Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Samuel 23 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Now these are the last words of David. The oracle of David son of Jesse, the oracle of the man raised on high, anointed by the God of Jacob, our Father, Israel's beloved singer of songs: Tala maloba ya suka ya Davidi : Maloba ya Davidi, mwana mobali ya Izayi, moto oyo atombolama na bokonzi, mopakolami ya Nzambe ya Jakobi, moyembi malamu ya banzembo ya Isalaele :
2 The Spirit of our Father spoke through me; his word was on my tongue. « Molimo na Yawe alobi na nzela na ngai, atie maloba na Ye na monoko na ngai.
3 Our Father, the God of Israel, has spoken; the Rock of Israel said to me: "When one rules over people in righteousness, ruling in the fear of God, Nzambe oyo azali Libanga ya Isalaele ayebisi ngai : ‹ Mokonzi oyo akambaka bato kati na bosembo mpe botosi epai ya Nzambe,
4 he is like the light of morning when the sun rises on a cloudless dawn, like the brightness after rain that brings grass from the earth. azali lokola pole ya tongo, tango moyi ebimaka mpe engalaka makasi lokola nde mapata ezali te, lokola kongenga ya sima na mvula oyo ebimisaka matiti na mokili. ›
5 Is not my house like this with our Father? For he has made with me an everlasting covenant, ordered in all things and secure. Will he not bring to fruition all my salvation and all my desire? Ezali bongo te mpo na libota na ngai liboso ya Nzambe, pamba te asalaki boyokani ya libela elongo na ngai, boyokani oyo esalema malamu na makambo nyonso, mpe oyo Ye moko abatelaka ? Tango nyonso mpe na makambo nyonso, apesaki ngai elonga mpe akokisaki posa ya motema na ngai.
6 But worthless men are all like thorns thrown away, for they cannot be picked up barehanded. Kasi bato nyonso ya kilikili bazali lokola nzete ya nzube oyo babwakaka mosika ; basimbaka yango te na maboko pamba.
7 The one who would touch them arms himself with iron and the shaft of a spear, and they are burned with fire on the spot." Moto oyo alingi kosimba yango asengeli kosalela ebende to libaya ya likonga ; batumbaka yango kaka na esika oyo ezali. »
8 These are the names of David's mighty warriors: Josheb-basshebeth the Tahkemonite, chief of the three, raised his spear against 800 men, killing them at once. Tala bakombo ya basoda ya mpiko ya Davidi : Yoshebi-Bashebeti, moto ya Takimoni : azalaki mokonzi ya limpinga ya basoda misato ya mpiko, abomaki na likonga bato nkama mwambe na etumba moko.
9 Next was Eleazar son of Dodo the Ahohite, one of the three mighty men with David when they defied the Philistines gathered for battle there, and Israel's men retreated. Molandi na ye ezalaki Eleazari, mwana mobali ya Dodo, moto ya Aoyi : azalaki moko kati na limpinga ya basoda misato ya mpiko oyo, elongo na Davidi, babundisaki bato ya Filisitia oyo basanganaki mpo na bitumba, wana bana ya Isalaele bazalaki kokima na likolo ya bangomba.
10 He rose up, struck the Philistines until his hand tired and clung to the sword. Our Father won a great victory that day, and the troops returned behind him only to strip the dead. Kasi ye ayikaki mpiko kati na bitumba mpe abomaki bato ya Filisitia kino alembaki, mpe loboko na ye etikaki mopanga te. Yawe apesaki bango elonga monene na mokolo wana. Mampinga bazongaki epai ya Eleazari kaka mpo na kokamata biloko ya bato oyo bakufaki.
11 Next was Shammah son of Agee the Hararite. The Philistines massed at Lehi, in a field full of lentils, and the troops fled from them. Sima na ye, Shama, mwana mobali ya Age, moto ya Arari. Tango bato ya Filisitia basanganaki na Leyi epai wapi ezalaki na elanga moko etonda na misili, basoda ya Isalaele bakimaki liboso na bango.
