Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Samuel 22 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 David spoke to our Father the words of this song when our Father rescued him from the hand of all his enemies and from the hand of Saul. Davidi ayembelaki Yawe nzembo na maloba oyo, tango Yawe akangolaki ye wuta na maboko ya banguna na ye nyonso mpe na loboko ya Saulo.
2 He said: My Father is my rock, my fortress, my rescuer. Alobaki : Yawe azali libanga na ngai, ndako na ngai ya makasi mpe mokangoli na ngai ;
3 My Father, my rock, in whom I take refuge, my shield and the power of my salvation, my stronghold and my refuge, my savior—you save me from violence. azali Nzambe na ngai, libanga na ngai mpe ebombamelo na ngai ; azali nguba na ngai, nguya oyo ebikisaka ngai, ekimelo na ngai, mpe Mobikisi na ngai. Okangolaka ngai wuta na maboko ya bato mabe.
4 I call upon my Father, who is worthy of praise, and I am saved from my enemies. Nabelelaki Yawe oyo abongi na lokumu, mpe nakangolamaki wuta na maboko ya banguna na ngai.
5 For the waves of death engulfed me; the torrents of destruction terrified me. Mbonge ya kufa efinaki ngai, mpela ya libebi epesaki ngai somo,
6 The cords of the grave entangled me; the snares of death confronted me. basinga ya mboka ya bakufi elingaki ngai, mitambo ya kufa ekangaki ngai.
7 In my distress I called upon my Father; I cried out to my God for help. From his temple he heard my voice, and my cry reached his ears. Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, nagangaki epai ya Nzambe na ngai mpo ete asunga ngai. Yawe ayokaki mongongo na ngai wuta na Tempelo na Ye, koganga na ngai mpo na kosenga lisungi ekomaki kino na matoyi na Ye.
8 Then the earth shook and quaked; the foundations of the heavens trembled and shook, because he was angry. Mabele ekomaki koningana makasi, miboko ya Lola elengaki mpe ebukanaki, pamba te Yawe asilikaki.
9 Smoke rose from his nostrils, and consuming fire came from his mouth; burning coals blazed from him. Milinga ekomaki kobima na zolo na Ye, moto makasi elongo na makala ya moto ekomaki kobima na monoko na Ye.
10 He parted the heavens and came down, with dark clouds beneath his feet. Afungolaki Lola mpe akitaki, mapata ya mwindo ezalaki na se ya matambe na Ye.
11 He mounted a cherub and flew; he soared on the wings of the wind. Amataki na likolo ya Sheribe mpe apumbwaki, apepaki na mapapu ya mopepe.
12 He made darkness his canopy around him—the dark rain clouds of the skies. Akomisaki molili oyo ezingelaki Ye mpe mapata ya mwindo ya likolo, Ndako na Ye.
13 Out of the brightness before him blazed coals of fire. Kongenga oyo ezalaki liboso na Ye ezalaki kobimisa makala ya moto.
14 My Father thundered from heaven; the Most High raised his voice. Yawe agangaki wuta na Lola, mongongo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo eyokanaki.
15 He shot his arrows and scattered his foes, hurled lightning and routed them. Abwakaki makonga na Ye, mpe atindaki yango na bangambo nyonso ; abakisaki motango ya mikalikali mpo na kopalanganisa yango.
16 The channels of the sea appeared, the foundations of the world were laid bare at the rebuke of my Father, at the blast of breath from his nostrils. Na koganga ya Yawe mpe na pema ya zolo na Ye, nzela oyo mayi ya ebale elekelaka ebimaki, mpe miboko ya mokili emonanaki na libanda.
17 He reached down from on high and took hold of me; he drew me out of deep waters. Atandaki loboko na Ye wuta na likolo, akamataki ngai mpe abimisaki ngai na likama oyo nazalaki na yango kati na mayi ya mozindo makasi.
18 He rescued me from my powerful enemy, from my foes who were too strong for me. Akangolaki ngai wuta na maboko ya monguna na ngai ya nguya mpe ya bayini na ngai, pamba te balekaki ngai na makasi.
19 They confronted me in the day of my disaster, but my Father was my support. Babundisaki ngai na mokolo oyo pasi ezalaki kokanga ngai, kasi Yawe azalaki eyekamelo na ngai.
20 He brought me out into a spacious place; he rescued me because he delighted in me. Abimisaki ngai mpo na kokomisa ngai nsomi, akangolaki ngai, pamba te alingaka ngai.
21 My Father dealt with me according to my righteousness; according to the purity of my hands he rewarded me. Yawe asalelaki ngai makambo wana kolanda bosembo na ngai, afutaki ngai kolanda bopeto ya maboko na ngai.
22 For I have kept the ways of my Father; I have not wickedly turned from my God. Pamba te nabateli banzela ya Yawe, napesi Nzambe na ngai mokongo te lokola bato mabe.
23 All his judgments are before me; I have not turned aside from his statutes. Natosaka mibeko na Ye nyonso mpe nabatelaka bikateli na Ye.
24 I was blameless before him, and I kept myself free from my guilt. Epai na Ye, nazalaki moto oyo azangi pamela mpe namibatelaki mpo ete nasala masumu te.
25 So my Father rewarded me according to my righteousness, according to my purity in his sight. Yawe afuti ngai kolanda bosembo na ngai, kolanda bopeto na ngai na miso na Ye.
