Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Samuel 24 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Again the anger of our Father burned against Israel, and he incited David against them, saying, "Go, take a census of Israel and Judah." Yawe asikelaki lisusu bato ya Isalaele mpe atindikaki Davidi na kosala makambo oyo ekomemisa bango ngambo ; alobaki na Davidi : « Kende kotanga motango ya bato ya Isalaele mpe ya Yuda. »
2 So the king said to Joab, the commander of the army who was with him, "Go now throughout all the tribes of Israel, from Dan to Beersheba, and count the people, so that I may know the number of the people." Boye, mokonzi apesaki mitindo na Joabi, mokonzi ya mampinga, oyo azalaki elongo na ye : — Tambola na mabota nyonso ya Isalaele, longwa na Dani kino na Beri-Sheba, mpe tanga bato mpo ete nayeba motango na bango.
3 But Joab said to the king, "May your Father add to the people one hundred times as many as they are, and may the eyes of my lord the king see it. But why does my lord the king want to do this thing?" Kasi Joabi azongiselaki mokonzi : — Tika ete Yawe, Nzambe na yo, akomisa bato ebele koleka mbala nkama, mpe ete yo mokonzi, nkolo na ngai, omona yango na miso na yo ! Kasi mpo na nini mokonzi, nkolo na ngai, alingi kosala likambo ya boye ?
4 But the king's command overruled Joab and the commanders of the army. So Joab and the commanders of the army left the king's presence to count the people of Israel. Kasi mokonzi atingamaki kaka na mitindo oyo apesaki na Joabi mpe na bakonzi ya mampinga. Boye, balongwaki liboso ya mokonzi mpe bakendeki kotanga bato ya Isalaele.
5 They crossed the Jordan and camped near Aroer, south of the city that lies in the middle of the valley, toward Gad and on to Jazer. Bakatisaki Yordani mpe babandaki na kotanga bato ya engumba Aroeri, na sude ya engumba oyo ezali kati na lubwaku. Bakatisaki lisusu etuka ya Gadi na nzela oyo ekenda na Yaezeri.
6 Then they came to Gilead and to the region of Tahtim-hodshi, and they came to Dan-jaan and around to Sidon, Longwa kuna, balekaki na etuka ya Galadi mpe ya Tayitimi-Odishi kino bakomaki na Dani Yaani mpe zingazinga ya Sidoni.
7 and came to the fortress of Tyre and to all the cities of the Hivites and the Canaanites, and they went out to the Negev of Judah at Beersheba. Bakendeki na ndako batonga makasi ya Tiri mpe na bingumba nyonso ya bato ya Evi mpe ya Kanana ; bongo bakomaki na sude ya etuka ya Yuda, na Beri-Sheba.
8 So when they had gone through all the land, they came to Jerusalem at the end of nine months and twenty days. Boye batambolaki mboka mobimba, mpe bazongaki na Yelusalemi sima na basanza libwa mpe mikolo tuku mibale.
9 Joab reported the census count to the king: in Israel there were 800,000 valiant men who drew the sword, and Judah had 500,000. Joabi ayebisaki mokonzi motango ya bato oyo atangaki, bato oyo bakoki kosalela mopanga na bitumba : bato nkoto nkama mwambe kati na Isalaele, mpe nkoto nkama mitano kati na Yuda.
10 But David's heart struck him after he had counted the people. And David said to our Father, "I have sinned greatly in what I have done. Now, my Father, please take away the guilt of your servant, for I have acted very foolishly." Sima na Davidi kotanga bato, asosolaki ete amemi ngambo. Bongo Davidi alobaki na Yawe : — Nasali lisumu monene na kotanga bato. Sik’oyo, nabondeli Yo, oh Yawe, limbisa mabe ya mosali na Yo ; pamba te nasali makambo lokola moto ya liboma.
11 When David rose in the morning, the word of our Father came to the prophet Gad, David's seer: Na tongo ya mokolo oyo elandaki, tango Davidi alamukaki, Yawe alobaki na mosakoli Gadi, mopesi toli ya mokonzi :
12 "Go and say to David, 'This is what our Father says: I am holding three things over you. Choose one of them, and I will carry it out against you.'" — Kende koyebisa Davidi : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nazali kotalisa yo bitumbu misato ; pona moko kati na yango mpo ete Ngai nakokisa yango lokola etumbu mpo na yo. › »
13 So Gad came to David and told him, asking, "Will three years of famine come upon your land? Or will you flee three months before your enemies while they pursue you? Or will there be three days of plague in your land? Now think it over and decide what answer I should bring back to the one who sent me." Gadi akendeki koyebisa Davidi makambo oyo Yawe alobaki na ye : — Oponi etumbu nini mpo ete Ngai Yawe nakokisa yango mpo na yo : mibu sambo ya nzala makasi kati na mokili na yo ; sanza misato oyo okokima liboso ya banguna na yo, oyo bakolanda yo ; to mikolo misato ya bokono oyo ebomaka kati na mokili na yo ? Kanisa sik’oyo malamu mpe yebisa ngai eyano oyo ngai nasengeli komema epai na Ye oyo atindi ngai.