12 But Shammah stood in the middle of the field, defended it, and struck down the Philistines. And our Father brought a great victory. Kasi Shama atelemaki na kati-kati ya elanga, abundelaki yango mpe abomaki bato ya Filisitia. Yawe apesaki bango elonga monene.
13 At harvest three of the thirty chief men went down to David at the cave of Adullam, while a band of Philistines camped in the Valley of Rephaim. Mokolo moko, na ebandeli ya eleko ya kobuka bambuma, wana basoda ya bato ya Filisitia batongaki molako na bango kati na lubwaku ya Refayimi, basoda misato kati na basoda tuku misato ya mpiko bayaki epai ya Davidi, na ebombamelo ya mabanga ya Adulami.
14 David was then in the stronghold, and a Philistine garrison was at Bethlehem. Na tango yango, Davidi azalaki kati na ebombamelo moko batonga makasi, mpe basoda ya Filisitia bazalaki na Beteleemi.
15 David longed for water and said, "If only someone would give me a drink of water from the well by the gate in Bethlehem!" Mbala moko, Davidi ayokaki posa ya mayi mpe alobaki : « Nani akomemela ngai mayi ya libulu oyo ezali pene ya ekuke ya Beteleemi mpo ete namela ? »
16 So the three warriors broke through the Philistine camp, drew water from the well of Bethlehem by the gate, and brought it to David. But he refused to drink it; he poured it out to our Father. Basoda nyonso misato ya mpiko bakotaki na mayele kati na molako ya bato ya Filisitia, batokaki mayi na libulu oyo ezali pene ya ekuke ya Beteleemi mpe bamemaki yango epai ya Davidi. Kasi Davidi aboyaki komela mayi yango ; asopaki yango na mabele lokola likabo ya masanga mpo na Yawe.
17 He said, "Far be it from me, my Father, that I should do this! Is this not the blood of the men who risked their lives?" So he would not drink it. Such were the deeds of the three warriors. Alobaki : « Tika ete Yawe apesa ngai etumbu soki nameli mayi oyo, pamba te ezali lokola makila ya bato oyo bandimaki kokende kokufa mpo na ngai. » Boye, Davidi aboyaki komela mayi yango. Yango nde misala ya kokamwa oyo basoda misato ya mpiko basalaki.
18 Abishai, Joab's brother, son of Zeruiah, was chief of the thirty. He raised his spear against 300, killed them, and won fame among the three. Abishayi, ndeko mobali ya Joabi mpe mwana mobali ya Tseruya, azalaki mokonzi ya basoda misato ya mpiko. Abundisaki bato nkama misato na likonga na ye mpe abomaki bango. Boye, kati na bango misato, ye nde akendeki sango koleka.
19 Was he not the most honored of the thirty? He became their commander, though not one of the three. Kati na basoda misato ya mpiko, ye nde azwaki lokumu koleka mpe akomaki mokonzi na bango, kasi akokanaki te na basoda misato ya limpinga ya liboso.
20 Benaiah son of Jehoiada was a valiant man from Kabzeel, a man of great deeds. He struck down Moab's two mighty warriors. He went down into a pit on a snowy day and killed a lion there. Benaya, moto ya mboka Kabitseli mpe mwana mobali ya Yeoyada, azalaki soda ya mpiko mpe asalaki makambo ebele ya kokamwa : abomaki bilombe mibale ya Moabi ; mpe na mokolo ya mvula ya pembe, akitaki na libulu moko ya mayi mpe abomaki kuna nkosi.
21 He also struck down an impressive Egyptian. The Egyptian held a spear, but Benaiah came at him with only a staff, wrenched the spear from his hand, and killed him with his own spear. Ye mpe moto abomaki mbinga mobali moko ya Ejipito, oyo asimbaki likonga na loboko na ye. Abundisaki moto yango ya Ejipito na lingenda, abotolaki ye likonga oyo azalaki na yango na loboko mpe abomaki ye na likonga na ye moko.
