Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Samuel 21 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Now there was a famine in the days of David for three years, year after year; so David asked our Father about it. And our Father said, "There is bloodguilt on Saul and on his house, because he put the Gibeonites to death." Tango Davidi azalaki mokonzi, nzala makasi ekotaki mpe esalaki mibu misato. Davidi atunaki Yawe, mpe Yawe alobaki na ye : « Ezali mpo na Saulo mpe libota na ye oyo esopaki makila, pamba te babomaki bato ya Gabaoni. »
2 So the king summoned the Gibeonites and spoke to them. (The Gibeonites were not Israelites but a remnant of the Amorites; Israel had sworn to spare them, yet Saul, passionate for Israel and Judah, had sought to kill them.). Mokonzi abengisaki bato ya Gabaoni mpo na kosolola na bango. Nzokande bato ya Gabaoni bazalaki kotangama te kati na bato ya Isalaele, kasi bakanganaki na batikali kati na bato ya Amori ; bongo bato ya Isalaele bakanganaki na bato ya Amori, na nzela ya ndayi, mpo na kotika bango na bomoi. Kasi Saulo, na bolingo na ye oyo eleka ndelo mpo na Isalaele mpe Yuda, alukaki kosilisa koboma bango.
3 David asked the Gibeonites, "What can I do for you? How can I make atonement so you'll bless our Father's people?" Davidi atunaki bato ya Gabaoni : — Eloko nini nakoki kosala mpo na bino ? Na mabe oyo basalaki bino, ndenge nini nakoki kobongisa makambo mpo ete bopambola libula na Yawe ?
4 The Gibeonites said, "It is not silver or gold between us and Saul or his house, and we have no right to kill anyone in Israel." David said, "Whatever you say, I will do for you." Bato ya Gabaoni bazongiselaki ye : — Mpo na kobongisa makambo na biso elongo na Saulo mpe libota na ye, tozali na posa te ya palata to ya wolo ; tokoki mpe te koboma ata moto moko kati na Isalaele. Davidi atunaki lisusu : — Bolingi ete ngai nasala nini mpo na bino ?
5 They said to the king, "The man who wiped us out and plotted our destruction, so we'd have no place left anywhere in Israel's territory, Bazongiselaki mokonzi : — Lokola tata wana alingaki kosilisa koboma biso mpe asalaki mabongisi ya kobebisa biso mpo ete tolimwa kati na mokili mobimba ya Isalaele,
6 let seven men of his descendants be handed over to us, and we will hang them before the LORD at Gibeah of Saul, the LORD's chosen one." The king said, "I will hand them over." tika ete mokonzi akaba na maboko na biso mibali sambo kati na bakitani ya Saulo mpo ete todiembika banzoto na bango liboso ya Yawe, na Gibea, engumba ya Saulo, moponami na Yawe. Mokonzi alobaki : — Nakopesa bino bango.
7 But the king spared Mephibosheth, son of Jonathan, son of Saul, because of the oath before our Father between David and Jonathan, Saul's son. Mokonzi atikaki na bomoi Mefibosheti, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Saulo, mpo na boyokani oyo ezalaki kati na bango mibale, Davidi mpe Jonatan, mwana mobali ya Saulo, tango Davidi alapaki ndayi na Kombo na Yawe.
8 But the king took Armoni and Mephibosheth, the two sons Rizpah daughter of Aiah bore to Saul, along with the five sons Merab daughter of Saul bore to Adriel son of Barzillai the Meholathite. Kasi mokonzi akangaki Arimoni mpe Mefibosheti, bana mibali oyo Ritsipa, mwana mwasi ya Aya, abotelaki Saulo ; akangaki lisusu bana mibali mitano oyo Mikali, mwana mwasi ya Saulo, abotelaki Adriyeli, mwana mobali ya Barizilayi, moto ya Meola ;
9 He handed them to the Gibeonites, who hanged them on the mountain before our Father; the seven fell together. They were put to death in the first days of harvest, as the barley harvest began. akabaki bango na maboko ya bato ya Gabaoni. Bongo bato ya Gabaoni babomaki bango mpe badiembikaki banzoto na bango na ngomba liboso ya Yawe. Bango nyonso sambo bakufaki elongo. Babomaki bango na mikolo ya liboso ya tango ya kobuka bambuma, kaka na ebandeli ya tango oyo babukaki bambuma ya orje.
10 Then Rizpah daughter of Aiah took sackcloth and spread it on the rock, from the start of harvest until rain fell on the bodies; by day she kept the birds off them, by night the wild animals. Bongo Ritsipa, mwana mwasi ya Aya, alongolaki elamba ya saki oyo alataki mpe atandaki yango na libanga ; avandaki wana, wuta na ebandeli ya tango ya kobuka bambuma ya orje kino na eleko oyo mvula enokelaki bibembe. Na moyi, apekisaki bandeke ya likolo kokita na likolo ya bibembe yango ; mpe na butu, abenganaki banyama ya zamba.