14 Then David said to Gad, "I am in deep distress. Let us fall into the hand of our Father, for his compassion is very great; but do not let me fall into the hand of man." Davidi azongiselaki Gadi : — Nazali na pasi makasi na motema. Eleki malamu mpo na ngai kokweya na maboko ya Yawe, pamba te mawa na Ye ezali solo monene ; kasi tika ete nakweya te na maboko ya bato.
15 So our Father sent a plague upon Israel from the morning until the appointed time, and 70,000 of the people from Dan to Beersheba died. Boye, Yawe atindaki kati na Isalaele bokono oyo ebomaka, wuta na tongo kaka wana kino na ngonga oyo akataki ; mpe longwa na Dani kino na Beri-Sheba, bato nkoto tuku sambo bakufaki.
16 But when the angel stretched out his hand toward Jerusalem to destroy it, our Father relented from the disaster and said to the angel who was destroying the people, "Enough! Now stay your hand." The angel of our Father was then by the threshing floor of Araunah the Jebusite. Lokola anjelu atandaki loboko na ye na likolo ya Yelusalemi mpo na kobebisa yango, Yawe atalaki mpe ayokaki mawa mpo na pasi wana. Alobaki na anjelu oyo azalaki kobebisa : « Ekoki ! Longola loboko na yo ! » Nzokande, na tango wana, anjelu na Yawe atelemaki pembeni ya etando ya Orina, moto ya Yebusi, kati na likolo mpe mabele, mpe asimbaki mopanga ezanga ebombelo.
17 When David saw the angel who was striking the people, he spoke to our Father and said, "Look, I am the one who has sinned; I am the one who has done wrong. But these sheep, what have they done? Please, let your hand fall on me and on my father's house." Wana Davidi atombolaki miso mpe amonaki anjelu na Yawe koboma bato, alobaki na Yawe : « Ngai nde nasalaki masumu, ngai nde nasalaki mbeba ; bango, bato ya ekolo na ngai, basali mabe moko te ; boye, ebongi nde opesa ngai mpe libota na ngai etumbu ! »
18 That day Gad came to David and said to him, "Go up and raise an altar to our Father on the threshing floor of Araunah the Jebusite." Kaka na mokolo yango, Gadi akendeki epai ya Davidi mpe alobaki na ye : — Kende kotonga etumbelo mpo na Yawe, na etando ya Orina, moto ya Yebusi.
19 So David went up, according to the word of Gad, as our Father had commanded. Davidi akendeki kuna kolanda liloba oyo Gadi alobaki na Kombo na Yawe.
20 When Araunah looked down and saw the king and his servants coming toward him, he went out and bowed before the king with his face to the ground. Tango Orina atalaki mpe amonaki mokonzi elongo na bakalaka na ye koya epai na ye, abimaki mpe agumbamaki liboso ya mokonzi, elongi kino na mabele.
21 And Araunah said, "Why has my lord the king come to his servant?" David replied, "To buy the threshing floor from you, to build an altar to our Father, so that the plague may be held back from the people." Orina atunaki mokonzi : — Mpo na nini mokonzi, nkolo na ngai, ayei epai ya mosali na ye ? Davidi azongisaki : — Nayei kosomba etando oyo mpo ete natonga awa etumbelo mpo na Yawe ; na bongo, bokono oyo ezali koboma bato ekosila.
22 Araunah said to David, "Let my lord the king take and offer up whatever seems good to him. Look, here are the oxen for the burnt offering, and the threshing sledges and the ox yokes for the wood. Orina azongiselaki Davidi : — Tika ete mokonzi, nkolo na ngai, akamata na ye lopango yango mpe abonza kuna mbeka oyo amoni ete ezali malamu mpo na Yawe. Tala bangombe ya mibali oyo ekosunga mpo na mbeka ya kotumba, mabaya ya bashario mpe bikangiseli oyo ekosunga mpo na kopelisa moto.
23 All this, O king, Araunah gives to the king." And Araunah said to the king, "May the LORD your God accept you." Oh mokonzi, napesi yo nyonso ! Orina alobaki lisusu na mokonzi : — Tika ete Yawe, Nzambe na yo, ayamba malamu bambeka na yo !
24 But the king said to Araunah, "No, I insist on buying it from you for a price. I will not offer to my Father burnt offerings that cost me nothing." So David bought the threshing floor and the oxen for about one.Two pounds of silver. Kasi mokonzi alobaki na Orina : — Te ! Nasengeli kaka kosomba yango mpe kopesa yo motuya oyo ekoki na yango ; naboyi kobonzela Yawe, Nzambe na ngai, bambeka ya kotumba oyo nazwi na ofele. Boye, Davidi asombaki etando mpe bangombe yango, na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, tuku mitano.
25 And David built an altar there to our Father and offered burnt offerings and peace offerings. So our Father responded to the plea for the land, and the plague was held back from Israel. Davidi atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe mpe abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Yawe ayokelaki mboka mawa, mpe bokono oyo ezalaki koboma elongwaki na Isalaele.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]