22 These were the deeds of Benaiah son of Jehoiada, who won a name among the three mighty men. Yango nde misala ya kokamwa oyo Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, asalaki. Ye mpe akendeki sango kati na basoda misato ya mpiko ya lisanga ya mibale.
23 He was more honored than the thirty, but not among the three. David put him over his bodyguard. Kati na basoda tuku misato ya mpiko, ye nde azalaki na lokumu monene koleka, kasi akokanaki te na basoda misato ya mpiko ya limpinga ya liboso. Mpe Davidi akomisaki ye mokonzi ya bakengeli na ye.
24 Among the thirty were: Asahel the brother of Joab; Elhanan son of Dodo of Bethlehem; Kati na lisanga ya bato tuku misato, ezalaki mpe na : Asaeli, ndeko mobali ya Joabi ; Elanani, mwana mobali ya Dodo, moto ya Beteleemi ;
25 Shammah the Harodite; Elika the Harodite; Shama mpe Elika, bato ya Arodi ;
26 Helez the Paltite; Ira son of Ikkesh the Tekoite; Eletsi, moto ya Peleti ; Ira, mwana mobali ya Ikeshi, moto ya Tekoa ;
27 Abiezer the Anathothite; Mebunnai the Hushathite; Abiezeri, moto ya Anatoti ; Mebunayi, moto ya Usha ;
28 Zalmon the Ahohite; Maharai the Netophathite; Tsalimoni, moto ya Aoyi ; Maarayi, moto ya Netofa ;
29 Heleb son of Baanah the Netophathite; Ittai son of Ribai from Gibeah of the Benjaminites; Elebi, mwana mobali ya Baana, moto ya Netofa ; Itayi, mwana mobali ya Ribayi, moto ya Gibea ya libota ya Benjame ;
30 Benaiah the Pirathonite; Hiddai from the ravines of Gaash; Benaya, moto ya Piratoni ; Idayi, moto ya mabwaku ya Gashi ;
31 Abi-albon the Arbathite; Azmaveth the Barhumite; Abi-Aliboni, moto ya Beti-Ariba ; Azimaveti, moto ya Baarumi ;
32 Eliahba the Shaalbonite; the sons of Jashen; Jonathan; Eliaba, moto ya Shaaliboni ; Bana mibali ya Yasheni ; Jonatan,
33 Shammah the Hararite; Ahiam son of Sharar the Hararite; Shama, moto ya Arari ; Ayami, mwana mobali ya Sharari, moto ya Arari ;
34 Eliphelet son of Ahasbai the Maacathite; Eliam son of Ahithophel the Gilonite; Elifeleti, mwana mobali ya Aasibayi, mwana mobali ya Maakati ; Eliami, mwana mobali ya Ayitofeli, moto ya Gilo ;
35 Hezro the Carmelite; Paarai the Arbite; Etsirayi, moto ya Karimeli ; Paarayi, moto ya Arabi ;
36 Igal son of Nathan of Zobah; Bani the Gadite; Yigali, mwana mobali ya Natan, moto ya Tsoba ; Bani, moto ya Gadi ;
37 Zelek the Ammonite; Naharai the Beerothite, the armor-bearer of Joab son of Zeruiah; Tseleki, moto ya Amoni ; Naarayi, moto ya Beyeroti, oyo azalaki komema bibundeli ya Joabi, mwana mobali ya Tseruya ;
38 Ira the Ithrite; Gareb the Ithrite; Ira mpe Garebi, bato ya Yeteri ;
39 and Uriah the Hittite—thirty-seven in all. mpe Iri, moto ya Iti. Na kosangisa, bango nyonso bazalaki tuku misato na sambo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]