataki mokaba oyo kati na yango atiaki mopanga oyo ezalaki kati na ebombelo na yango na loketo. Bongo tango abandaki kopusana, mopanga yango ekweyaki.
9 Joab said to Amasa, "Are you well, my brother?" With his right hand Joab grasped Amasa's beard to kiss him. Joabi alobaki na Amasa : « Boni ndeko na ngai ya mobali, ozali malamu ? » Bongo Joabi asalelaki loboko na ye ya mobali mpo na kosimba Amasa na mandefu mpe kopesa ye beze.
10 Amasa did not notice the sword in Joab's hand. Joab struck his belly, spilling his intestines to the ground. Without a second blow, Amasa died. Then Joab and his brother Abishai pursued Sheba son of Bichri. Amasa azalaki na bokebi te mpo na kotala mopanga oyo ezalaki na loboko ya mwasi ya Joabi. Bongo Joabi atobolaki ye libumu, mpe misopo na ye nyonso epanzanaki kino na se ; mpe Amasa akufaki mbala moko. Joabi azalaki te na tina na kotuba ye mopanga na mbala ya mibale. Boye Joabi mpe ndeko na ye ya mobali, Abishayi, balandaki Sheba, mwana mobali ya Bikiri.
11 One of Joab's young men stood by Amasa and said, "Whoever favors Joab, whoever is for David—follow Joab!" Moto moko kati na bato ya Joabi atelemaki pembeni ya Amasa mpe alobaki : « Tika ete bato nyonso oyo bazali mpo na Joabi mpe mpo na Davidi balanda Joabi ! »
12 Amasa lay wallowing in his blood in the middle of the road. When the man saw all the troops stopping there, he dragged Amasa from the road into the field and threw a garment over him, since everyone who came by stopped. Nzokande, wana Amasa azalaki kobaluka kati na makila na ye na kati-kati ya nzela, moto yango amonaki ete mampinga nyonso bayaki kotelema wana. Boye abendaki Amasa libanda ya nzela, atandaki ye kati na elanga mpe afinikaki ye elamba.
13 Once he was moved off the road, all the men followed Joab to pursue Sheba son of Bichri. Sima na ye kolongola Amasa na nzela, bato nyonso bakendeki elongo na Joabi mpo na kolanda Sheba, mwana mobali ya Bikiri.
14 Sheba passed through all the tribes of Israel to Abel of Beth Maacah; all the Bicrites gathered and followed him too. Mpo na kokoma na Abele-Beti-Maaka, Sheba akatisaki bikolo nyonso ya Isalaele mpe etuka mobimba ya bato ya Berimi oyo mpe basanganaki mpe balandaki Joabi.
15 They came and besieged him in Abel of Beth Maacah. They raised a siege ramp against the city, standing against the outer rampart, while all Joab's troops battered the wall to bring it down. Joabi elongo na mampinga na ye nyonso bazingelaki Sheba kati na Abele-Beti-Maaka mpe batongaki na libanda ya engumba mwa ngomba oyo ekomaki na molayi ya mir. Tango bazalaki kotimola mabele mpo na koluka kokweyisa mir,
16 Then a wise woman called from the city, "Listen! Listen! Tell Joab, 'Come here, so I can speak with you.'" mwasi moko ya bwanya agangaki wuta na engumba : « Boyoka ! Boyoka ! Boyebisa Joabi ete aya awa mpo ete naloba na ye. »
17 As he approached, the woman asked, "Are you Joab?" "I am," he said. She said, "Hear your servant's words." "I'm listening," he said. Joabi apusanaki pene na ye, mpe mwasi yango atunaki ye : — Yo nde Joabi ? Azongisaki : — Iyo, ezali ngai. Mwasi alobaki : — Yoka makambo oyo mwasi mosali na yo azali koloba. Joabi azongisaki : — Nazali koyoka.
18 She said, "In the old days they used to say, 'Just ask for counsel at Abel,' and that settled the matter. Mwasi yango akobaki koloba : — Na kala, bazalaki na ezaleli ya koloba : « Botuna mayele na mboka Abele, » mpe likambo esili.
19 I am among the peaceful and faithful in Israel. You are trying to destroy a city, a mother in Israel. Why swallow up our Father's inheritance?" Tozali bato ya kimia mpe ya sembo kati na Isalaele. Kasi yo ozali koluka koboma engumba oyo ezali mama kati na Isalaele ! Mpo na nini olingi kobebisa libula ya Yawe ?
20 Joab answered, "I would never, never swallow up or destroy! Joabi azongisaki : — Mosika na ngai ! Mosika na ngai likanisi ya kobebisa to koboma !
21 Not so. But Sheba son of Bichri, from the hills of Ephraim, has rebelled against the king, against David. Hand over this one man, and I'll pull back from the city." The woman told Joab, "His head will be thrown to you over the wall." Ezali bongo te. Kasi Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya etuka ya bangomba ya Efrayimi, atombokelaki mokonzi Davidi. Kaba ye, ye moko kaka, mpe nakotika kozingela engumba. Mwasi yango alobaki na Joabi : — Bakobwakela yo moto na ye na likolo ya mir.
22 The woman went to all the people with her wise plan. They cut off the head of Sheba son of Bichri and threw it to Joab. He blew the trumpet, and they scattered from the city, each to his home. Joab returned to the king in Jerusalem. Bongo mwasi akendeki epai ya bato nyonso mpe ayebisaki bango maloba na ye ya bwanya. Boye bakataki moto ya Sheba, mwana mobali ya Bikiri, mpe babwakelaki yango Joabi. Bongo Joabi abetaki kelelo, mpe bato na ye bapanzanaki liboso ya engumba ; moto na moto azongaki na ndako na ye. Joabi mpe azongaki na Yelusalemi epai ya mokonzi.
23 Joab led all Israel's army; Benaiah son of Jehoiada led the Cherethites and Pelethites. Joabi azalaki kokamba mampinga nyonso ya Isalaele ; Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki kokamba bato ya Kereti mpe bato ya Peleti.
24 Adoram was in charge of the forced labor; Jehoshaphat son of Ahilud was the recorder; Adorami azalaki kokamba misala makasi ; Jozafati, mwana mobali ya Ayiludi, azalaki mobombi mikanda ;
25 Sheva was secretary; and Zadok and Abiathar were priests; Sheva azalaki mokomi mikanda ; Tsadoki mpe Abiatari bazalaki Banganga-Nzambe ;
26 and Ira the Jairite was also David's priest. mpe Ira, moto ya Yairi, azalaki Nganga-Nzambe ya Davidi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]