26 To the faithful you show yourself faithful; to the blameless you show yourself blameless. Solo, otalisaka bosembo na Yo epai ya moto oyo atambolaka na bosembo, mpe bolamu na Yo, epai ya moto oyo azangi pamela.
27 To the pure you show yourself pure, but to the crooked you show yourself shrewd. Otalisaka bopeto na Yo epai ya moto ya peto, kasi omibombaka liboso ya moto oyo atambolaka nyoka-nyoka.
28 You save the afflicted people, but your eyes are on the haughty, to bring them low. Obikisaka banyokolami, otalaka mpe okitisaka bato na lofundu.
29 For you are my lamp, my Father; he turns my darkness into light. Oh Yawe, ozali mwinda na ngai ; obongolaka molili na ngai pole.
30 With you I can charge an army; with my Father I can leap over a wall. Elongo na Yo, nabundisaka mampinga oyo elati bibundeli ; mpe na lisungi ya Nzambe na ngai, nakatisaka bamir.
31 As for my Father, his way is perfect; the word of my Father is flawless. He is a shield to all who take refuge in him. Nzela ya Nzambe ezali ya kokoka, Liloba na Yawe ezali na mbeba te ; azali nguba mpo na bato nyonso oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.
32 For who is God but our Father? And who is a rock except our Father? Nani azali Nzambe soki Yawe te ? Nani azali libanga soki Nzambe na biso te ?
33 My Father is my strong refuge; he makes my way blameless. Ezali Nzambe nde azali ndako na ngai ya makasi, abatelaka nzela na ngai mpe akomisaka yango polele liboso na ngai ;
34 He makes my feet like the feet of a deer and sets me secure on the heights. akomisaka makolo na ngai lokola ya mboloko mpe avandisaka ngai na bisika ya likolo ;
35 He trains my hands for battle, so that my arms can bend a bow of bronze. alakisaka ngai kobunda, mpe maboko na ngai ekoki kobenda tolotolo ya bronze.
36 You have given me the shield of your salvation, and your gentleness has made me great. Okomisaka lobiko na Yo nguba na ngai, mpe lisungi na Yo ekomisaka ngai makasi.
37 You widen the path beneath me, so that my ankles do not give way. Otambolisaka ngai na kimia, mpe makolo na ngai elengaka te.
38 I pursued my enemies and destroyed them; I did not turn back until they were finished. Nalandaka banguna na ngai mpe nabomaka bango, nazongaka kaka soki nasilisi koboma bango.
39 I consumed them and shattered them so they could not rise; they fell beneath my feet. Nabebisaka bango nye, mpe bakokaka lisusu kotelema te ; bakweyaka na se ya matambe na ngai.
40 You armed me with strength for battle; you made my adversaries bow beneath me. Opesaka ngai makasi ya bitumba, ogumbaka banguna na ngai mpe otiaka bango na se ya matambe na ngai.
41 You made my enemies turn their backs in flight, and those who hated me I destroyed. Okimisaka banguna na ngai mosika na ngai, mpe nabebisaka bayini na ngai.
42 They looked, but there was no one to save them—even to my Father, but he gave no answer. Bagangaka mpo na koluka lisungi, kasi moto oyo akokaki kobikisa bango azalaka te ; babelelaka Yawe, kasi ayanolaka bango te.
43 I ground them as fine as the dust of the earth; I crushed and trampled them like mud in the streets. Nanikaka bango lokola putulu ya mabele, nafinaka bango, nanyataka bango lokola potopoto ya nzela.
44 You delivered me from the strife of my people; you kept me as head of nations; a people I did not know now serves me. Olongisaka ngai na bitumba ya bato, obatelaka ngai mpo ete nazala mokambi ya bikolo. Bato oyo nayebaki te bakomi kosalela ngai.
45 Foreigners cower before me; as soon as they hear, they obey me. Bapaya bazali koya mpo ete nasepela na bango ; soki kaka bayoki ngai, batosaka ngai.
46 Foreigners lose heart; they come trembling from their strongholds. Bango nyonso balembi nzoto mpe bakomi kobima na kolenga wuta na bandako na bango ya makasi.
47 My Father lives! Blessed be my Rock! Exalted be my Father, the Rock of my salvation! Longonya na Yawe ! Tika ete Ye oyo azali libanga na ngai akumisama ! Tika ete Nzambe, libanga ya lobiko na ngai, anetolama !
48 It is my Father who gives me justice and brings peoples down beneath me. Azali Nzambe oyo abundelaka ngai, oyo atiaka bikolo na se ya matambe na ngai,
49 He brings me out from my enemies. You lifted me high above my foes; you rescued me from the violent man. akangolaka ngai wuta na maboko ya banguna na ngai. Olongisaka ngai liboso ya banguna na ngai, obikisaka ngai na maboko ya banguna na ngai.
50 Therefore I will praise you among the nations, my Father; I will sing praises to your name. Yango wana, nakosanzola Yo, Yawe, kati na bikolo, nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
51 He gives great victories to his king and shows covenant love to his anointed, to David and his descendants forever. Yawe apesaka elonga monene epai ya mokonzi na Ye, atalisaka bolingo na Ye epai ya mopakolami na Ye, epai ya Davidi mpe libota na ye mpo na libela.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]