11 When David was told what Rizpah the daughter of Aiah, Saul's concubine, had done, Davidi ayokaki makambo oyo Ritsipa, mwana mwasi ya Aya, makangu ya Saulo, asalaki.
12 he went to the men of Jabesh-gilead and took the bones of Saul and his son Jonathan, which they had secretly removed from Beth-shan's square, where the Philistines hung them the day they killed Saul at Gilboa. Bongo Davidi akendeki kozwa mikuwa ya Saulo mpe ya Jonatan, mwana na ye ya mobali, epai ya bakambi ya Yabeshi ya Galadi, oyo bayibaki yango na libanda ya Beti-Sheani epai wapi bato ya Filisitia badiembikaki yango mokolo oyo babomaki Saulo, na Giliboa.
13 He brought up Saul's bones and his son Jonathan's bones from there, and they gathered the bones of the hanged men. Wuta kuna, Davidi amemaki mikuwa ya Saulo mpe ya Jonatan, mwana na ye ya mobali ; asangisaki mpe mikuwa ya bato sambo oyo babomaki mpe badiembikaki.
14 They buried the bones of Saul and his son Jonathan at Zela in Benjamin, in the tomb of his father Kish, and did all the king commanded. After that, our Father answered the prayers for the land. Bakundaki mikuwa ya Saulo mpe ya mwana na ye ya mobali, Jonatan, kati na kunda ya Kishi, tata ya Saulo, na Tsela kati na etuka ya Benjame. Basalaki makambo nyonso oyo mokonzi atindaki. Sima na yango, Nzambe ayanolaki losambo mpo na mokili ya Isalaele.
15 Again there was war between the Philistines and Israel. David went down with his servants to fight the Philistines, and he grew tired. Bitumba ezalaki lisusu kati ya bato ya Filisitia mpe bato ya Isalaele. Davidi akitaki elongo na basoda na ye mpo na kobundisa bato ya Filisitia ; mpe Davidi alembaki.
16 Ishbi-benob, a descendant of Rapha whose bronze spearhead weighed about seven and a half pounds and who wore a new sword, was about to strike David down. Yishibi-Benobi, mokitani ya Rafa, azalaki na mopanga ya sika, likonga oyo songe na yango ezalaki ya bronze mpe ezalaki ya bakilo koleka misato ; mpe abetaki tolo ete akoboma Davidi.
17 But Abishai son of Zeruiah came to David's aid, struck the Philistine down and killed him. Then David's men swore to him, "Never again go out with us to battle, or you'll put out the lamp of Israel." Kasi Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, ayaki kosunga Davidi, abetaki moto ya Filisitia mpe abomaki ye. Boye bato ya Davidi bakataki seleka epai ya mokonzi, balobaki : « Okobima lisusu te elongo na biso na bitumba mpo ete mwinda ya Isalaele ekufa te. »
18 Later there was another war with the Philistines at Gob. Sibbecai the Hushathite struck down Saph, one of the descendants of Rapha. Sima na mwa tango, ezalaki lisusu na bitumba na bato ya Filisitia, kuna na mboka Gobi. Ezalaki na tango yango nde Sibekayi, moto ya Usha, abomaki Safi, moko kati na bakitani ya Rafa.
19 There was another war with the Philistines at Gob, where Elhanan son of Jaare-oregim the Bethlehemite killed Goliath the Gittite, whose spear shaft was like a weaver's beam. Ezalaki lisusu na bitumba na bato ya Filisitia, kuna na Gobi ; mpe Elanani, mwana mobali ya Yare-Oregimi, moto ya Beteleemi, abomaki Goliati, moto ya Gati, oyo nzete ya likonga na ye ezalaki monene lokola libaya oyo basali bilamba na maboko basalelaka.
20 War broke out again at Gath, where a huge man had six fingers on each hand and six toes on each foot—twenty-four in all; he too was born to Rapha. Ezalaki lisusu na bitumba oyo esalemaki kuna na Gati ; mpe ezalaki kuna na mbinga mobali moko, mokitani ya Rafa, oyo azalaki na misapi motoba na loboko moko na moko, mpe misapi motoba na lokolo moko na moko. Na kosangisa, azalaki na misapi tuku mibale na minei.
21 And when he taunted Israel, Jonathan the son of Shimei, David's brother, struck him down. Atiolaki Isalaele ; mpe Jonatan, mwana mobali ya Shimea mpe ndeko mobali ya Davidi, abomaki ye.
22 These four descended from Rapha in Gath, and fell by the hand of David and his servants. Bango minei bazalaki bakitani ya Rafa, babotama na Gati mpe bakufaki liboso ya Davidi mpe ya basoda na ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]